[creation site internet] [logiciel creation site] [creation site web] []
[Ebandeli]
[Lisanga]
[Mabondeli]
[Matatoli]
[Mateya]
[Mandanda]
[mayebisi]
[Mindule]
[Matie]
[Marko]
[Luka]
[Jean]
[Misala]
[Roma]
[1Korinto]
[2Korinto]
[Galatia]
[Efezo]
[Filipi]
[Kolosai]
[1Tesalonika]
[2Tesalonika]
[1Timote]
[2Timote]
[Tito]
[Filemo]
[Ba-ebreo]
[Zaki]
[1Piere]
[2Piere]
[1Jean]
[2Jean]
[3Jean]
[Yude]
[Emoniseli]
[Banzembo]
[mokanda]
[mokanda]
[Ebandeli]
[Ebandeli]
[Page 1]

Yesu azali pole ya mokili , pole ya solo oyo eyaki kongenga mpo na moto nioso. Tosengeli komilengele mpe komikitisa mpo na koyamba Kristo kati na biso. Na sima yango biso mpe tokongala lokola mwinda kati na mokili. Tokoki kolakisa misala kitoko na mokili liboso ya bandeko, tokoki kozala na bolembu mpe bobangi Nzambe kasi soki mwinda ya solo oyo ewuta na likolo eyei kongala kati na biso te, soki yango elongoli bosoto mpe ebungisi misala mabe kati na biso te, tozali solo lokola babungi Nzela. Oyo akolanda Yesu ekomama, akotambola na molili te

  

Oyo ezali sango toyokaki epai na ye mpe tozali koyebisa bino: Nzambe azali moi; mpe kati na ye, molili ezali ata moke te. Soki tolobi ete tozali lisanga elongo na ye, mpe tozali kaka kotambola kati na molili, wana tozali bato ya lokuta mpe tosalelaka solo te. Kasi soki tozali kotambola kati na pole, ndenge ye moko azali kati na pole, wana tozali lisanga moko, mpe makila ya Yesu, Mwana na ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso. Soki tolobi ete tozangi masumu, wana tozali komikosa biso moko mpe solo ezali kati na biso te. 1 JEAN 1: 5-8

  

YESU AZALI MWINDA

Mokolo mosusu elongo na Zaki Yesu amemaki bango likolo ya ngomba moko ya molayi penza, epai bazalaki kaka bango moko. Bongo nzoto na ye ebongwanaki liboso na bango; elongi na ye ekomaki kongenga lokola moi mpe bilamba na ye ekomaki pembe makasi penza.

Jean azalaki kotambola elongo na Yesu, ayokaki maloba na ye, amonaki polele bokasi mpe nguya ya Nzambe, ayambaki na motema na ye mateya ya Mokonzi na ye. Asalaki mpe makamwisi mingi na nguya ya Nzambe. Tembe te bato mingi mpenza bapambolamaki mpo na mateya na ye, na te mokolo ya lelo makomi na ye azali kobikisa bato.

Soki ya solo biso mpe lelo toyambi yesu mpe totiki angala kati na biso, lokola Jean tokotambola na molili te, mpe tokopambola mpe baninga oyo bazali na molili. Oyo nioso ezali na bibilia ekomama mpo na bato ya tango wana kaka te kasi mpo na yo mpe ngai lelo oyo. Landa lisusu ndenge Jean alobi mpo na yo mondimi ya lelo:

Pole ya solo, oyo epesaka moi na bato nyonso, eyaki kati na mokili. Azalaki kati na mokili, mpe mokili esalamaki na ye mpe mokili eyebaki ye te. Ayaki na ekolo na ye moko, kasi bato ya ekolo na ye bayambaki ye te. Kasi bato nyonso oyo bayambaki ye, baoyo bandimaki kombo na ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.

Kobosana te, ndeko na ngai, mondimi nioso azali mwana na Nzambe te. Mwana na Nzambe lokola ekomami, ezali bobele oyo ayambi Yesu, mwinda ya mokili mpe andimi kombo na ye. Tika ete Nzambe apambola yo na libota na yo mobimba.

Janvier 2010. Jupé BONGOLO

  

Oyo ezali sango toyokaki epai na ye mpe tozali koyebisa bino: Nzambe azali moi; mpe kati na ye, molili ezali ata moke te. Soki tolobi ete tozali lisanga elongo na ye, mpe tozali kaka kotambola kati na molili, wana tozali bato ya lokuta mpe tosalelaka solo te. Kasi soki tozali kotambola kati na pole, ndenge ye moko azali kati na pole, wana tozali lisanga moko, mpe makila ya Yesu, Mwana na ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso. Soki tolobi ete tozangi masumu, wana tozali komikosa biso moko mpe solo ezali kati na biso te. 1 JEAN 1: 5-8

Yesu azali pole ya mokili , pole ya solo oyo eyaki kongenga mpo na moto nioso. Tosengeli komilengele mpe komikitisa mpo na koyamba Kristo kati na biso. Na sima yango biso mpe tokongala lokola mwinda kati na mokili.

Tokoki kolakisa misala kitoko na mokili liboso ya bandeko, tokoki kozala na bolembu mpe bobangi Nzambe kasi soki mwinda ya solo oyo ewuta na likolo eyei kongala kati na biso te, soki yango elongoli bosoto mpe ebungisi misala mabe kati na biso te, tozali solo lokola babungi Nzela. Oyo akolanda Yesu ekomama, akotambola na molili te.

Bato mibale bakufa miso bazalaki kolanda ye na koganga: 'Mwana ya David, yokela biso mawa! Tango akotaki na ndako, bakufi miso bayaki epai na ye; mpe atunaki bango: 'Bondimi ete nakoki kosala yango? Bango bazongisaki: 'E e Nkolo! Bongo asimbaki miso na bango, mpe alobaki: 'Esalemela bino ndenge bondimeli !

Bato oyo mibale bakufa miso balandaki Yesu pamba te bayokaki sango na ye. Tango bayaki epai na ye, Yesu abikisaki bango, miso na bango efongwamaki. Biso bakristo, tosengeli kolanda ye kaka mpo na oyo matoyi na biso ezali koyoka mpo na ye te, kasi mingi lisusu mpo na nguya na ye oyo ezali komonana na miso.Jean ayokaki na matoyi na ye moko ndenge Yesu alobaki, ngai na zali pole ya mokili.

  

YESU AZALI MWINDA YA MOKILI

Mapamboli.com,
lisanga moke kati na internet
mpo na kopanza sango ya Nzambe.
Nkembo mpe lokumu na Nzambe ya bikolo nioso.

Logwa na mpongi ndeko, telema mpe omilengela, Yesu azali koya.

MOTEMA BOLEMBU

Bandeko ye Yosefi balobaki boye: limbisa mabe ya bandeko na yo, na masumu na bango, ya solo basalaki yo mabe. Olimbisa masumu ya basali ya Tata na yo. Gènese 50.17.

Josefi atelemi ngwi, liboso ya bato oyo basalaki ye mabe. Ye abosani te mabe ya bandeko na ye, bango oyo batekaki ye. Lelo oyo ye akomi na bokonzi ya leta, Akoki kokatela bango boloko soki akani. Kasi, ye afutisi bango nyongo ya mabe na bango te, alimbisi bango.

Osengeli kozala yuma to moto ya bolembu mpo na kolimbisa moto oyo asali yo mabe ? Ezali lokuta na oyo mingi tokanisaka. Kanisa moke, lelo oyo mpo na koyina ndeko to moninga na yo, mpo na kolakela ye mabe osengeli kosala makasi nini ? Osengeli koleka ye makasi ? Nakanisi te, kanda ezali eloko oyo ekangama na motema ya moto.

Soki na motema na biso, tobombi maye nioso ya mabe bato basalaki biso, yango ekobota kanda na makani ya mabe, nalolenge wana , tofungoli nzela na monguna . Mitungisi mpe pasi ekoya na motema na biso. Kaka bolimbisi ya solo ekoki kokotisa kimia kati na biso.
Bato mingi lele bayebi nini bolimbisi te, pamba te makanisi na bango ezali kaka na sima, kaka na maye nioso ya mabe bato basalaki bango. Telama ngui, mpe limbisa, bolimbisi ezali likambo ya bayuma te. Ezali makasi oyo Nzambe apesi biso. Atako ndeko  oyo asali mabe andimi mabe na ye te, atako azali kotiola yo, ezali likambo te. Na ndenge wana nde oyokisi soni na Satana, Eloko moko lisusu
te ekopolisa makanisi mpe molimo na yo. Kimia ekozonga kati ya motema.

Losambo ya lelo.
Salisa ngai Nkolo, na yeba kolimbisa, nakanisaki ezalaki likambo ya bayuma, kasi na mikosaki, makasi na ngai ekowuta epayi na yo. Pesa ngai nguya ya kobosana mabe nioso oyo bandeko basalaki ngai, nankombo ya Yesu Kristo. Amen.

MOKANO NA BISO

Na nzela ya internet, mondimi nioso akoki koya  Kolendisa bandeko, to baninga na ye, na mateya, maloba, bilili nioso oyo ezali na nzela moko na bibilia to na mpe mangomba ya bakristo.
  

MOTUNA TO MOKANDA

Okoki kokomela mokambi ya misala ya mapamboli.com.
Jupé Bongolo,
Kende na esika oyo ebongisami mpo na mokanda, Tika ete
Nzambe apambola yo.

MISALA NA BISO

Soki Nzambe alingi mpe akambi biso, Tokoyeba kobakisa boyokani ya kala. Okoki kopesa biso maboko, Ekozala esengo mingi, soki yo okoti   kati ya lisanga ya Mapamboli.com.
  

MOKANO NA BISO

Mapamboli.com ezali lingomba ya
mayangani te.
Yango ezali lisanga oyo ebongisami mpo  na mondimi nioso oyo alingi, azua esika ya kokumisa Nzambe na monoko na biso (Lingala).