Na mboka na biso, ata na pasi to na bisengo, tokoyemba mpe tokobina.
Tokumisa Nzambe mpo na elembo oyo monene apesi biso.
Tokosenga na ye ete na tango tozali koyembela ye, likolo efongwama,
ba ngomba ekweya, bamaladi babika,mpe Satana akima mosika na biso.
Yango wana na nzela ya Yesu, topesaka Nzambe tango nyonso likabo oyo epesaka ye lokumu, elingi koloba: tokumisaka kombo na ye.
Ba- ebreo 13:15.
Bomilengele mpe bomibongisa mpo na kokende liboso na Nkolo, kaka na tango ya mabondeli te, ya mayangani te kasi mingi lokola na tango oyo bokani kokumisa mpe kosadjola nkombo na ye. Ozali na mongongo kitoko, Nzongisa matondo epayi ya Nkolo mpo na mongongo na yo kitoko. Soki olobi ete: ngai nayebi koyemba te, likambo te, kumisa Nzambe. Mongongo ezali na tina te liboso na Nkolo. Tosengeli kokumisa Nzambe liboso kati na motema na biso. Maloba mpe kelolo oyo ekobima na monoko, esengeli kowuta na motema mpenza. Banzembo mpe masandjoli na biso ekosepelisa nzambe bobele soki toyei liboso na ye na motema polele.
Bobosana te, nguya mpe mapamboli ezali na maboko ya Nzambe. Atako okoyemba mpe kobina mpo na nkolo butu moyi yango ekozala na tina te soki motema na biso ezali mosika na ye.
LMC ezali lioko eteni ya mapamboli.com. Yango ezali lingomba ya mayangani te . Moto nioso azali na tango mpe likanisi ya kobondela mpo na mboka Congo, akoki koya elongo na biso mpo na kobondela. Tika ete Nzambe apambola mpe abatela mboka Congo.