MATIE 26
1 Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, alobaki na bayekoli na ye:
2 'Boyebi ete feti ya Paki etikali mikolo mibale mpo ebanda, mpe Mwana ya Moto bakoteka ye mpo babaka ye na ekulusu.
3 'Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe na bankolo basanganaki na ndako ya Kayifa, mokonzi ya banganga-Nzambe;
4 bayokanaki mpo na kokanga Yesu na mayele, mpe baboma ye.
5 Kasi balobaki: 'Tosala yango na tango ya feti te, mpo bato batomboka te.
6 Tango Yesu azalaki na Betaniya, na ndako ya Simon oyo azalaki na maladi ya maba,
7 mwasi moko azalaki na molangi ya Albatre, oyo ezalaki ya kotonda na malasi ya motuya mingi, ayaki epai na ye, mpe asopaki yango na motu na ye, na tango azalaki na mesa.
8 Kasi bayekoli basilikaki tango bamonaki bongo, mpe balobaki: 'Mpo na nini kosala peleti ya boye?
9 Pamba te, malasi yango ekokaki kotekama na talo mingi penza mpe kopesa mbongo na babola.
10 Tango Yesu ayebaki yango, alobaki na bango: 'Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo? Pamba te, asaleli ngai likambo moko ya malamu.
11 Babola, bokozala na bango elongo tango nyonso, kasi ngai, bokozala na ngai tango nyonso te.
12 Pamba te, tango asopaki malasi oyo na nzoto na ngai, asali yango mpo na kobongisa kokundama na ngai.
13 Nalobi na bino ya solo: na mokili mobimba, esika nyonso oyo Sango Malamu oyo ekoteyama, bato bakobanda kolobela likambo mwasi oyo asali mpo na kokanisa ye!
14 Bongo moko na kati ya bapostolo zomi na mibale, oyo bazalaki kobenga Yuda Iskariote, akendaki epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe,
15 mpe atunaki: 'Bokopesa ngai nini, soki natekeli bino Yesu? Bongo batangelaki ye bibende ntuku misato ya mbongo.
16 Banda tango wana, Yuda azalaki koluka mwaye ya malamu mpo na koteka Yesu.
17 Na mokolo ya liboso ya feti ya mapa oyo ezangi kisi oyo evimbisaka mapa, bayekoli bayaki epai ya Yesu mpe batunaki: 'Epai wapi olingi tobongisela yo mpo na kolia bilei ya Pake?
18 Azongisaki: 'Bokende na vile, epai ya moto boye, mpe boloba na ye: "Moteyi alobi: Tango na ngai ekomi pene; nakolia bilei ya Pake na bayekoli na ngai epai na yo."
19 Bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pake.
20 Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa na bapostolo na ye zomi na mibale.
21 Awa bazalaki kolia, Yesu alobaki: 'Ya solo nalobi na bino: moto moko na kati na bino akoteka ngai.
22 Bayokaki mawa mingi, mpe babandaki kotuna ye moko sima ya mosusu: 'Nkolo ezali ngai?
23 Yesu azongisaki: 'Moto oyo akoteka ngai, ezali oyo atie loboko na ye na sani elongo na ngai.
24 Mwana ya Moto akokufa ndenge ekomama mpo na ye. Kasi mawa mingi na moto oyo ateki Mwana ya Moto. Elingaki kozala malamu mpo na ye soki abotamaki te.
25 Bongo Yuda oyo atekaki ye, atunaki mpe: 'Moteyi, ezali ngai? Yesu azongiselaki ye: 'E e, osili koloba yango.
26 Tango bazalaki kolia, Yesu akamataki lipa, azongisaki matondi, akataki yango mpe apesaki yango na bayekoli na ye; mpe alobaki: 'Bokamata mpe bolia; oyo ezali nzoto na ngai.
27 Bongo akamataki kopo, azongisaki matondi, mpe apesaki bango yango; mpe alobaki: 'Bomela yango bino nyonso;
28 oyo ezali makila na ngai, makila ya Boyokani, oyo esopana mpo na bato ebele, mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu.
29 Nalobi na bino, nakomela lisusu vino oyo te, banda sik'oyo kino mokolo nakomela yango na lolenge mosusu elongo na bino,
na Bokonzi ya Tata na ngai.
30 Sima ya koyemba banzembo, bakendaki na ngomba ya banzete ya oliye.
31 Bongo Yesu alobaki na bango: 'Na butu ya lelo, bino nyonso bokokweyisa kondima na bino mpo na ngai. Pamba te ekomama: 'Nakobeta mobateli, mpe bameme ya etonga bakopalangana.'
32 Kasi sima ya kosekwa na ngai, nakokende liboso na bino na Galileya!
33 Piere alobaki: 'Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango mpo na yo kasi ngai nakokweyisa yango te.
34 Yesu azongiselaki ye: 'Nalobi na yo ya solo: na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato.
35 Kasi Piere alobaki na ye: 'Atako soki nasengeli kokufa na yo elongo, nakowangana yo te. Bongo bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.
36 Bongo Yesu akendaki elongo na bayekoli na ye na esika moko babengaka Getesemane; mpe alobaki na bango: 'Bovanda awa, na tango ngai nakei kobondela kuna.
37 "Akamataki Piere na bana mibale ya Zebede, mpe abandaki koyoka mawa mingi penza mpe pasi na motema.
38 Bongo alobaki na bango: 'Elimo na ngai etondi na mawa mingi penza pene ya liwa. Botikala awa, bokengela elongo na ngai.
39 Akendaki mwa moke liboso, akweyaki elongi na nse, mpe abondelaki: 'Tata, soki ekoki kosalama, tika ete kopo oyo eleka mosika na ngai! Esalama ndenge ngai nalingi te, kasi ndenge yo olingi.
40 Bongo azongaki epai ya bayekoli na ye mpe akutaki bango balali. Alobaki na Piere: 'Boni, bokoki kokengela elongo na ngai ata ngonga moko te?
41 Bokengela mpe bobondela mpo bokweya na komekama te. Molimo ezali na mokano ya malamu kasi nzoto ezali na bolembu.
42 Akendaki lisusu mbala ya mibale mpe abondelaki: 'E e! Tata na ngai, soki ekoki kosalama te ete kopo oyo eleka mosika na ngai, kasi esengeli kaka namela yango tika ete mokano na yo esalama.
43 Tango azongaki, akutaki bango balali lisusu, pamba te miso na bango ekomaki kilo mpo na pongi.
44 Bongo atikaki bango mpe akendaki lisusu kobondela mpo na mbala ya misato; mpe alobaki kaka maloba moko.
45 Bongo azongaki epai ya bayekoli mpe alobaki na bango: 'Bozali naino kolala mpe kopema? Botala, ngonga ekomi pene mpe Mwana ya Moto bakabi ye na maboko ya batu ya masumu.
46 Botelema, tokende. Moto oyo ateki ngai, akomi.
47 Tango azalaki naino koloba; Yuda, moko na kati ya bapostolo zomi na mibale, ayaki elongo na bato ebele, bamemaki mipanga na banzete. Bakonzi ya banganga-Nzambe na bankolo ya Bayuda nde bato batindaki bango.
48 Moto oyo atekaki Yesu alakisaki bango elembo; alobaki: 'Moto oyo ngai nakopesa beze, ye wana, bokanga ye.
49 Na mbala moko, apusanaki pene-pene ya Yesu mpe alobaki na ye: 'Mbote Moteyi! Bongo apesaki ye beze.
50 Yesu alobaki na ye: 'Moninga na ngai, sala likambo oyo oyeli. Bongo basusu bayaki pene-pene na ye, basimbaki Yesu, mpe bakangaki ye.
51 Moko na kati ya bato oyo bazalaki na Yesu asembolaki loboko, abimisaki mopanga na ye, abetaki mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.
52 Kasi Yesu alobaki na ye: 'Zongisa mopanga na yo na esika na yango; pamba te bato nyonso oyo bakamataka mopanga, bakokufa mpe na mopanga.
53 Okanisi ete nakoki kobenga Tata na ngai te, mpe ye akoki kotindela ngai na mbala moko te mapinga ya baanzelu koleka zomi na mibale?
54 Bongo ndenge nini Makomi ekokokisama, oyo ezali koloba ete esengeli makambo yango esalama bongo?
55 Na tango wana, Yesu alobaki na ebele ya bato: 'Boni, nakomi moyibi, mpo boya kokanga ngai na mipanga mpe banzete na maboko? Nazalaki kovanda mikolo nyonso na lopango ya Ndako ya Nzambe mpo na koteya, mpe bokangaki ngai te!
56 Kasi nyonso oyo esalami, mpo ete Makomi ya baprofeta ekokisama! Bongo bayekoli nyonso batikaki ye mpe bakimaki.
57 Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki ye epai ya Kayifa, mokonzi ya banganga Nzambe, epai wapi balakisi ya Mibeko mpe bampaka basanganaki.
58 Kasi Piere azalaki kolanda ye na mosika kino na lopango ya mokonzi ya banganga-Nzambe. Akotaki na lopango, mpe avandaki elongo na bakengeli mpo na kotala soki makambo yango ekosuka ndenge nini.
59 Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya likita monene ya Bayuda, bazalaki koluka litatoli ya lokuta mpo na Yesu, mpo ete bakoka koboma ye.
60 Atako batemwe ya lokuta bayaki mingi, kasi bazwaki ata moko te. Na sima, bato mibale bayaki,
61 mpe balobaki: 'Moto oyo alobaki: "Nakoki koboma Ndako ya Nzambe mpe kotonga yango lisusu na mikolo misato"
62 Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe atelemaki mpe atunaki Yesu: 'Ozali na likambo ya kozongisa te? Litatoli nini bato oyo bazali koloba mpo na yo?
63 Kasi Yesu azongisaki eloko moko te. Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe alobaki na ye: 'Nazali kolapisa yo ndayi na kombo ya Nzambe ya bomoi: yebisa biso soki ozali Kristo, Mwana ya Nzambe!
64 Yesu azongisaki: 'E e, ezali bongo ndenge olobi. Kasi nalobi na bino: Banda sik'oyo, bokomona Mwana na Moto akovanda na loboko ya oyo aleki na nguya mpe akoya na mapata ya likolo!
65 Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe, apasolaki bilamba na ye, mpe alobaki: 'Atioli Nzambe! Tina nini toluka lisusu batemwe? Boyoki bino moko ndenge atioli Nzambe!
66 Bongo bokanisi nini? Bazongisaki: 'Akoki na liwa!
67 Bongo, babwakelaki ye soyi na elongi mpe babetaki ye makofi. Basusu babetaki ye bambata
68 mpe balobaki: 'Kristo, sakolela biso, nani abeti yo?
69 Na tango wana, Piere avandaki libanda, na kati ya lopango. Mosali moko ya mwasi ayaki epai na ye, mpe alobaki: 'Yo mpe ozalaki na Yesu ya Galileya.
70 Kasi Piere awanganaki na miso ya bato nyonso: 'Nayebi kutu te makambo ozali koloba!
71 Tango azalaki kokende epai porte ezalaki, mosali mosusu ya mwasi amonaki ye, mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana: 'Moto oyo azalaki na Yesu ya Nazareti.
72 'Piere awanganaki lisusu mpe alapaki ndayi: 'Nayebi moto wana te!
73 Sima ya mwa tango moke, bato oyo batelemaki wana, bayaki pene-pene ya Piere mpe balobaki na ye: 'Ya solo, yo mpe ozali moko ya bato wana, pamba te elobeli na yo ezali kofunda yo!
74 Bongo abandaki komilakela mabe mpe kolapa ndayi: Nayebi moto wana te. Kaka na tango wana, soso elelaki.
75 Bongo Piere akanisaki maloba oyo Yesu alobaki: "Liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato". Abimaki libanda mpe alelaki mingi.