[creation site web] [logiciel creation site] [creation site internet] [Elili]
[Elili]
[Elili]
[Elili]
[Elili]
[Elili]
[Elili]
[Elili]
[Elili]
[Elili]
[Elili]
[Elili]
[Ebandeli]
[Lisanga]
[Mabondeli]
[Matatoli]
[Mateya]
[Mandanda]
[mayebisi]
[Mindule]

Mapamboli.com,
lisanga moke kati na internet
mpo na kopanza sango ya Nzambe.
Nkembo mpe lokumu na Nzambe ya bikolo nioso.

Logwa na mpongi ndeko, telema mpe omilengela, Yesu azali koya.

BANZEMBO 100

1 Boganga na esengo epai na Yawe mokili mobimba,! 2 Bokumbamela Yawe na esengo nyonso, mpe boya liboso na ye na banzembo ya esengo!3 Boyeba ete Yawe azali Nzambe. Ye moto asalaki biso, mpe biso tozali bato na ye; tozali bato na ye, mpe bameme oyo ye aleyisaka. 4 Bokota na baporte na ye na kozongisa matondi; mpe na lopango na ye na masanzoli. Bopesa ye matondi mpe bosanzola kombo na ye. 5 Pamba te Yawe azali malamu; mpe bolingo na ye ezali kowumela tango nyonso, mpe boyengebene na ye ezali kokoba na batango nyonso

  

Banzembo nioso oyo ezali awa, eponami na baninga ya Mapamboli.com.
Yango bazwui nioso na kati ya YouTube.
Biso tozali na bilili te, soki olingi kosomba, kende na bisika oyo ebongisami mpo na koteka bilili mpe mandanda.
Tokokumisa Nzambe mpo na baoyo bamipesi
na mosala ya miziki na nzela ya kokumisa
Nzambe, kopambola mpe kosakola
kombo na ye na banzembo.
Tika ete Nkolo abakisela bango lisusu mayele mingi kati na misala na bango.

BB SOUZA -  DERNIERE MINUTE 

Mapamboli.com 2011. Nioso esalami mpo na lokumu ya Nzambe. Motuna to lisalisi, komela biso mokanda. Mokambi ya misala oyo : Jupé Bongolo