TITO 1
1 Ngai Polo, mowumbu ya Nzambe mpe mopostolo ya Yesu Kristo. Nzambe apona ngai mpe atinda ngai mpo na sunga kondima ya bato oyo ye apona mpe nakamba bango na nzela ya koyeba makambo ya solo oyo ememaka na kotosa makambo ya
Nzambe;
2 kondima mpe boyebi oyo evandi likolo ya elikya ya bomoi ya seko. Bomoi oyo, Nzambe oyo akosaka te alakaki biso wuta kala liboso ya ebandeli ya tango.
3 Mpe tango eleko oyo ye atiaki ekokaki, alakisaki Liloba na ye na polele nyonso, na nzela ya mateya oyo bapesaki ngai, na etinda ya Nzambe Mobikisi na biso.
4 Natindi mokanda oyo na Tito, mwana na ngai ya solo kati na kondima moko oyo tozali na yango: "Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata mpe na Kristo Yesu Nkolo na biso, ezala na yo."
5 Tina oyo natikaki yo na krete ezalaki ete obongisa makambo oyo etikalaki mpo na kobongisa, mpe otia bampaka ya Lingomba kati na vile moko na moko, ndenge natindaki yo.
6 Mpaka ya Lingomba esengeli azala moto oyo azangi mabe, azala mobali ya mwasi moko kaka, bana na ye basengeli kozala
bandimi mpe bazala te bana oyo bato bakoki koloba-loba mpo na bango ete bazali bana ya mobulu mpe bana oyo bazangi botosi.
7 Pamba te, esengeli ete mokengeli ya Lingomba azala na mabe te, mpo mokumba ya mosala ya Nzambe ezali likolo na ye. Yango wana, esengeli azala moto ya lofundu te, moto oyo asilikaka noki te, moto oyo amipesa na masanga te, moto oyo aswanaka te, mpe moto oyo alukaka kozwa mbongo na banzela ya soni te.
8 Kasi esengeli azala moto oyo ayambaka bapaya malamu, moto oyo alingaka makambo ya malamu, moto ya bwanya, moto na sembo, mosantu, mpe oyo ayebi komibatela malamu.
9 Esengeli asimba makasi penza Liloba ya solo oyo bateyaki ye, mpo ete akoka kolendisa bato mosusu na nzela ya mateya ya solo, mpe kosukisa baoyo batiaka tembe na yango.
10 Pamba te, bato mingi bazali batomboki, bato ya biloba-loba mpe bakosaka bato; mingi penza baoyo bazali na lisanga ya bato bakatisa nzoto.
11 Esengeli okangisa bango minoko, pamba te bazali kobebisa mabota mingi na nzela ya koteya makambo oyo bakoki koteya te; mpe basalaka bongo mpo na kozwa mbongo na banzela ya soni.
12 Moto moko na kati ya baprofeta ya bato ya Krete alobaki: "Bato ya Krete bazalaka tango nyonso bato ya lokuta; bazali banyama ya mabe penza, bato ya lokoso mpe bagoigoi."
13 Makambo alobaki ezali ya solo. Yango wana pamela bango makasi penza, mpo ete bazala peto kati na kondima
14 mpe bakangama te na masapo ya bayuda, to mpe na mibeko ya baoyo baboyaka makambo ya solo.
15 "Mpo na baoyo bazali peto, biloko nyonso ezali peto;" kasi eloko moko te ezali peto mpo na baoyo bazali na bosoto mpe bazangi kondima. Pamba te, makanisi na bango mpe mitema na bango ezali na bosoto.
16 Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka ye na nzela ya makambo oyo basalaka. Bazali bato mabe, bato bazangi botosi, mpe bazali na makoki te mpo na kosala ata likambo moko ya malamu.