EMONISELI 18
1 Na sima ya makambo wana, namonaki anzelu mosusu awutaki na likolo mpe ayaki kokita. Azalaki na nguya monene, mpe nkembo na ye engengisaki mokili.
2 Agangaki na mongongo makasi: monene ya Babilona ekwei, ekwei. Ekomi mboka ya bazabolo, ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo mpe ebombamelo ya bandeke ya mbindo mpe oyo eboyama.
3 Pamba te bikolo nyonso emelaki vino ya kanda ya kindumba na yango. Bakonzi minene ya mabele basalaki ekobo elongo na vile yango, mpe bato ya mombongo ya mabele bakomaki na bomengo mingi wuta na bomengo na yango oyo eleki ndeko."
4 Bongo nayokaki mongongo mosusu ewutaki na likolo, elobaki: 'Bino bato na ngai, bobima na kati ya vile wana, mpo ete bosangana na masumu na yango te, mpe bozwa bapasi na yango te.
5 Pamba te masumu na yango etondi mingi kino na likolo. Mpe
Nzambe akanisi mabe na yango.
6 Bosalela yango ndenge asalaki bino. Makambo oyo asalaki, bofuta ye yango mbala mibale. Kopo oyo asangisaki mpo na bino, masanga ya ngai oyo amelisaki, bomelisa ye yango mbala
mibale.
7 Boyokisa yango pasi mpe mawa, ndenge yango ezalaki komikumisa mpe emitondisaki na bomengo. Pamba te elæis koloba: "Nayandi lokola mokonzi monene ya mwasi; nakufela mobali te, mpe nakosala matanga ata mokolo moko te."
8 Yango wana, bapasi na yango ekokweyela yango na mokolo moko: liwa, matanga, nzala, mpe bakotumba yango na moto. Pamba te Nkolo Nzambe oyo apesi yango etumbu, azali na nguya mingi.
9 Bongo bakonzi ya mokili, baoyo basalaki na yango ekobo mpe basanganaki na bisengo na yango, bakomona pasi mpe bakolela mpo na vile wana, tango bakomona milinga ya moto oyo ekozikisa yango.
10 Bakotelema mosika mpo na kobanga pasi oyo ekokweyela vile yango. Bongo bakoloba: "Mawa! Mawa! Vile monene, Babilone vile ya nguya! Pamba te kobeba na yango eye kaka na ngonga moko!"
11 Bongo bato ya mombongo ya mokili bakolela mpe bakosala matanga mpo na vile yango, pamba te moto ata moko te akosomba lisusu biloko na bango:
12 wolo, palata, mabanga ya talo, mayaka, bilamba ya lino ya pete-pete, bilamba ya motane ya pete-pete, bilamba ya swa, bilamba ya motane makasi, banzete nyonso ya solo kitoko, biloko ya ndenge na ndenge oyo esalami na pembe ya nzoku, biloko ya ndenge na ndenge oyo esalami na banzete ya talo mpe na bibende lokola 'Bronze', 'Fer', mpe na mabanga ya kitoko oyo babengaka 'Marbre';
13 biloko basangisaka na bilei mpo na koyeisa yango elengi, malasi, mire, banzete ya solo kitoko oyo batumbaka, vino, mafuta, farine, ble, bangombe, bameme, bampunda, shario, bawumbu, mpe milimo ya batu.
14 Bakoloba: "biloko nyonso oyo ozalaki kolinga mingi etiki yo mosika; bomengo mpe biloko ya kitoko nyonso ebebi, okozwa yango lisusu te!"
15 Bato ya mombongo oyo bazwaki bomengo tango bazalaki kotekisa biloko na bango na vile wana, bakotelema mosika mpo na kobanga pasi oyo ekokweyela vile yango. Bakolela, bakosala matanga
16 mpe bakoloba: 'Mawa! Mawa! Vile monene, ezalaki kolata bilamba ya lino ya pete-pete, bilamba ya motane ya makasi, babizu ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka!
17 Kasi tala, na ngonga moko kaka, bomengo wana nyonso ebebi. Bakapiteni nyonso ya masinya, bato nyonso oyo basalaka mibembo na masuwa, bato oyo basalaka na masuwa, mpe baoyo basalaka mombongo na nzela ya mayi, batelemaki na mosika.
18 Tango bamonaki milinga ya kozika na yango, bagangaki: 'Vile nini ekokani na vile monene?
19 Bongo, bazalaki kobwaka putulu na mitu na bango, bazalaki kolela mpe komitungisa, mpe koganga na mongongo makasi: 'Mawa! Mawa! Vile monene! Pamba te bato nyonso oyo bazalaki na bamasuwa na ebale bakomaki bato ya bomengo mpo na bomengo ya vile yango. Kasi tala, na ngonga moko kaka, yango nyonso ebebi.
20 Likolo, sepela mpo na vile yango! Bino basantu, bapostolo mpe baprofeta, bosepela mpe! Pamba te, Nzambe alongisi bino awa akateli vile yango etumbu.
21 Bongo anzelu moko ya nguya akamataki libanga moko ezalaki lokola oyo basalelaka mpo na konika ble, abwakaki yango na ebale monene mpe alobaki: 'Vile monene ya Babilone, bakobwaka yango ndenge wana na makasi nyonso, mpe ekomonana lisusu te.
22 Miziki ya babeti lindanda mpe ya bayembi, ya babeti piololo mpe kelelo, ekoyokana lisusu te kati na yo. Bato oyo basalaka misala ya maboko ya ndenge na ndenge, bakomonana lisusu te epai na yo; makelele ya mabanga minene oyo banikelaka ble ekoyokana lisusu te epai na yo.
23 Mwinda ekopela lisusu te epai na yo, mpe mongongo ya mobali mpe mwasi oyo bawuti kobalana ekoyokana lisusu te epai na yo, pamba te bato na yo ya mombongo bazalaki bato minene ya mokili; mpe okosaki bato ya bikolo nyonso na mazi na yo.
24 Kati na yo, bakutaki makila ya baprofeta, ya basantu, mpe ya bato nyonso oyo babomaki na mokili.