BANZEMBO 100
1 Boganga na esengo epai na Yawe mokili mobimba,! 2 Bokumbamela Yawe na esengo nyonso, mpe boya liboso na ye na banzembo ya esengo!3 Boyeba ete Yawe azali Nzambe. Ye moto asalaki biso, mpe biso tozali bato na ye; tozali bato na ye, mpe bameme oyo ye aleyisaka. 4 Bokota na baporte na ye na kozongisa matondi; mpe na lopango na ye na masanzoli. Bopesa ye matondi mpe bosanzola kombo na ye. 5 Pamba te Yawe azali malamu; mpe bolingo na ye ezali kowumela tango nyonso, mpe boyengebene na ye ezali kokoba na batango nyonso