[creation site web] [logiciel creation site] [creation site internet] [Ebandeli]
[Lisanga]
[Mabondeli]
[Matatoli]
[Mateya]
[Mandanda]
[mayebisi]
[Mindule]

LMC
2012
01/01/2012 - 31/12/2012

Ngai nazali ngai moko, oyebi mpe nioso ezali na motema na ngai, esemgo to mawa, atako nabombeli moto nioso Makambo na ngai, bisengo to mawa na ngai,
Nakoki kobombela yo eloko moko te.
Nakumisu yo nandenge yo ozali tango nioso pene na ngai, tango nioso okokengela mpe ko batela ngai,
Ndenge nini nazala mosika na yo, atako mitungisi to pasi etindi ngai nabosana yo,
Yo obosanaka moto te,
Amen

Ndenge nini nayeba oyo ezali na motema na bango, to tina ya mobembo na bango,
Kasi yo oyebi nioso wana, esengo to mawa bato mingi babombaka
Yango na motema,
Soki natali bato oyo nioso bazali koleka liboso na ngai, kaka bato oyo bazali kota bola
Loboko na loboko, mwasi mobali, na baoyo bazali lisanga, misato to mineyi,
Bango nde soki na tali bilongi na bango, bazali lokola bato oyo bazali na esengo.
Mobembo na bango nakanisi eleki malamu. To bazali kokende esika bakanaki uta mikolo,
Ezali ya solo esengo, soki oyo okanaki ekokisami.
Nioso wana, yo nzambe na biso oyebi nioso….

LOSAMBO YA MOLEKI NZELA

Na nzela mobembo

Nkolo na ngai, nabuaki miso na ngai pembeni na ngai,
Ebele ya bato bazali kotambola, bamosusu bazali kokende mobembe,
Bamisusu bawuti mobembo, ebele ya bato oyo, yo oyebi bango nioso
Oyobi mpe moko moko na kombo na ye.
Nazali kotala ebele ya bato oyo bazali koleka liboso na ngai,

LOSAMBO YA SANZA YA ZOMI NA MOKO -  YA BANINGA YA MAPAMBOLI.COM

Mapamboli.com,
lisanga moke kati na internet
mpo na kopanza sango ya Nzambe.
Nkembo mpe lokumu na Nzambe ya bikolo nioso.

Logwa na mpongi ndeko, telema mpe omilengela, Yesu azali koya.

L. M.C. ezali na posa na yo, ozala na Congo to mosika, yaka kosangana na biso elongo na mabondeli.

L.M.C. ezali lingomba ya mayangani te, yango ezali kosangisa bandimi nioso oyo balingi kopesa tango na bango mpo na kobundela mboka congo na mabondeli. Tokotelema  ngwi mikolo nioso, butu mpe moyi mpo  ete Nzambe atelemisa mboka congo,mpe alongola yango na pasi mpe bosoto. Etumba ya Bakrito ezali ya minduki te. Masasi  na biso yango ezali se losambo. Elonga na biso ezali na maboko ya Nzambe .

Makanisi na biso
mpe lelo na bamangomba
ya Nzambe
na bakristo nioso oyo
bazali na zamba.

Tokobosana te bana oyo bazali na ba-orphelina
na ba oyo bazali koyenga yenga
bango moko na ba
mboka oyo ezali na bitumba

Tokobosana te bandeko
nioso oyo bazali na
ba mboka oyo
Angola mpe mboka
Centrafrique.

Mapamboli.com ezali na posa na yo, ozala na Congo to mosika, tolingi kosangana elongo na mabondeli.

Mapamboli.com ezali kosangisa bana mpe mikolo, basi mpe mibali, bato banso oyo balingi kopesa tango na bango mpo na mabondeli. Tokobondela mpo na bandeko oyo bazali na pasi, bamboka oyo ezali na mitungisi, bandimi oyo bazali koniokama mpo na kondima na bango. Tokokota makambo ya politiki te. Tokolakisa moto mosapi te. Likambo yango nini ekokwela biso oyo Nzambe ayebi te, Eloko nini akoki kosala te mpo na biso, to mpo na mboka Congo ?



Tokobondela mingi mpo na
"economie"
ya mokili mobimba
Atako bingumba nioso ezali kolela "Crise"
Tosengeli kotia makanisi na biso mpe elikia epayi
ya Nzambe

BANZEMBO 5

1 Yawe, yoka maloba na ngai; mpe tala kolela na ngai!  2 Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai, yoka koganga oyo nazali koganga mpo na kosenga lisalisi, pamba te epai na yo nazali kobondela. 3 Yawe, na tongo oyokaka mongongo na ngai; na tongo natiaka makambo oyo nasengaka liboso na yo; mpe nazelaka eyano na yo. 4 Pamba te ozali Nzambe oyo osepelaka na makambo ya mabe te; mpe moto ya mabe akoki kofanda elongo na yo te. 5 Bato ya lolendo bakoki kotelema na miso na yo te; mpe oyinaka baoyo nyonso basalaka mabe. 6 Obebisaka bato oyo balobaka lokuta; Yawe ayokaka somo mpo na bato oyo basopaka makila ya bato mpe baoyo bakosaka. 7 Kasi ngai nakokota na ndako na yo, mpo na boboto na yo oyo eleki monene; mpe nakokumbama na kati ya ndako na yo ya bosantu, na botosi nyonso oyo nazali na yango epai na yo. 8 Yawe, kamba ngai kati na bosembo na yo; mpo na banguna na ngai; bongisa nzela na yo liboso na ngai. 9 Pamba te, makambo oyo bakoki kotiela elikya ezali na minoko na bango te; mitema na bango etondi na makambo oyo ebebisaka; bakingo na bango ezali lokola malita oyo efungwama, mpe lolemo na bango elobaka lokuta. 11 Nzambe, Iakisa bango ete bazali na mbeba! Tika ete mabongisi na bango ekweyisa bango; bengana bango mpo na masumu na bango ebele pamba te batombokeli yo. 12 Kasi tika ete baoyo nyonso bayaka kobombana epai na yo basepela, bakoyemba mikolo nyonso na esengo mpe tika batela bango; mpe baoyo balingaka kombo na yo bakosepela kati na yo. 13 Yawe, ya solo opambolaka moto na sembo; ozingi bango na bolamu na yo lokola ebende ya makasi oyo ebatelaka basoda na tango ya bitumba.

Mapamboli.com 2010. Nioso esalami mpo na lokumu ya Nzambe. Motuna to lisalisi, komela biso mokanda. Mokambi ya misala oyo : Jupé Bongolo