Mapamboli.com 2010. Nioso esalami mpo na lokumu ya Nzambe. Motuna to lisalisi, komela biso mokanda. Mokambi ya misala oyo : Jupé Bongolo
BANZEMBO 150
1 Bosanzola Yawe! Bosanzola Nzambe kati na Esika na ye ya bosantu! Bosanzola ye na nguya na ye ya likolo. 2 Bosanzola ye mpo na misala na ye ya nguya! Bosanzola ye mpo na monene na ye oyo ezangi ndelo. 3 Bosanzola ye na mongongo ya kelelo, bokumisa ye na likembe mpe na lindanda, 4 bosanzola ye na mbunda mpe na mabina, bosanzola ye na mandanda ya singa mpe na flute, 5 bosanzola ye na bangongi ya mike, bosanzola ye na bangongi ya minene.6 Tika ete nyonso oyo ezali na mpema, esanzola Yawe! Bosanzola Yawe.