ROMA 8
1 Yango wana, sik'oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na baoyo bazali kati na Kristo Yesu.
2 Pamba te, na nzela ya Kristo Yesu, mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi, ekangoli ngai na nse ya bowumbu ya mobeko ya masumu mpe ya liwa.
3 Pamba te, likambo oyo Mibeko ekokaki kosala te, mpo ezalaki na bolembu na nzela ya mosuni, Nzambe asali yango na nzela ya kotinda Mwana na ye, na nzoto lokola ya bato ya masumu mpo akoma likabo mpo na masumu; me na bongo apesaki etumbu na masumu oyo ezali na nzoto ya bato.
4 Asalaki yango mpo ete makambo oyo Mibeko ezali kotinda ekokisama kati na biso baoyo, bomoi na biso elandaka makambo ya mosuni te, kasi ya Molimo.
5 Pamba te, baoyo bomoi na bango elandaka makambo ya mosuni, batiaka makanisi na bango na biloko ya mosuni. Kasi baoyo bomoi na bango elandaka makambo ya Molimo, batiaka makanisi na bango na biloko ya Molimo.
6 Pamba te, makanisi ya mosuni ememaka na liwa; kasi makanisi oyo Molimo atambusaka ememaka na bomoi mpe na kimia.
7 Mpo ete makanisi ya mosuni ezali monguna ya Nzambe; yango etosaka soki moke te Mobeko ya Nzambe, pamba te ekokoka mpe ata moke te kotosa yango.
8 Baoyo bomoi na bango elandaka makambo ya mosuni bakoki kosepelisa Nzambe te.
9 Nzokande bino, bomoi na bino elandaka makambo ya mosuni te, kasi ya Molimo; soki ya solo ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino. Soki moto azali na Molimo ya Kristo te, azali mpe moto ya Kristo te.
10 Nzokande soki Kristo azali kati na bino, nzoto na bino ezali ya kokufa mpo na masumu; kasi Molimo azali nzela ya bomoi, mpo ete basi'bakomisa bino bato na sembo.
11 Mpe soki Molimo ya Nzambe oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi avandaka kati na bino, Nzambe oyo asekwisaki Kristo kati na bakufi akopesa mpe bomoi na banzoto na bino oyo ekufaka, na nzela ya Molimo na ye oyo avandaka kati na bino.
12 Yango wana bandeko na ngai, tozali na nyongo, kasi na mosuni te, mpo bomoi na biso elanda makambo ya mosuni.
13 Pamba te, soki bomoi na bino ezali kolanda makambo ya mosuni, bokokufa; kasi soki bobomi, na nzela ya Molimo, misala ya mabe oyo bosalaka na nzoto na bino, bokozala na bomoi.
14 Pamba te, baoyo batambusamaka na Molimo ya Nzambe, bazali bana ya Nzambe.
15 Pamba te, bozwaki te molimo oyo ekomisaka bino bawumbu mpo bozala na kobanga, kasi bino bozwaki Molimo oyo ekomisaka bino bana ya Nzambe. Mpe ezali na nzela ya Molimo wana nde togangaka: "Aba Tata!"
16 Molimo ye moko atatolaka elongo na molimo na biso ete tozali bana ya Nzambe.
17 Mpe lokola tozali bana, tozali mpe bakitani ya bomengo: bakitani ya bomengo ya Nzambe, mpe bakitani ya bomengo elongo na Kristo; pamba te soki tozali komona pasi elongo na ye, tokozwa mpe nkembo elongo na ye.
18 Pamba te, nakanisi ete bapasi ya tango oyo tokoki kutu ata moke te komeka kokokisa yango na nkembo oyo ekomonana kati na biso.
19 Pamba te, biloko nyonso oyo Nzambe asala ezali kozela na posa monene mokolo bakolakisa bana ya Nzambe.
20 Pamba te biloko nyonso oyo Nzambe asala, esi'etiama na nse ya bowumbu ya oyo ezanga tina; yango esalamaki bongo na mokano na yango moko te, kasi na mokano ya ye oyo atiaki yango na nse ya bokonzi wana, na elikya ete,
21 ata yango moko mpe biloko oyo Nzambe asala, ekokangolama na bowumbu ya libebi, mpo ezwa bonsoni ya nkembo oyo bana na Nzambe bakozwa.
22 Pamba te toyebi ete, kino sik'oyo, biloko nyonso oyo Nzambe asala ezali kolela mpo na pasi, pasi lokola oyo ya mwasi alingi kobota.
23 Kaka yango moko te nde ezali kolela, kasi biso mpe baoyo tozwaki Molimo lokola likabo ya liboso oyo Nzambe apesaki biso, tozali mpe kolela na nse ya mitema, awa tozali kozela ete Nzambe apesa biso makoki na biso nyonso ya bana penza ya Nzambe, na nzela ya kokangola nzoto na biso na bowumbu.
24 Pamba te tosi'tobika, kasi kobika yango ezali naino elikya; nzokande soki tozali komona eloko oyo tozali kotiela elikya, wana ezali lisusu elikya te, pamba te, nani akoki kotia elikya na eloko oyo azali komona?
25 Kasi soki tozali kotia elikya na eloko oyo tozali komona te, ya solo, tokozela yango na kokanga motema.
26 Ndenge moko mpe, Molimo asalisaka biso kati na bolembu na biso. Pamba te, toyebi te ndenge nini tosengeli kobondela, kasi Molimo ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te.
27 Bongo Nzambe oyo atalaka mitema, ayebi makanisi ya Molimo, pamba te Molimo abondelaka mpo na basantu, ndenge Nzambe ye moko alingaka.
28 Toyebi malamu ete, kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya baoyo balingaka ye, baoyo babengama na mokano na ye.
29 Pamba te, baoyo Nzambe ayeba banda kala, apona bango mpe banda kala mpo bakokana na Mwana na ye, mpo ete ye azala mwana ya liboso kati na bandeko ebele.
30 Baoyo ye apona, abenga mpe bango; baoyo ye abenga, akomisa bango mpe bato na sembo, mpe baoyo ye akomisa bato na sembo, apesa bango mpe nkembo na ye.
31 Bongo toloba lisusu nini? soki Nzambe azali mpo na biso, nani akoki kosala biso mabe?
32 Ye moto aboyaki te kopesa ata Mwana na ye se moko, kasi akabaki ye mpo na biso nyonso, bongo ndenge nini akopesa biso na ofele te, nyonso elongo na ye?
33 Nani akoki kofunda bato oyo Nzambe apona? Pamba te, Nzambe ye moko moto akomisa bango bato na sembo.
34 Nani akoki kokatela bango etumbu? Pamba te, Kristo Yesu akufaki mpe asekwaki! Avandi na loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kobondela mpo na biso.
35 Nani akoki kolongola biso na bolingo ya Kristo? Pasi, to somo, to minyoko, to nzala, to kozanga bilamba, to likama, to mpe mopanga?
36 Lokola ekomama: "Mpo na yo, yango wana mokolo mobimba balukaka koboma biso. Bazwaka biso lokola bameme oyo babongisami mpo na koboma."
37 Kasi kati na nyonso wana, tolongaka koleka na nzela ya ye oyo alingaka biso.
38 Pamba te, nazali na elikya ete ata liwa to bomoi, ata baanzelu to milimo mabe, ata makambo ya sik'oyo to oyo ekoya, ata banguya,
39 ata oyo ezali na likolo, ata oyo ezali na nse, ata eloko mosusu oyo Nzambe asala, eloko moko te ekoki kolongola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali kati na Kristo Yesu Nkolo na biso.