[creation site internet] [creation site web] [logiciel creation site] [Ebandeli]
[Lisanga]
[Mabondeli]
[Matatoli]
[Mateya]
[Mandanda]
[mayebisi]
[Mindule]
[Lisanga]
[Matie]
[Marko]
[Luka]
[Jean]
[Misala]
[Roma]
[1Korinto]
[2Korinto]
[Galatia]
[Efezo]
[Filipi]
[Kolosai]
[1Tesalonika]
[2Tesalonika]
[1Timote]
[2Timote]
[Tito]
[Filemo]
[Ba-ebreo]
[Zaki]
[1Piere]
[2Piere]
[1Jean]
[2Jean]
[3Jean]
[Yude]
[Emoniseli]
[Banzembo]

Mapamboli.com
Sango malamu na lingala.

Liloba ya Nzambe ezali bileyi na biso ya
mokolo na mokolo.

MOKANO NA BISO

Na nzela ya internet, mondimi nioso akoki koya Kolendisa bandeko, to baninga na ye, na mateya, maloba, bilili nioso oyo  ezali na nzela moko na bibilia to na mpe mangomba ya bakristo.
  

MOTUNA TO MOKANDA

Okoki kokomela mokambi ya misala ya mapamboli.com.
Jupé Bongolo,
Kende na esika oyo ebongisami mpo na mokanda, Tika ete
Nzambe apambola yo.

MISALA NA BISO

Soki Nzambe alingi mpe akambi biso, Tokoyeba kobakisa boyokani ya kala. Okoki kopesa biso maboko, Ekozala esengo mingi, soki yo okoti   kati ya lisanga ya Mapamboli.com.
  

MOKANO NA BISO

Mapamboli.com ezali lingomba ya
mayangani te.
Yango ezali lisanga oyo ebongisami mpo  na mondimi nioso oyo alingi, azua esika ya  kokumisa Nzambe na monoko na biso (Lingala).

LISANGA YA MAPAMBOLI.COM

TINA NA YANGO NINI ?

Uta kala nazuaki likanisi ya kokoma na lingala bobele mpo nakopesa baninga oyo bazali mosika, ozonga-zonga ya mokili, likabo ya kotanga bibilia, mateya na matatoli na monoko na biso. Toyebi na nalamu te, kozua bibilia to mokanda mosusu ya lingala ezali pasi mingi. Mpo na bandeko oyo bazali mosika, na mikili ya poto, yango ekomi lisussu modingo molayi.

Nzambe akumbama mpo na likanisi oyo ya internet.

Misala nioso oyo tokosala awa ezali ya ofelé, ezali mobongo te, tozali mpe kozela litomba moko te na maboko ya bato.

Mapamboli.com,
lisanga moke kati na internet
mpo na kopanza sango ya Nzambe.
Nkembo mpe lokumu na Nzambe ya bikolo nioso.

Logwa na mpongi ndeko, telema mpe omilengela, Yesu azali koya.