MISALA 7
1 Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe atunaki ye: 'Boni, makambo oyo balobi ezali ya solo?
2 Etieni azongisaki: 'Batata mpe bandeko, boyoka ngai! Nzambe ya nkembo abimelaki koko na biso Abraham tango azalaki na Mezopotami, liboso ete akende koyanda na Sharan.
3 Bongo Nzambe alobaki na ye: Longwa na mokili na yo mpe na libota na yo mpe kende na mokili oyo ngai nakolakisa yo!
4 Yango wana, alongwaki na mokili ya Shaldeya mpe akendaki koyanda na mokili ya Sharan. Sima ya liwa ya Tata na ye, Nzambe atindaki ye na mokili oyo, oyo bino bozali kovanda sik'oyo.
5 Apesaki ye mabele ya ye moko te, ata kutu mwa eteni ya mabele. Kasi Nzambe alakaki ye ete sima na ye, akopesa ye, ye na bana na ye mokili; nzokande na tango wana, tango Nzambe apesaki elaka wana, Abraham azalaki naino na mwana te.
6 Nzambe alobaki na ye boye: "Bana na yo bakozala bapaya na mokili ya bato mosusu, bongo kuna bakokamata bango lokola bawumbu mpe bakonyokola bango mbula nkama minei.
7 "Nzambe alobaki lisusu: Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu. Sima na yango, bakobima na mokili yango mpe bakosambela ngai na esika oyo."
8 Bongo Nzambe atiaki boyokani kati na ye na Abraham; mpe elembo ya boyokani yango: kokata nzoto ya bana mibali. Yango wana Abraham akataki mwana na ye Izaki sima ya mikolo mwambe ya mbotama na ye. Ndenge moko mpe Izaki akataki Zakob, mpe Zakob akataki bakoko na biso zomi na mibale.
9 Bakoko na biso bayokelaki Zozefi zuwa, mpe batekaki ye mpo azala mowumbu na Ezipito. Kasi Nzambe azalaki elongo na ye,
10 akangolaki ye na minyoko na ye nyonso, mpe asalaki ete amonana moto malamu mpe ya bwanya na miso ya Farawo: mokonzi ya Ezipito. Bongo Farawo atiaki ye moyangeli ya Ezipito mpe ya ndako na ye mobimba.
11 Kasi nzala moko ya makasi ekotaki na mokili ya Ezipito mpe ya Kanana. Yango ezalaki tango ya pasi monene. Mpe bakoko na biso bazalaki lisusu na eloko ya kolia te.
12 Tango Zakob ayokaki ete ble ezalaki na Ezipito, atindaki bakoko na biso mpo na mbala ya liboso.
13 Na mbala ya mibale, Zozefi, amilakisaki epai ya bandeko na ye, mpe Farawo ayebaki libota ya Zozefi.
14 Bongo Zozefi atindaki bakende kozwa tata na ye Zakob na bandeko na ye nyonso. Bango nyonso bazalaki batu tuku sambo na mitano.
15 Bongo Zakob akendaki koyanda na Ezipito, epai ye na bakoko na biso bakufaki.
16 Bamemaki banzoto na bango na Sikemi, mpe bakundaki yango na simetiere oyo Abraham asombaki na mbongo, epai ya bana ya Emore oyo ya Sikemi.
17 Awa tango ekomaki pene-pene oyo Nzambe alingaki kokokisa elaka apesaki na Abraham ekomaki pene-pene oyo, motuya ya bato na biso, na mokili ya Ezipito, emataki mingi penza.
18 Bongo mokonzi mosusu, oyo ayebaki eloko moko te mpo na Zozefi, akomaki na bokonzi na Ezipito,
19 Mokonzi yango asalelaki mayele mabe epai ya bato na biso, anyokolaki bakoko na biso, kino kotinda bango na makasi ete babwaka bana na bango oyo babotami sika mpo bakufa.
20 Ezali na tango wana nde Moyize abotamaki, mpe azalaki kitoko mingi na miso ya Nzambe. Babokolaki ye sanza misato na ndako ya tata na ye.
21 Tango baboti na ye batiaki ye libanda, mwana ya mokonzi Falawo, ya mwasi, azwaki ye mpe abokolaki ye lokola mwana na ye penza.
22 Na ndenge wana nde, Moyize ayekolaki bwanya nyonso,ya bato ya Ezipito, mpe akomaki moto ya nguya na maloba mpe na misala na ye.
23 Tango Moyize akokisaki bambula tuku minei, azwaki mokano ya kokende kotala bandeko na ye, bana ya Isayele.
24 Awa amonaki ete moto moko ya Ezipito azalaki kobeta mwana ya Isayele, akotelaki mwana ya Isayele, azongiselaki moto wana ya Ezipito mabe na ye, mpe abomaki ye.
25 Moyize akanisaki ete bandeko na ye bakososola ete Nzambe alingaki kosalela ye mpo na kokangola bango; kasi bango basosolaki yango te.
26 Na mokolo oyo elandaki, Moyize akutaki bana ya Isayele mibale bazalaki kobunda. Alingaki kozongisa boyokani kati na bango, mpe alobaki na bango: 'A! baninga na ngai, bozali bandeko! Mpo na nini bozali kosalana mabe?
27 Kasi oyo azalaki konyokola ndeko na ye, atindikaki Moyize mpe alobaki na ye: "Yo! nani atie yo mokonzi mpe zuzi na biso?
28 "Boni, olingi oboma ngai ndenge obomaki moto ya Ezipito lobi?"
29 Tango Moyize ayokaki bongo, akimaki na mokili ya Madian epai ayandaki lokola mopaya, mpe kuna abotaki bana mibale ya mibali.
30 Na sima ya mbula tuku minei, anzelu moko abimelaki Moyize na esobe, pene-pene na ngomba ya Sinayi, na kati ya moto ya mwa nzete oyo ezalaki kopela.
31 Tango Moyize amonaki bongo, akamwaki mingi mpo na oyo azalaki komona. Awa azalaki kokende mpo na kotala malamu, ayokaki mongongo ya Nkolo:
32 "Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abraham, ya Izaki mpe ya Zakob!" Moyize alengaki mpo na somo mpe akokaki kutu kotala te.
33 Bongo Nkolo alobaki na ye: "Longola basandale na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bosantu.
34 Namoni bapasi oyo bato na ngai bazali koyoka na Ezipito. Nayoki kolela na bango mpe nakiti mpo na kokangola bango. Mpe sik'oyo, yaka: nakotinda yo na Ezipito.''
35 Bongo Moyize oyo bandeko na ye baboyaki tango balobaki na ye: " Nani atie yo mokonzi mpe zuzi? ", ezali ye nde Nzambe
atindaki mpo azala mokonzi mpe mokangoli na bango, na lisalisi ya anzelu oyo abimelaki ye na mwa nzete.
36 Abimisaki bango na mokili ya Ezipito, na nzela ya makamwisi mpe bilembo oyo asalaki na mokili yango, na tango ya kokatisa ebale monene ya motane, mpe na esobe bambula tuku minei.
37 Ezali kaka ye Moyize moto alobaki na bana ya Isayele: "Nzambe akobimisela bino moprofeta moko lokola ngai, oyo akozala moto ya libota na bino."
38 Tango bakoko na biso basanganaki na esobe, ezali ye moto azalaki molobeli kati na bakoko na biso na anzelu oyo alobaki na ye na ngomba ya Sinayi. Azwaki Maloba ya bomoi mpo na kopesa biso.
39 Kasi bakoko na biso balingaki kotosa Moyize te; baboyaki ye mpe bakanisaki kozonga na Ezipito.
40 Balobaki na Aron: "Salela biso banzambe oyo bakoki kolakisa biso nzela, pamba te toyebi te soki makambo nini ekweyeli Moyize oyo abimisaki biso na Ezipito!"
41 Ezali na mikolo wana nde basalaki ekeko ya mwana ngombe, bapesaki makabo na ekeko yango, mpe basalaki feti mpo na kosepela na misala oyo maboko na bango esalaki.
42 Kasi Nzambe apesaki bango mokongo mpe atikaki bango basambela minzoto, ndenge ekomama na buku ya baprofeta: "Bato ya Isayele, ezali na ngai nde bozalaki kopesa makabo mpe mbeka tango bozalaki na esobe, bambula tuku minei?
43 "Te!, bomemaki ndako ya kapo ya Moloki mpe monzoto ya nzambe na bino Refani, bikeko oyo bosalaki mpo na kosambela yango. Yango wana, nakotinda bino na bowumbu, mosika, koleka Babilone!"
44 Na esobe, bakoko na biso bazalaki na ndako ya kapo ya boyokani; batongaki yango ndenge Nzambe atindaki Moyize, mpe ezalaki na lolenge ya oyo Moyize amonaki.
45 Bakoko na biso, sima ya kozwa ndako yango ya kapo, bamemaki yango, elongo na Zosue, tango babotolaki mikili ya bapakano, mikili oyo Nzambe abenganaki liboso na bango. Mpe ndako yango ya kapo etikalaki kuna kino na tango ya David.
46 David azwaki bolamu ya Nzambe mpe asengaki ete akoka kotongela Nzambe ya Zakob ndako.
47 Kasi ezali Salomon moto atongelaki ye ndako.
48 Nzokande ye oyo Aleki-Likolo ayandaka na bandako oyo bato batongi te; ndenge moprofeta alobaki:
49 "Nkolo alobi boye: Likolo ezali kiti na ngai ya bokonzi, mpe nse ezali esika na ngai epai natiaka makolo. Bongo ndako ya lolenge nini bokoki kotongela ngai? To esika nini nakoki kopema?
50 "Boni, ezali ngai te moto nasalaki biloko wana nyonso?"
51 A a, bozali penza bato ya mitu mabanga! Mitema na bino ezali lokola mitema ya bato bandimaka Nzambe te mpe matoyi na bino eyokaka te makambo oyo Nzambe alobaka. Bokokani na bakoko na bino: boboyaka tango nyonso koyokela Molimo Mosantu.
52 Boni, bokoki kotangela ngai moprofeta ata moko oyo bakoko na bino banyokolaki te? Babomaki kutu ata baoyo bazalaki kosakola koya ya Mosali ya Nzambe oyo asalaki makambo nyonso oyo Nzambe asengaki ye. Mpe sik'oyo, boteki ye mpe bobomi ye;
53 bino baoyo bozwaki Mibeko oyo Nzambe apesaki bino na nzela ya baanzelu, mpe botosaki yango te.
54 Tango bato ya likita-monene bayokaki bongo, batombokaki mpe bazalaki koswa mino mpo na Etieni.
55 Kasi Etieni atondaki na Molimo Mosantu. Tango atalaki na likolo, amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atelemaki na loboko ya mobali ya Nzambe.
56 Alobaki na bango: 'Botala, namoni Likolo efongwami mpe Mwana na Moto atelemi na loboko ya mobali ya Nzambe!
57 Bongo babandaki koganga makasi penza mpe bakangaki matoyi na bango. Bango nyonso bawelelaki ye,
58 bamemaki ye na libanda ya vile mpe babandaki kobamba ye mabanga. Batemwe batikaki bilamba na bango na elenge mobali moko kombo na ye Saul.
59 Tango bazalaki kobamba Etieni mabanga, Etieni abondelaki boye: 'Nkolo Yesu, yamba molimo na ngai!
60 Bongo afukamaki mpe agangaki makasi: 'Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te! Tango Etieni alobaki bongo, akufaki.