[creation site internet] [logiciel creation site] [creation site web] [Banzembo]
[Banzembo]
[Ebandeli]
[Lisanga]
[Mabondeli]
[Matatoli]
[Mateya]
[Mandanda]
[mayebisi]
[Mindule]
[Matie]
[Marko]
[Luka]
[Jean]
[Misala]
[Roma]
[1Korinto]
[2Korinto]
[Galatia]
[Efezo]
[Filipi]
[Kolosai]
[1Tesalonika]
[2Tesalonika]
[1Timote]
[2Timote]
[Tito]
[Filemo]
[Ba-ebreo]
[Zaki]
[1Piere]
[2Piere]
[1Jean]
[2Jean]
[3Jean]
[Yude]
[Emoniseli]
[Banzembo]

BOYOKANI YA SIKA MPE BANZEMBO
BANZEMBO

BANZEMBO 150

1 Bosanzola   Yawe!   Bosanzola Nzambe kati na Esika na ye ya
bosantu! Bosanzola ye na nguya na ye ya likolo.

2 Bosanzola ye mpo na misala na ye ya nguya! Bosanzola ye mpo na monene na ye oyo ezangi ndelo.                         

3 Bosanzola ye na mongongo ya kelelo, bokumisa ye na likembe mpe na lindanda,   

4 bosanzola ye na mbunda mpe na mabina,  bosanzola ye na mandanda ya singa mpe na  flute,

5 bosanzola ye na bangongi ya mike, bosanzola ye na bangongi ya minene.

6 Tika ete nyonso oyo ezali na mpema, esanzola Yawe! Bosanzola Yawe.

BANZEMBO 149

1 Bosanzola Yawe! Boyembela Yawe nzembo ya sika! Bosanzola ye kati na lisanga ya basantu.

2 Tika Isayele asepela na Mozalisi na bango! Tika ete bato ya Siona bazala na esengo mpo na Mokonzi na bango!

3 Tika bango basanzola kombo na ye na mabina; mpe babeta miziki mpo na ye na mbunda mpe lindanda!

4 Pamba te Yawe asepelaka na bato na ye; alatisaka na lobiko bato oyo bamikitisaka.

5 Tika basantu basepela kati na lokumu yango; mpe bayemba na esengo na bambeto na bango.

6 Tika masanzoli ya Nzambe ezala na minoko na bango; mpe mopanga ya mino mibale na maboko na bango,

7 mpo na kozongisa mabe ya bikolo, mpe kopesa etumbu na bato,

8 mpo na kokanga bakonzi na bango na minyololo, bato na bango ya minene na mabende,

9 mpo na kopesa bango etumbu oyo ekomama mpo na bango! Yango oyo nkembo ya basantu na ye nyonso. Bosanzola Yawe.




  

BANZEMBO 148

1 Bosanzola Yawe! Bosanzola Yawe Owuta na Likolo! Bosanzola ye na bisika oyo eleki likolo!

2 Bosanzola ye, bino baanzelu na ye nyonso! Bosanzola ye, mapinga ya basoda na ye nyonso ya likolo!

3 Bosanzola ye, moi mpe sanza! Bosanzola ye, bino nyonso, minzoto oyo engengaka!

4 Bosanzola ye, yo lola oyo eleki likolo; mpe bino bamayi oyo ezali na likolo!

5 Tika yango esanzola kombo na Yawe! Pamba te apesaki motindo mpe yango ekelamaki.

6 Atiaki yango na bisika mpo na libela na libela; apesaki bikateli oyo ekoki koleka te.

7 Bosanzola Yawe wuta na mokili; bino bikelamu ya ebale ya monene, mpe bino bisika nyonso ya mozindo,

8 moto mpe mbula ya mabanga, mbula ya pembe mpe mapata, mopepe ya makasi oyo esalaka mitindo na ye,

9 bino bangomba mpe bangomba nyonso ya mike, banzete oyo ebotaka mbuma mpe banzete ya sedre,

10 banyama ya zamba mpe bibwele nyonso, bikelamo ya mike mpe bandeke oyo epumbwaka,

11 bakonzi ya mokili mpe bikolo nyonso, bino bana ya bakonzi mpe bakambi nyonso ya mokili,

12 bilenge mibali mpe bilenge basi, bampaka mpe bana mike;

13 tika bango basanzola kombo na Yawe! Pamba te kombo na ye kaka nde enetolami; kongenga na ye ezali likolo ya mokili mpe likolo ya lola.

14 Atelemisi mpo na bato na ye liseke moko; masanzoli ya basantu na ye nyonso, ya Isayele, bato oyo bazali ya kokangama na motema na ye pene-pene. Bosanzola Yawe.

  

BANZEMBO 147

1 Bosanzola Yawe! Tala ndenge ezali malamu mpo na koyemba masanzoli epai ya Nzambe na biso; kitoko mingi mpe ebongi kosanzola ye.

2 Yawe azali kotonga Yeruzalem; azali kosangisa bato ya Isayele oyo bakima na bikolo ya bapaya.

3 Abikisaka mitema etutama, mpe akangaka bapota na bango.

4 Akataka motuya ya minzoto, mpe abengaka moko na moko na kombo na yango.

5 Yawe na biso azali monene mpe makasi na nguya; bososoli na ye ezali na ndelo te.

6 Yawe asungaka moto oyo amikitisaka; kasi akweyisaka bato ya mabe na mabele.

7 Boyembela Yawe elongo na matondi; bobetela Nzambe na biso miziki na lindanda!

8 Azipaka likolo na mapata, abongisaka mbula mpo na mokili, mpe abimisaka matiti likolo ya bangomba ya mike.

9 Apesaka biloko ya kolia na bibwele, mpe na bana ya kombe-kombe tango babengaka.

10 Esengo na ye ezalaka na makasi ya mpunda te; kosepela na ye ezalaka na makolo ya moto te.

11 Yawe  asepelaka  kati  na  baoyo babangaka ye, na baoyo batiaka elikya na bango na bolingo na ye ya makasi.

12 Netola Yawe, Yeruzalem! Sanzola Nzambe na yo, Siona!

13 Pamba te ye moto akomisaka porte na yo makasi, mpe apambolaka bato na yo, kati na yo.

14 Atiaka kimia na bandelo na yo; mpe atondisaka yo na ble ya kitoko.

15 Atindaka malako na ye na mokili; Liloba na ye epanzanaka noki penza!

16 Apesaka mbula ya mabanga lokola bapwale ya meme, mpe apanzaka mbula ya mike-mike lokola putulu.

17 Abwakaka mbula na ye ya mabanga lokola mabanga ya mike-mike, nani akoki kotelema liboso ya mopepe ya malili na yango?

18 Atindaka liloba  na  ye,  mpe anyangwisaka yango; atindaka mopepe na ye ya makasi, mpe bamayi etiolaka.

19 Amonisaka Liloba na ye na Zakob, Mibeko na ye mpe bikateli na ye na Isayele.

20 Asalaki bongo na ekolo ata moko te; eyebaki mibeko na ye te. Bosanzola Yawe!

  

BANZEMBO 146

1 Sanzola Yawe! Sanzola Yawe, molimo na ngai,!

2 Nakosanzola Yawe na bomoi na ngai mobimba; nakoyemba masanzoli mpo na Nzambe na ngai tango nyonso oyo nakozala na bomoi.

3 Botia mitema na bino na bana ya bakonzi te, to na bato oyo bakufaka, baoyo bakoki kobikisa te.

4 Tango molimo na bango ekobima, bakozonga na mabele; na mokolo wana; mabongisi na bango nyonso ekomaka pamba.

5 Mapamboli ezali na oyo Nzambe ya Zakob azali lisalisi, oyo atiaka elikya na Yawe, Nzambe na ye!

6 Mozalisi ya likolo mpe na nse, ebale monene mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango; Yawe, ye moto abatelaka boyengebene mpo na libela.

7 Alobelaka likambo ya oyo bazali konyokola mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala; Yawe akomisaka bato ya boloko bansomi.

8 Yawe apesaka pole na mokufi miso; Yawe atelemisaka baoyo bangunzama; Yawe alingaka bato na sembo.

9 Yawe akengelaka bapaya, mpe asungaka bana oyo bakufela baboti mpe basi oyo bakufela mibali; kasi abebisaka banzela ya bato ya mabe.

10 Yawe azali na Bokonzi libela na libela; Nzambe na yo, Siona, mpo na bato ya batango nyonso. Bosanzola Yawe!

  

BANZEMBO 145

1 Nakonetola   yo,   Mokonzi Nzambe na ngai. Nakosanzola kombo na yo mpo na libela na libela.

2 Mikolo   nyonso   nakosanzola   yo, nakotombola kombo na yo mpo na libela na libela.

3 Yawe azali monene, mpe abongi koleka na masanzoli; monene na ye ekoki koyebana na moto te.

4 Bato ya tango moko bakokumisa misala na yo epai ya baoyo ya tango mosusu; bakoloba misala na yo ya nguya.

5 Bakolobela nkembo ya kongenga ya lokomu na yo; mpe nakokanisa misala na yo ya kokamwa.

6 Bakoloba nguya ya misala na yo ya kokamwa; mpe nakosakola misala na yo ya minene.

7 Bakokumisa bolamu na yo oyo eleki mingi; mpe na esengo nyonso bakoyembela bosembo nayo!

8 Yawe azali na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atondi na bolingo.

9 Yawe azali malamu epai ya moto nyonso; azali na mawa na bato nyonso oyo ye asalaki.

10 Bato nyonso oyo osala bakosanzola yo, Yawe; basantu na yo bakonetola yo.

11 akolobela nkembo ya Bokonzi na yo, mpe bakoloba mpo na nguya na yo,

12 mpo ete bato nyonso bayeba misala na yo ya nguya, mpe nkembo ya kongenga ya Bokonzi na yo.

13 Bokonzi na yo ezali bokonzi ya seko, mpe boyangeli na yo ekowumela na batango nyonso. Yawe azali moyengebene na bilaka na ye nyonso; mpe moto ya bolingo epai ya bato nyonso asalaki.

14 Yawe asimbaka baoyo nyonso bakweyaka, mpe atelemisaka baoyo nyonso bangunzama.

15 Miso ya bato nyonso etalaka yo, mpe opesaka bango bilei na tango ekoki.

16 Ofungolaka loboko na yo, mpe osilisaka baposa ya biloko nyonso oyo ezali na bornoi.

17 Yawe azali sembo na banzela na ye nyonso; mpe moto ya bolingo epai ya bato nyonso oyo asala.

18 Yawe azali pene-pene na bato nyonso oyo babengaka ye, epai ya baoyo nyonso babengaka ye na solo.

19 Akokisaka baposa ya baoyo babangaka ye; ayokaka koganga na bango mpe abikisaka bango.

20 Yawe abatelaka baoyo nyonso balingaka ye, kasi bato nyonso ya mabe bakobeba.

21 Monoko na ngai ekoloba masanzoli na Yawe. Tika ete bikelamo nyonso esanzola kombo na ye ya bosantu mpo na libela na libela.

  

BANZEMBO 144

1 Masanzoli ezala epai na Yawe, libanga na ngai; Oyo alakisaka maboko na ngai mpo na etumba, mpe misapi na ngai mpo na kobunda etumba.

2 Ye azali Nzambe na ngai ya bolingo, mpe esika ya makasi epai nabombanaka; ye azali esika na ngai epai nakimelaka mpe ye moto akangolaka ngai; ye azali ebende na ngai ya makasi oyo ebatelaka ngai, mpe nabombanaka epai na ye; Ye moto atiaki bato na nse ya Bokonzi na ngai.

3 Ee Yawe, moto azali nani mpo okanisela ye? Mwana ya moto mpo okanisa ye?

4 Moto azali lokola mopepe; mikolo na ye ezali lokola elilingi oyo ezali koleka.

5 Kabola likolo na yo, Yawe, mpe kita, simba bangomba, mpo ekobimisa milinga.

6 Tinda kongenga ya kake, mpe panza banguna na ngai; bwaka makonga na yo, mpe bungisa bango nzela.

7 Kitisa maboko na yo wuta na likolo; kangola ngai mpe sikola ngai na bamayi ya makasi, na maboko ya bapaya,

8 baoyo minoko na bango etondi na makambo ya kokosa, baoyo maboko na bango ya mibali ezali na lokuta.

9 Nakoyembela yo nzembo ya sika, Nzambe; na lindanda ya basinga zomi na kobeta miziki mpo na yo.

10 Epai ya moto oyo opesaka elonga na bakonzi; moto oyo okangolaka mosali na yo David na mopanga oyo ebomaka.

11 Kangola ngai mpe sikola ngai na maboko ya bapaya, baoyo minoko etonda na makambo ya kokosa, baoyo maboko ya mibali ezali na lokuta.

12 Bongo bana na biso ya mibali kati na bolenge na bango, bakozala lokola milona oyo ezali kokola malamu penza; mpe bana na biso ya basi bakozala lokola makonzi oyo babongisa malamu penza, mpo na kobongisa esika.

13 Bibombameli na biso ekotonda na bilei ya ndenge na ndenge; bameme na biso ekobakisama bankoto zomi kati na bilanga na biso;

14 bangombe na biso ekomema mikumba ya kilo penza. Ekozala lisusu te madusu na bamur, bakomema biso na bowumbu lisusu te mpe kolela mpo na bapasi ekozala lisusu te na babala-bala na biso.

15 Mapamboli ezala na bato oyo makambo oyo ezali solo; mapamboli ezala na bato oyo Yawe azali Nzambe.






  

BANZEMBO 143

1 Yawe, yoka libondeli na ngai; tia litoyi na koganga na ngai mpo na mawa; na boyengebene na yo mpe na bosembo na yo yaka kosalisa ngai.

2 Komema mosali na yo na kosambisama te; pamba te moto moko te ya bomoi azali sembo liboso na yo.

3 Monguna azali kolanda ngai, azali konyata ngai na nse; azali koyandisa ngai na molili lokola bato oyo basi'bakufa kala.

4 Bongo molimo na ngai elembi-lembi na kati na ngai, motema na ngai ezali kobanga na kati na ngai.

5 Nazali kokanisa lisusu mikolo ya kala; nazali kokanisa na misala na yo nyonso mpe kotala misala maboko na yo esalaki.

6 Natandaki maboko na ngai epai na yo; molimo na ngai ezali na posa na yo, lokola mabele ya kokawuka.

7 Zongisela ngai eyano noki-noki, Yawe; molimo na ngai ezali kolemba; kobombela ngai elongi na yo te, soki te nakokokana na bato oyo bazali kokita na libulu.

8 Tika tongo ememela ngai maloba ya bolingo na yo ya makasi, pamba te natiaka motema na ngai epai na yo; Iakisa ngai nzakara oyo nasengeli kolanda, pamba te epai na yo, natomboli molimo na ngai.

9 Kangola ngai na monguna na ngai, Yawe; pamba te namibombaka kati na yo.

10 Teya ngai mpo nasalaka mokano na yo, pamba te yo ozali Nzambe na ngai; tika ete Molimo na yo ya malamu ekamba ngai na mabele oyo ezanga mabulu.

11 Mpo na kombo na yo, Yawe, batela moi na ngai; na bosembo na yo, bimisa ngai na minyoko!

12 Kati na bolingo na yo ya makasi kanga minoko ya banguna na ngai, panza bayini na ngai nyonso pamba te nazali mosali na yo.

  

BANZEMBO 142

1 Nagangaki makasi epai na Yawe; Natomboli mongongo na ngai epai na Yawe mpo na mawa.

2 Nasopaki bileli na ngai liboso na ye; liboso na ye nazali koloba minyoko na ngai.

3 Tango molimo na ngai ezalaki kolemba-lemba na kati na ngai, yo oyebaki nzela na ngai; na nzela oyo nalekaki bato batielaki ngai motambo.

4 Tala na loboko ya mobali mpe mona; moto ata moko te azali na makanisi mpo na ngai. Nazali na esika ya kobombana te, moto ata moko te azali na makanisi mpo na bomoi na ngai.

5 Nazali koganga epai na yo, Yawe, nalobi: "Yo ozali ebombelo na ngai, eteni na ngai na mokili ya bato ya bomoi!"

6 Yoka koganga na ngai, pamba te nazali moto akelela oyo azangi elikya; kangola ngai na baoyo bazali kolanda ngai, pamba te baleki ngai na makasi.

7 Bimisa ngai na boloko mpo ete nakoka kosanzola kombo na yo! Bongo bato na sembo bakoya kosangana esika nazali, mpo na bolamu na yo epai na ngai.


  

BANZEMBO 141

1 Yawe, nazali kobenga yo, yaka noki epai na ngai. Tia litoyi na mongongo na ngai tango nazali kobenga yo!

2 Tika libondeli na ngai ekoma liboso na yo lokola ansa; tika kotombolama ya maboko na ngai ezala lokola mbeka ya pokwa.

3 Tia mokengeli liboso ya monoko na ngai, Yawe; batela malamu porte ya bambebo na ngai.

4 Kotika te ete motema na ngai emipesa na mabe, na kosangana na misala ya mabe elongo na baoyo basalaka makambo ya mabe; kotika te ete nalia biloko na bango ya kitoko.

5 Tika moto na sembo abeta ngai, yango ezali malamu; tika apamela ngai, yango ezali mafuta likolo ya motu na ngai; motu na ngai ekoboya yango te. nzoka nde libondeli na niai ekobundisa tango nyonso misala ya baoyo basalaka makambo ya mabe.

6 Bakambi na bango bakobwakama likolo ya bangomba; mpe bato ya mabe bakoyekola ete maloba na ngai elobamaki malamu.

7 Bakoloba: "lokola moto atindaka mpe akabolaka mokili ndenge moko mikuwa na biso na monoko ya nse ya bakufi.

8 Yawe, Nkolo na ngai, kasi miso na ngai ezali kaka epai na yo, Yawe oyo asalaka oyo alingi; epai na yo na kobombana, kosundola ngai te na liwa!

9 Batela ngai na minyama oyo batieli ngai, mpe na mitambo ya bato oyo basalaka mabe.

10 Tika ete bato ya mabe bakweya na minyama na bango moko; bongo ngai naleka na kimia nyonso.
  

BANZEMBO 140

1 Kangola ngai, Yawe, na moto ya mabe; batela ngai liboso ya moto ya mobulu;

2 baoyo bakanisaka mabongisi ya mabe na mitema na bango; mpe balukaka kobunda bitumba mikolo nyonso.

3 Bapelisaka lolemo na bango lokola nyoka; pwazo ya nyoka ezali na bambebo na bango.

4 Batela ngai, Yawe, na maboko ya moto ya mabe; batela ngai na bato ya mobulu, baoyo bazali kosala mabongisami mpo na kokweyisa makolo na ngai!

5 Bato ya lofundu batieli ngai monyama; batandi basinga ya monyama na bango mpe batieli ngai mitambo na nzela na ngai

6 Yawe, nalobaki epai na yo; "Yo ozali Nzambe na ngai!" Tia litoyi, Yawe, na koganga na ngai mpo na mawa.

7 Yawe Oyo asalaka oyo ye alingi, ozali mokangoli na ngai ya makasi yo moto ozipaka motu na ngai na mokolo ya etumba;

8 kotala te ete baposa ya moto ya mabe esalama, Yawe; kotala te mabongisami na bango ekoka kolonga soki te bakokoma lolendo.

9 Tika mitu ya baoyo bazingi ngai ezipama na nse ya bapasi oyo ebimisaki.

10 Tika makala ya moto esopana likolo na bango; tika babwakama na moto, kati na mabulu ya poto-poto, bakoka kotelema lisusu  te.

11 Tika batioli bawumela lisusu te na mokili; tika bapasi elanda bato ya mobulu.

12 Nayebi ete Yawe azali kobatela na bosembo mobola, mpe akokotela bato bakelela.

13 Ya solo, bato na sembo bakosanzola kombo na yo; mpe bato ya alima bakoyanda liboso na yo.
  

BANZEMBO 139

1 Yawe, Yo olukaki ngai, mpe oyebi ngai.

2 Oyebi tango nayandaka mpe tango natelemaka; ososolaka makanisi na ngai na mosika.

3 Ososolaka kobima na ngai mpe kolala na ngai; oyebi banzela na ngai nyonso.

4 Liboso liloba ezala na lolemo na ngai oyebi yango nyonso, Yawe.

5 Yo ozingi ngai, sima mpe liboso; lokola otia loboko na yo likolo na ngai.

6 Boyebi ya boye ezali ya kokamwa mingi mpo na ngai, ezali likolo mingi mpo ngai nasosola.

7 Esika nini nakokende longwa na Molimo na yo? Esika nini nakokima longwa na miso na yo?

8 Soki namti na likolo, ozali kuna; soki nasali mabulu ya mozindo mbeto na ngai, ozali mpe kuna.

9 Soki na'mati na mapapu ya tongo, mpe ata nakei koyanda na suka ya ebale ya monene,

10 kuna mpe loboko na yo ekotambwisa ngai, mpe loboko na yo ya mobali ekosimba ngai makasi.

11 Soki nalobi: "ya solo molili ekobomba ngai mpe moi ekomi butu nzinga-nzinga na ngai,"

12 ya solo, molili ekozala molili te epai na yo; butu ekongenga lokola moi, pamba te molili ezali lokola mwinda.

13 Pamba te okelaki biteni ya kati na ngai ya nzoto, otongaki ngai esika moko na kati ya libumu ya marna na ngai.

14 Nasanzoli yo pamba te nazali ekelamo ya somo mingi mpe ya kokamwa mingi; misala na yo ezali ya kokamwa. Nayebi yango malamu.

15 Kobongisama na ngai ya mikuwa ezalaki ya kobombana te epai na yo, tango nasalamaki na esika ya kobombana, tango natongamaki esika moko na mozindo ya mabele.

16 Miso na yo emonaki nzoto na ngai tango naino ezwaki lolenge na yango te; mikolo nyonso oyo obongisa mpo na ngai, ezali ya kokomama na kati ya buku na yo liboso ete moko na kati na yango ezala.

17 Tala ndenge ezali motuya makanisi na yo epai na ngai, Nzambe! Ndenge ezali ebele penza!

18 Soki natangi yango, ezali mingi penza koleka zelo ya ebale. Soki nalamuki, nazali kaka elongo na yo.

19 Soki olingaki, kaka koboma moto mabe, Nzambe, ! Bolongwa mosika na ngai, bino bato bosopaka makila ya bato!

20 Bazali koloba mpo na yo na makanisi ya mabe; bayini na yo bazali kosalela kombo na yo na ndenge ekoki te.

21 Nakoki koyina te baoyo bayinaka yo, Yawe! Nakoki kozala na nkele te na baoyo batelemelaka yo?

22 Nazali na likambo te kasi nayini bango; Nazali kotanga bango lokola banguna na ngai.

23 Tala ngai malamu-malamu, Nzambe, mpe yeba motema na ngai; meka ngai, mpe yeba makanisi na ngai!

24 Tala soki nzela ya mabe ezali kati na ngai, mpe kamba ngai na nzela ya seko!










  

BANZEMBO 138

1 Nakosanzola yo, Yawe, na  motema na ngai mobimba; liboso
na banzambe, nakoyemba masanzoli na yo.

2 Nakogumbama na kati ya ndako na yo ya bosantu, mpe nakosanzola kombo na yo mpo na bolingo na yo mpe mpo na boyengebene na yo; pamba te onetoli kombo na yo mpe Liloba na yo likolo ya biloko nyonso!

3 Tango nabengaki, ozongiselaki ngai eyano; okomisaki ngai molende mpe elombe.

4 Tika bakonzi nyonso ya mokili basanzola yo, Yawe, tango bayoki maloba ya monoko na yo.

5 Tika bayemba banzela ya Yawe, pamba te nkembo na Yawe ezali monene.

6 Atako Yawe azali na Likolo, amonaka bato oyo bamikitisa, kasi ayebi na mosika bato ya lolendo.

7 Atako natamboli na kati-kati ya bapasi, yo obatelaka bomoi na ngai; osembolaka loboko na yo mpo na kobundisa kanda ya bayini na ngai, na loboko na yo ya mobali obikisaka ngai.

8 Yawe akokokisa makambo oyo azali kolinga mpo na ngai; bolingo na yo, Yawe, ekowumela libela na libela; kosundola misala ya maboko na yo te!

  

BANZEMBO 137

1 Toyandaki pembeni ya ba-ebale ya Babilone mpe tozalaki kolela tango tozalaki kokanisa lisusu Siona.

2 Kuna nde likolo ya banzete totiaki mandanda na biso.

3 Pamba te kuna, bato oyo bakangaki biso na bowumbu batunaki biso banzembo, bato oyo bazalaki konyokola biso basengaki toyemba banzembo ya esengo; balobaki; "Boyembela biso nzembo moko na banzembo ya Siona!"

4 Ndenge nini tokoki koyemba banzembo ya Yawe na mabele ya bapaya?

5 Soki nabosani yo, Yeruzalem, tika ete loboko na ngai ya mobali ebosana mosala na yango.

6 Tika lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai soki nakanisi lisusu yo te, soki namoni Yeruzalem te esengo na ngai oyo eleki likolo.

7 Kanisa lisusu, Yawe, likambo bato ya Edom basalaki, na mokolo oyo Yeruzalem ekweyaki; bazalaki koganga: "Bobuka yango, bobuka yango kino na bafondasio na yango!"

8 Ee elenge mwasi ya Babilone, obongami mpo na kopanzana! Esengo mingi na moto oyo azali kozongisela yo mpo na oyo osalaki biso;

9 ye oyo azali kokanga bana na yo, mpe akopanza bango na libanga!

  

BANZEMBO 136

1 Bozongisa matondi na Yawe, mpo azali malamu; bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

2 Bozongisa matondi na Nzambe ya banzambe; bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

3 Bozongisa matondi na Nkolo ya bankolo: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela!

4 na ye moko kaka asalaka makambo ya minene ya kokamwa: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

5 oyo na nzela ya bososoli na ye asalaki likolo, bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

6 oyo atandaki mokili likolo ya mayi: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

7 oyo asalaki minda ya minene: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

8 moi mpo na kokamba mokolo: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

9 sanza mpe minzoto mpo na kokamba butu; bolingo na ye ezali kowumela libela na libela.

10 Na ye oyo abetaki na nse bana ya liboso ya Ezipito: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

11 mpe abimisaki Isayele na kati na bango: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

12 na loboko ya nguya mpe na loboko esembolama; bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

13 na ye oyo akabolaki ebale ya motane na biteni mibale; bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

14 mpe alekisaki Isayele kati-kati na yango: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

15 kasi adindisaki Farawo na mapinga ya basoda na ye na ebale ya motane: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

16 na ye oyo akambaki bato na ye na esobe: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

17 oyo abetaki na nse mikonzi minene: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

18 mpe abomaki mikonzi ya nguya: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

19 Siwon mokonzi ya bato ya Amoriti: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

20 Mpe Ogi mokonzi ya Basan: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

21 mpe apesaki mabele na bango lokola libula, bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

22 libula epai ya Isayele mosali na ye: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

23 epai ya moto oyo akanisaki lisusu biso na lolenge na biso oyo tozanga tina: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

24 mpe akangolaki biso na banguna na biso: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela;

25 mpe oyo apesaka bilei na bikelamo nyonso: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela.

26 Bozongisa matondi na Nzambe ya Likolo: bolingo na ye ezali kowumela libela na libela.

  

BANZEMBO 135

1 Bosanzola   Yawe!   Bosanzola kombo na Yawe; bosanzola ye, bino basali na Yawe;

2 bino bato bosalaka kati na ndako na Yawe, kati na lopango ya ndako ya Nzambe na biso.

3 Bosanzola Yawe, pamba te Yawe azali malamu; boyemba masanzoli mpo na kombo na ye, pamba te ezali kitoko.

4 Pamba te Yawe aponaki Zakob mpo azala ya ye moko, Isayele mpo ezala bomengo na ye moko.

5 Nayebi ete Yawe azali monene, ete Yawe na biso azali monene koleka banzambe nyonso.

6 Yawe azali kosala oyo alingi, na likolo mpe awa na nse, na baebale mpe na nse penza na yango.

7 Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili, atindaka kongenga ya kake elongo na mbula, mpe abimisaka mipepe wuta na bandako na ye oyo abombela yango.

8 Akweyisaki bana ya liboso ya Ezipito, bana ya liboso ya bato mpe ya banyama.

9 Atindaki bilembo na ye mpe makambo ya kokamwa kati na yo, Ezipito, mpo na kobundisa Falawo mpe basali na ye nyonso.

10 Akweyisa bikolo ebele, mpe abomaki bakonzi ya nguya:

11 Siwon: mokonzi ya bato ya Amoriti, Ogi: mokonzi ya Basan mpe bakonzi nyonso ya Kana.

12 Mpe akabaki mokili na bango lokola libula, libula epai ya bato na ye, Isayele.

13 Kombo na yo, Yawe, ekotikala libela; sango na yo, Yawe, na mabota na mabota.

14 Pamba te Yawe akolongisa bato na ye; mpe akoyokela basali na ye mawa.

15 Bikeko ya bikolo ezali kaka palata mpe wolo; esalama na maboko ya bato.

16 Bikeko yango ezali na minoko, kasi ekoki koloba te; ezali na miso, kasi ekoki komona te;

17 ezali na matoyi, kasi ekoki koyoka te; ezali na pema te na minoko na yango.

18 Bato oyo basala bikeko yango, bakozala lokola yango, mpe bongo ekozala baoyo nyonso batiaka mitema kati na yango.

19 ndako ya Isayele, bosanzola Yawe! ndako ya Aron, bosanzola Yawe!

20 ndako ya Levi, bosanzola Yawe! Bino baoyo bobangaka Ye, bosanzola Yawe!

21 Masanzoli ezala na Yawe wuta na Siona, epai na Ye oyo ayandaka na Yeruzalem! Bosanzola Yawe.

  

BANZEMBO 134

1 Bosanzola Yawe, bino basali nyonso na Yawe, bino baoyo
bosalaka mosala na butu, na kati ya ndako na Yawe.

2 Botombola maboko na bino kati na Esika ya bosantu, mpe bosanzola Yawe!

3 Tika ete Yawe, moto asala likolo mpe se apambola yo wuta na Siona,

  

BANZEMBO 133

1 Tala, ezali malamu mpe kitoko soki bandeko bayandi lisanga kati na bomoko.

2 Ezali lokola mafuta ya motuya, oyo esopani na motu, oyo ezali kokita na mandefu, kino na mandefu ya Aron, ezali kokita na suka ya bilamba na ye;

3 ezali mamwe ya Ermon, mpe ekitaka na bangomba ya Siona; pamba te, ezali kuna nde Yawe apesaka lipamboli na ye, bomoi mpo na libela na libela.

  

BANZEMBO 132

1 Yawe kanisa lisusu David, mpe bapasi na ye nyonso amonaki,

2 alapaki ndayi na Yawe, mpe apesaki elaka na Moto ya nguya ya Zakob:

3 Nakokota na ndako na ngai te mpe nakomata na mbeto na ngai te;

4 nakondima te ete miso na ngai elala, mpe nakolala ata mua pongi te,

5 kino tango nakozwa esika mpo na Yawe, esika mpo na Moto ya nguya ya Zakob."

6 Toyokaki sango na Efalata, toyokelaki yango na elanga ya yaar.

7 Tika tokota epai ye ayandaka; togumbama na esika oyo atiaka makolo na ye.

8 Telema, Yawe, mpe kota na esika na yo epai opemaka, yo na Sanduku ya makasi na yo.

9 Tika ete banganga-Nzambe na yo balata bosembo, tika basantu na yo bayemba na esengo.

10 Mpo na mosali na yo David, kobwaka te mopakolami na yo.

11 Yawe alapaki ndayi na David, ndayi ya solo oyo akobongola te: "Moko na kati ya bana ya libota na yo nakotia na kiti na yo ya Bokonzi.

12 Soki bana na yo babateli Boyokani na ngai, mpe bikateli oyo nakoteya bango, bana na bango mpe bakoyanda libela na kiti na yo ya Bokonzi."

13 Pamba te Yawe apona Siona; alingaki yango mpo ezali esika na ye ya koyanda:

14 Oyo ezali esika na ngai ya kopema mpo na libela na libela; awa nakotia kiti na ngai ya Bokonzi pamba te nalingaki yango.

15 Nakopambola yango na biloko mingi penza; nakotondisa babola na yango na biloko ya kolia.

16 Nakolatisa banganga-Nzambe na yango lobiko, mpe basantu na yango bakoyemba libela na libela na esengo.

17 Ezali kuna nde nakotelemisa liseke mpo na David; mpe nakobongisa mwinda mpo na mopakolami na ngai

18 Nakolatisa banguna na ye soni; kasi ekoti na ye ya lokumu ekongenga likolo ya motu na

  

BANZEMBO 131

1 Motema na ngai ezali na lofundu te, Yawe, miso na ngai ezali na lolendo te. Nakanisaka te makambo oyo eleki minene; to biloko oyo ezali makamwisi mingi mpo na ngai.

2 Kasi napesaki kimia na molimo na ngai mpe nayandisaki yango nye; lokola mwana balongola na mabele mpe azali elongo na mama na ye; molimo na ngai ezali kati na ngai lokola mwana balongola na mabele.

3 Ee Isayele, tia elikya na yo na Yawe, wuta sik'oyo mpe libela na libela.

  

BANZEMBO 130

1 Tango nabimi wuta na bisika ya mozindo nagangi epai na yo, Yawe.
2 Yawe, yoka mongongo na ngai; tika ete otia matoyi na yo na koganga na ngai mpo na lisalisi.

3 Soki yo, Yawe, otalaka masumu; Yawe, mbele nani akokaki kotelema?

4 Kasi bolimbisi ezali epai na yo, mpo ete batosa yo.

5 Nazali kozela Yawe; molimo na ngai ezali kozela, mpe kati na Liloba na ye natie elikya na ngai.

6 Molimo na ngai ezali kozela Yawe, koleka kutu ndenge mokengeli azelaka tongo, koleka kutu ndenge mokengeli azelaka tongo.

7 Isayele, tia elikya na yo na Yawe, pamba te bolingo makasi ezali epai na Yawe, mpe kokangolama ya kokoka ezali epai na ye.

8 Ye moko akokangola Isayele na masumu na bango nyonso.

  

BANZEMBO 129

1 Banyokolaki ngai mingi penza wuta bolenge na ngai; tika Isayele aloba:

2 banyokolaki ngai mingi penza wuta bolenge na ngai, kasi balongaki ngai te.

3 Baloni bilanga; batimolaki mokongo na ngai; basali mikala na bango ya milayi na mokongo na ngai.

4 Kasi Yawe azali sembo, akataki basinga ya bato ya mabe mpo ete nazala na bonsomi.

5 Tika ete baoyo nyonso bayinaka Siona, mpe bazonga na soni.

6 Tika bakoma lokola matiti oyo ebotaka likolo ya ndako, oyo ekawukaka liboso ete ekola;

7 matiti oyo, mobuki mbuma atondisaka na yango maboko na ye te, to mpe moto oyo akangaka maboke atondisaka na yango maboko na ye te.

8 Tika baleki nzela baloba te ete: "Lipamboli na Yawe ezala likolo na bino; topamboli bino na kombo ya Yawe!





  

BANZEMBO 128

1 Mapamboli na bato nyonso oyo batosaka Yawe, oyo batambolaka na banzela na ye!

2 Okolia mbuma ya mosala na yo; mapamboli mpe bolamu ekozala ya yo.

3 Mwasi na yo akozala lokola nzete ya vino, oyo ebotaka malamu; kati ya ndako na yo; bana na yo lokola banzete ya oliye pembeni- pembeni ya mesa na yo.

4 Tala ndenge ezali moto oyo apambwama, oyo atosaka Yawe.

5 Tika Yawe apambola bino wuta na Siona, mikolo nyonso ya bomoi na bino, tika bomona bolamu ya Yeruzalem.

6 Mpe tika bomona bana ya bana na bino. Tika ete kimia ezala likolo ya Isayele!

  

BANZEMBO 127

1 Yawe atongi ndako te, baoyo bazali kotonga yango bazali kosala mosala ya pamba; soki Yawe akengeli vile te, bato oyo bazali kokengela bako kengela kaka pamba.

2 Ezali mosala ya mpunda ete bolamukaka tongo-tongo mpe bolalaka noki te, bosalaka makasi mpo na biloko ya kolia pamba te apesaka ndenge moko na bato oyo ye alingaka tango bazalaka na pongi.

3 Bana bazali bomengo oyo ewutaka na Yawe; mpe kobota bana ezali lifuti oyo ewutaki epai na ye.

4 Lokola makonga na maboko ya mobundi etumba, ndenge wana ezali bana oyo moto aboti na bolenge na ye.

5 Mapamboli na moto oyo atondisi bango na saki na ye! Bakoki koyoka soni te tango akofundana na banguna na bango na porte.

  

BANZEMBO 126

1 Tango Yawe  azongisaki bakangami na Siona, tozalaki lokola bato bazalaki kolota ndoto.

2 Minoko na biso etondaki na koseka, lolemo na biso na banzembo ya esengo. Bongo ezalaki koloba na kati-kati ya bikolo, "Yawe asalelaki bango makambo ya minene!"

3 Yawe asalelaki biso makambo ya minene; mpe totondaki na esengo.

4 Zongisa lisusu bomengo na biso, Yawe, lokola bamayi na Negev.

5 Baoyo bazali kolona na mayi na miso, bakobuka na banzembo ya esengo.

6 Ye oyo akendaka libanda na kolela tango amemaka bambuma oyo alonaka; akozonga na banzembo ya esengo, akomema biloko ya elanga na ye.

  

BANZEMBO 125

1 Baoyo batiaka mitema na Yawe bazali lokola ngomba ya Siona, eninganaka te ekotikala libela na libela.

2 Lokola bangomba ezinga Yeruzalem, ndenge moko mpe Yawe azingi bato na ye, banda sik'oyo kino libela na libela.

3 Nzete ya Bokonzi ya bato ya mabe ekoyanda te na mabele ebongisami mpo na bato na sembo; mpo ete bato na sembo bakosalela maboko na bango te na kosala mabe.

4 Sala malamu, Yawe, epai ya baoyo basalaka malamu, epai ya baoyo bazali alima na mitema.

5 Kasi baoyo babalukaka mpo na kolanda banzela etengama, Yawe akobebisa bango elongo na basait ya mabe. Kimia ezala likolo ya Isayele!

  

BANZEMBO 124

1 Soki Yawe azalaki te na ngambo na biso, tika ete Isayele aloba.

2 Soki Yawe azalaki te na ngambo na biso, tango bato bayaki kobundisa biso,

3 tango kanda na bango engalaki mpo na biso, mbele balingaki komela biso na bomoi;

4 mpela elingaki kozindisa biso, mayi ya monene elingaki komema biso;

5 bamayi ya bambonge ya makasi elingaki komema biso.

6 Masanzoli ezali epai ya Yawe, oyo andimaki te ete mino na bango epasola biso.

7 Tokimaki lokola ndeke oyo abimi na motambo ya moto oyo akangaka bandeke; motambo ekatanaki mpe tokimaki.

8 Lisalisi na biso ezali kati na kombo na Yawe, mozalisi ya likolo mpe mokili.

  

BANZEMBO 123

1 Natomboli miso na ngai epai na yo, epai na Yo oyo kiti ya Bokonzi ezali na Likolo.

2 Lokola miso ya bawumbu ezali kotala loboko ya mokonzi na bango, lokola miso ya mosali ya mwasi ezali kotala loboko ya mokonzi na ye ya mwasi, ndenge miso na biso etalaka epai ya Yawe Nzambe na biso, kino akomonisa biso mawa na ye.

3 Yokela biso mawa, Yawe, yokela biso mawa; pamba te toyambi na pasi mingi matioli.

4 Toyambi na pasi mingi maseki ya bato ya lolendo, na matioli ya bato ya lofundu.

  

BANZEMBO 122

1 Nasepelaki na baoyo balobaki na ngai: "Tokende na ndako na Yawe."

2 Makolo na biso etelemi na baporte na yo, Yeruzalem.

3 Yeruzalem etongama lokola vile oyo ezali esika moko.

4 Kuna nde eyaka mabota, mabota ya Yawe mpo nakokumisa yawe na ndenge bikateli epesama epai ya Isayele.

5 Kuna etelemi bakiti ya Bokonzi mpo na kosambisa bakiti ya Bokonzi ya ndako ya David.

6 Bobondela mpo na kimia ya Yeruzalem: "tika ete baoyo balingaka yo bazala na kimia.

7 Tika ete kimia ezala na bamur na yo, mpe kimia na bandako na yo ya minene!

8 Mpo na bandeko na ngai mpe baninga na ngai, nakoloba: "Kimia ezala kati na yo!"

9 Mpo na ndako ya Yawe Nzambe na biso, nakoluka bolamu na yo.

  

BANZEMBO 121

1 Natomboli miso na ngai likolo ya bangomba...  lisalisi  na  ngai ekowuta wapi?

2 Lisalisi na ngai ekowuta na Yawe, mozalisi na likolo mpe mokili.

3 Akotika te ete lokolo na yo ekende na moselu, Ye oyo akengelaka yo akolala pongi te.

4 Ya solo, Ye oyo akengelaka Isayele akoyoka pongi ata moke te to akolala mpe te.

5 Yawe azali mokengeli na yo; Yawe azali elilingi na yo, na loboko na yo ya mobali.

6 Moi ekosala yo mabe te na mokolo to sanza na butu.

7 Yawe akobatela yo na mabe nyonso; akokengela bomoi na yo.

8 Yawe akokengela kokende na yo mpe kozonga na yo, banda sik'oyo kino libela.

  

BANZEMBO 120

1 Nabengi Yawe kati na bapasi na ngai, mpe ye azongiseli ngai eyano.

2 Bikisa ngai, Yawe, na bambebo ya lokuta, mpe na lolemo oyo ekosaka.

3 Eloko nini akosala mpo na yo, mpe akobakisela yo nini, e lolemo oyo ekosaka?

4 Akopesa yo etumbu na makonga ya mino ya elombe, elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube.

5 Mawa na ngai ete nazali koyanda kati na Meseke, mpo nazali koyanda na kati-kati ya bandako ya kapo ya Kedali.

6 Nawumeli mingi koyanda na kati ya bato oyo bayinaka kimia.

7 Nazali moto ya kimia; kasi soki nalobi, baponaka etumba.
  

BANZEMBO 119

1 Mapamboli na baoyo banzela na bango ezangi pamela; baoyo
batambolaka ndenge Mibeko ya Yawe ezali!

2 Mapamboli na baoyo babatelaka bikateli na ye, mpe balukaka ye na mitema na bango mobimba,

3 basalaka likambo moko te ya mabe, batambolaka na banzela na ye.

4 Opesaki makebisi mpo batosa yango na ndenge ya malamu.

5 Ee, banzela na ngai ezalaki ngwi, mpo natosaka bikateli na yo.

6 Bongo nalingaki koyoka soni te, tango nakotala malako na yo nyonso.

7 Nakosanzola yo na motema ya alima, lokola nazali koyekola mibeko na yo ya sembo.

8 Nakotosa bikateli na yo; kosundola ngai libela te!

9 Ndenge nini elenge mobali akoki kobatela nzela na ye peto? Na kozala na bomoi ndenge ya maloba na yo.

10 Nazali koluka yo na motema na ngai mobimba; kotika ngai te napengwa na malako na yo!

11 Nabombaki maloba na yo na motema na ngai, mpo ete nakoka te kosala lisumu liboso na yo.

12 Masanzoli ezala epai na yo, ee Yawe; teya ngai bikateli na yo!

13 Na mbebo na ngai nazali kotanga mibeko nyonso oyo ebimaka na monoko na yo.

14 Nasepelaka na kolanda bikateli na yo, lokola moto oyo azali kosepela na bozui mingi.

15 Nakanisaka makebisi na yo, mpe nazali kotala banzela na yo.

16 Nayokaka esengo kati na bikateli na yo; nakomona maloba na yo pamba te.

17 Sala malamu epai ya mosali na yo, mpe nakozala na bomoi; nakotosa Liloba na yo.

18 Fungola miso na ngai, mpo nasengeli komona makambo ya kokamwa na mibeko na yo.

19 Nazali mopaya na mokili kobombela ngai malako na yo te.

20 Molimo na ngai ezali kozika na posa makasi tango nyonso mpo na mibeko na yo.

21 Opamelaka bato ya lofundu, baoyo balakelama mabe, mpe baoyo batika malako na yo.

22 Longola mosika na ngai soni mpe kotiolama pamba te nabombaka bikateli na yo.

23 Ata soki bakambi bayandi esika moko, mpe bazali kotonga ngai, mosali na yo akokanisa bikateli na yo.

24 Bikateli na yo esepelisaka ngai; epesaka ngai toli.

25 Nayandaki na putulu; batela bomoi ndenge ezali na Liloba na yo.

26 Nayebisaki yo banzela na ngai, mpe ozongiselaki ngai eyano; teya ngai bikateli na yo.

27 Tika ngai nasosolisa mateya ya makebisi na yo; bongo nakokanisa makambo na yo ya kokamwa.

28 Molimo na ngai ezali na mawa; lendisa ngai ndenge ezali na Liloba na yo.

29 Batela ngai mosika na banzela ya lokuta; monisa ngolu, epai na ngai na nzela ya mibeko na yo.

30 Naponaki nzela ya bosolo; natia motema na ngai na mibeko na yo.

31 Nakangami na bikateli na yo; Yawe, kotika ngai te nayoka soni.

32 Nazali kokima mbango na nzela ya malako na yo, pamba te oyandisaki motema na ngai na bonsomi.

33 Teya ngai, Yawe kolanda bikateli na yo; bongo nakobatela yango kino na suka.

34 Pesa ngai bososoli, mpe nakobatela mibeko na yo, mpe nakotosa yango na motema na ngai mobimba.

35 Kamba ngai na nzela ya malako na yo, pamba te kuna nazali kozwa esengo.

36 Balola motema na ngai na bikateli na yo, mpe na litomba ya lokuta te.

37 Longola soni miso na ngai na biloko ezanga dna; batela bomoi na ngai ndenge ezali maloba na yo.

38 Kokisa elaka na yo epai ya mosali na yo, mpo ete babanga yo.

39 Longola oyo nazali kobanga pamba te mibeko na yo ezali malamu.

40 Tala, ndenge nazali na posa ya makebisi na yo; batela bomoi na ngai na bosembo na yo.

41 Tika ete bolingo na yo ya makasi, eya epai na ngai, Yawe, lobiko na yo ndenge elaka na yo ezali;

42 bongo nakozongisa maloba na moto oyo afingaka ngai; pamba te natiaka motema na ngai na Liloba na yo.

43 Kolongola Liloba ya solo na monoko na ngai te, pamba te natiaka elikya na ngai na mibeko na yo.

44 Nakotosa tango nyonso mibeko na yo, mikolo nyonso mpe libela na libela.

45 Nakotambola na bonsomi nyonso, pampa te nalukaki makebisi na yo.

46 Nakolobela bikateli na yo liboso ya bakonzi, mpe nakoyoka soni te,

47 pamba te nasepelaka kati na malako na yo, mpo nalingaka yango.

48 Natomboli maboko na ngai epai ya malako na yo, oyo nalingaka; mpe nakokanisa bikateli na yo.

49 Kanisa Liloba na yo na mosali na yo, pamba te opesaki ngai elikya.

50 Libondisi na ngai kati na bapasi na ngai yang'oyo: Elaka na yo ezali kokomisa bomoi na ngai ya sika.

51 Bato ya lofundu bazali kosakana na ngai ndenge balingi, kasi napengwaki te na mibeko nayo.

52 Nazali kokanisaka mibeko na yo ya kala, Yawe, mpe nazwi libondisi kati na yango.

53 Mawa mingi ekangi ngai mpo na bato ya mabe oyo babwaka mibeko na yo.

54 Bikateli na yo ezali mama ya likambo ya banzembo na ngai, bisika nyonso nazali kolela.

55 Na butu nazali kokanisa lisusu kombo na yo, Yawe; mpe nakobatela mibeko na yo.

56 Oyo ezali likambo nazalaki kosalela: nazali kotosa mitindo na yo.

57 Yo ozali eteni na ngai, Yawe; napesaki elaka ete nakotosa maloba na yo.

58 Nalukaki elongi na yo na motema na ngai mobimba; monisa ngolu na yo epai na ngai ndenge elaka na yo ezali.

59 Natalaki malamu-malamu banzela na ngai; mpe nazongisi matambe na ngai na bikateli na yo.

60 Nakosala noki mpe kolekisa tango te mpo na kotosa malako na yo.

61 Atako bato ya mabe bakangi ngai basinga nakobosana mibeko na yo te.

62 Na kati-kati ya butu nalamukaka mpo na kopesa yo matondi, mpo na mibeko na yo ya bosembo.

63 Nazali moninga ya bato nyonso oyo babangaka yo, mpe ya baoyo balandaka makebisi na yo.

64 Mokili etondi na bolingo na yo, Yawe; teya ngai bikateli na yo.

65 Salela mosali na yo bolamu, ndenge ezali Liloba na yo, Yawe.

66 Teya ngai boyebi mpe bososoli ya malamu, pamba te nandimaka malako na yo.

67 Liboso ete nanyokwama, nazalaki koyenga-yenga; kasi sik'oyo nazali kotosa Liloba na yo.

68 Ozali malamu mpe oyo osalaka ezali malamu; teya ngai bikateli na yo.

69 Atako bato ya lofundu bazali kobebisa lokumu na ngai na makambo ya lokuta; nazali kobatela makebisi na yo na motema na ngai mobimba.

70 Mitema na bango ezali mabanga, mpe eyokaka eloko moko te; kasi ngai, nasepelaka kati na mibeko na yo.

71 Ezalaki malamu mpo na ngai kozala na pasi; yango etindaki ngai nayekola mitindo na yo.

72 Mibeko oyo ewutaka na monoko na yo ezali motuya mingi mpo na ngai, koleka kutu wolo mpe palata bankoto na bankoto.

73 Maboko na yo esalaki ngai mpe ebongisaki ngai; pesa ngai bososoli mpo nayekola malako na yo.

74 Tika bato oyo babangaka basepela tango bazali komona ngai, pamba te natiaki elikya na ngai na Liloba na yo.

75 Nayebi mibeko na yo ezali sembo mpe na boyengebene omonisaki ngai pasi.

76 Tika ete bolingo na yo ya makasi ezala libondisi na ngai ndenge elaka na yo ezali epai ya mosali na yo.

77 Tika ete mawa na yo eya epai na ngai mpo nazala na bomoi; pamba te mibeko na yo ezali esengo na ngai.

78 Tika ete bato ya lofundu bayoka soni, mpo na mabe oyo basalelaki ngai kaka pamba; kasi ngai, nakanisaka makebisi na yo.

79 Tika ete baoyo babangaka yo babaluka epai na ngai, baoyo basosolaka bikateli na yo.

80 Tika ete motema na ngai ezanga pamela liboso na bikateli na yo, mpo nayoka soni te.

81 Molimo na ngai elembi mpo na posa ya lobiko na yo; kasi natie elikya na Liloba na yo.

82 Miso na ngai elembi, ezali kotalela elaka na yo; nazali koloba "tango nini okobondisa ngai?"

83 Atako  nakomi  lokola  eloko  oyo bakamolaka batie likolo ya milinga; nabosani bikateli na yo te.

84 Kino tango nini mosali na yo asengeli kozela? Tango nini okopesa etumbu na bato oyo bazali konyokola ngai?

85 Bato ya lofundu bazali kotimola mabulu ya mitambo mpo na ngai; ezali bongo te na mibeko na yo.

86 Malako na yo nyonso ebongi na kotiela motema; salisa ngai pamba te bato bazali konyokola ngai kaka pamba.

87 Etikalaki moke penza mpo balongola ngai na mokili; kasi nabwakaki makebisi na yo te.

88 Batela bomoi na ngai ndenge ezali bolingo na yo, mpe nakotosa bikateli ya monoko na yo.

89 Liloba na yo, Yawe ezali seko na seko; etelemi ngwi na Likolo.

90 Boyengebene na yo ekokoba kowumela na mabota na mabota; Otiaki mokili, mpe

91 Mibeko na yo ezali kowumela kino mokolo oyo mpo na mitindo na yo; pamba te biloko nyonso ezali kosalela yo.

92 Soki mibeko na yo ezalaki esengo na ngai te, mbele nasi nabeba kati na pasi na ngai.

93 Nakobosana ata moke te makebisi na yo; pamba te obatelaki bomoi na ngai na nzela na yango.

94 Bikisa ngai, pamba te nazali moto na yo; nalukaki makebisi na yo.

95 Bato ya mabe bazali kozela kobebisa ngai; kasi ngai, nakokanisa bikateli na yo.

96 Na likambo nyonso oyo ezali ya kokoka nazali komona ndelo; kasi malako na yo ezali na ndelo te.

97 Ee, tala ndenge nalingaka mibeko na yo! Nakanisaka yango mokolo mobimba.

98 Malako na yo ekomisa ngai moto ya bwanya koleka banguna na ngai, pamba te yango ezali mikolo nyonso elongo na ngai.

99 Nazali na bososoli koleka balakisi na ngai nyonso; pamba te nakanisaka bikateli na yo.

100 Nazali na bososoli koleka mikolo, pamba te natosaka makebisi na yo.

101 Nabatelaki makolo na ngai na nzela nyonso ya mabe, mpo nakoka kotosa Liloba na yo.

102 Natikaki mibeko na yo te, pamba te yo moko oteyaki ngai.

103 Tala ndenge maloba na yo ezali elengi mingi na monoko na ngai, koleka kutu mafuta ya nzoyi.

104 Nasosoli na nzela ya makebisi na yo; yango wana, nayinaka nzela nyonso ya mabe.

105 Liloba na yo ezali mwinda na makolo na ngai, mpe moi na nzela na ngai.

106 Nalapaki ndayi, mpe nalendisaki yango, ete nakolanda mibeko na yo ya bosembo.

107 Namoni pasi mingi; batela bomoi na ngai, Yawe, ndenge ezali na Liloba na yo.

108 Ndima, Yawe, masanzoli ezali kobima na monoko na ngai na motema moko; mpe teya ngai mibeko na yo.

109 Atako tango nyonso namemaka bomoi na ngai na maboko na ngai kasi nabosanaka mibeko na yo te.

110 Bato ya mabe batielaki ngai motambo, kasi natikaki makebisi na yo te.

111 Bikateli na yo ezali libula na ngai ya mikolo nyonso; ezali esengo ya motema na ngai.

112 Motema na ngai eyandi na kobatela bikateli na yo kino penza na suka.

113 Nayinaka bato ya mitema mibale; kasi nalingaka mibeko na yo.

114 Yo ozali esika na ngai epai nabombanaka mpe libende ya makasi oyo ebatelaka ngai; natie elikya na ngai na Liloba na yo.

115 Bolongwa liboso na ngai, bino bato bosalaka mabe, ete nakoka kobatela malako ya Nzambe na ngai!

116 Simba ngai ndenge ezali elaka na yo, mpe nakozala na bomoi; mpe kotika te ete elikya na ngai ebunga.

117 Simba ngai, mpe nakokangolama; mpe nakotala tango nyonso bikateli na yo.

118 Obuakaka baoyo nyonso bapengwaka na bikateli na yo; pamba te lokuta na bango ezali na tina moko te.

119 Bato nyonso ya mabe ya mokili otiaka bango pembeni; lokola bosoto, yango wana nalingaka bikateli na yo.

120 Mosuni na ngai ezali kolenga mpo na somo na yo; natelemi na bobangi ya mibeko na yo.

121 Nasalaki oyo ezali sembo mpe ekoka; kosundola ngai te na maboko ya bato oyo bazali konyokola ngai.

122 Batela malamu mosali na yo; kotika te ete bato ya lofundu banyokola ngai.

123 Miso na ngai elembi mpo na kotala lobiko na yo, na kotala elaka na yo ya bosembo.

124 Salela mosali na yo ndenge bolingo na yo ezali mpe teya ngai bikateli na yo.

125 Nazali mosali na yo; pesa ngai bososoli mpo ete nasosola bikateli na yo.

126 Tango ekoki mpo yo osala, Yawe; mibeko na yo ezali ya kobukana!

127 Mpo na nalingaka malako na yo, koleka wolo, koleka kutu wolo ya peto,

128 mpe mpo ete natala makebisi na yo ya alima nyonso; nayinaka nzela nyonso ya mabe.

129 Bikateli na yo ezali ya kokamwisa; yango wana natosaka yango.

130 Emoniseli ya maloba na yo epesaka mwinda; epesaka bososoli na bato ya pamba.

131 Nafungoli monoko na ngai, mpe nazali kopema, na posa mingi ya malako na yo.

132 Baluka epai na ngai mpe yokela ngai mawa, ndenge osalaka tango nyonso epai ya baoyo balingaka kombo na yo.

133 Kamba matambe ya makolo na ngai ndenge ezali Liloba na yo; tika lisumu moko te ezala na Bokonzi likolo na ngai.

134 Kangola ngai na minyoko ya bato, mpo ete nakoka kotosa makebisi na yo!

135 Ngengisela mosali na yo elongi na yo, mpe teya ngai bikateli na yo!

136 Ebele ya mayi ya miso ezali kobima na miso na ngai, pamba te mibeko na yo etosami te.

137 Sembo ezali yo, Yawe, mpe mibeko na yo ezali alima.

138 Bikateli oyo otia ezali sembo; ezali ya kokoka na koda motema.

139 Molende na ngai ezali kolia ngai; pamba te banguna na ngai bayebi maloba na yo te.

140 Bilaka na yo emonana ete ezali ya solo; mpe mosali na yo alingaka yango.

141 Ata nazali moke mpe oyo badolaka, nabosanaka makebisi na yo te.

142 Bosembo na yo ezali tango nyonso, mpe mibeko na yo ezali solo.

143 Pasi mpe minyoko ekangi ngai; kasi malako na yo ezali esengo na ngai.

144 Bikateli na yo ezali libela na libela alima; pesa ngai bososoli, mpo ete nazala na bomoi.

145 Nazali kobenga na motema na ngai mobimba: zongisela ngai eyano, Yawe, mpe nakotosa bikateli na yo.

146 Nazali kobelela yo; bikisa ngai mpe nakobatela bikateli na yo!

147 Nalamukaka liboso ete tongo etana, mpe nagangaka mpo na lisalisi; nadaka elikya na ngai na Liloba na yo.

148 Miso na ngai etikalaka ya kofungwama na batango ya butu, mpo nakoka kokanisa bilaka na yo.

149 Yoka mongongo na ngai na ndenge ya bolingo na yo; batela bomoi na ngai, Yawe, ndenge mibeko na yo ezali.

150 Baoyo babongisaka mabongisi ya mabe bazali pene-pene na ngai; kasi bazali mosika na mibeko na yo.

151 Nzoka nde ozali pene-pene na ngai, Yawe; mpe malako na yo nyonso ezali ya solo.

152 Banda kala nasi nayekola wuta na bikateli na yo; ete oda yango mpo na libela.

153 Tala bapasi na ngai, mpe kangola ngai; pamba te nabosanaka mibeko na yo te.

154 Kotela ngai mpe kangola ngai; batela bomoi na ngai na ndenge elaka na yo ezali.

155 Lobiko ezali mosika na bato ya mabe, pamba te balukaka bikateli na yo te.

156 Mawa na yo ezali monene penza, Yawe; batela bomoi na ngai ndenge mibeko na yo ezali.

157 Bayini oyo bazali konyokola ngai bazali ebele; kasi natikaka bikateli na yo te.

158 Natalaka bato oyo bazangi kondima na nkele na motema, pamba te batosaka Liloba na yo te.

159 Tala ndenge nalingaka makebisi na yo; Yawe, batela bomoi na ngai, na ndenge ya bolingo na yo.

160 Maloba na yo nyonso ezali ya solo; mibeko na yo nyonso ya sembo ezali seko na seko.

161 Bakambi bazali konyokola ngai kaka pamba; kasi motema na ngai ezali kolenga Liboso ya Liloba na yo.

162 Nasepelaka kati na elaka na yo lokola moto azwi biloko mingi na etumba.

163 Nayinaka mpe na boyaka lokuta; kasi nalingaka Mobeko na yo.

164 Na mokolo mobimba, nakumisaka yo mbala sambo; mpo na Mibeko na yo ya bosembo.

165 Bato oyo balingaka Mobeko na yo bazali na kimia monene; mpe eloko ata moko te ekoki kobetisa bango libaku.

166 Nazali kozela lobiko na yo, Yawe; mpe nazali kolanda malako na yo.

167 Natosaka bikateli na yo; pamba te nalingaka yango mingi penza.

168 Natosaka makebisi na yo mpe bikateli na yo, pamba te oyebi banzela na ngai nyonso.

169 Tika ete koganga na ngai ekoma liboso na yo, Yawe; pesa ngai bososoli na ndenge ya maloba na yo!

170 Tika ete kosenga na ngai ekoma liboso na yo; kangola ngai na ndenge ya elaka na

171 Tika ete bambebo na ngai etonda na masanzoli; pamba te oteyaka ngai bikateli na yo.

172 Tika ete lolemo na ngai eyemba malako na yo; pamba te malako na yo nyonso ezali sembo.

173 Tika ete loboko na yo ezala ya kobongama mpo na kosalisa ngai; pamba te napona makebisi na yo.

174 Nazali na posa mingi ya lobiko na yo, Yawe; mpe mibeko na yo ezali esengo na ngai.

175 Tika ete ngai nazala na bomoi, mpo ete nakoka kosanzola yo; mpe mibeko na yo ekoka kosimba ngai.

176 Nazalaki koyenga-yenga lokola etonga ya bameme oyo ebungi; luka mosali na yo, pamba te nabosani malako na yo te.

  

BANZEMBO 118

1 Bozongisa matondi epai na Yawe, pamba te azali malamu; bolingo na ye ewumelaka libela na libela.

2 Tika ete Isayele aloba: "Bolingo na ye ewumelaka libela na libela."

3 Tika ete ndako ya Aron eloba: "Bolingo na ye ewumelaka libela na libela."

4 Tika ete baoyo babangaka Yawe baloba: "Bolingo na ye ewumelaka libela na libela."

5 Na kati ya pasi na ngai nagangaki epai na Yawe, mpe azongiselaki ngai eyano, na koyandisaka ngai na bonsomi.

6 Yawe azali elongo na ngai: nakobanga te. Bongo moto akoki kosala ngai nini?

7 Yawe azali elongo na ngai; azali mosalisi na ngai; nakotala na elonga banguna na ngai.

8 Eleki malamu kobombana epai na Yawe, na kotia motema na moto.

9 Eleki malamu kobombana epai na Yawe, na kotia motema na bana ya bakonzi.

10 Bikolo nyonso ezingaki ngai kasi na kombo ya Yawe, napanzi bango.

11 Ezingaki ngai, bisika nyonso, kasi na kombo ya Yawe, napanzi bango.

12 Ezingaki ngai lokola banzoyi; kasi ekufi mbangu lokola banzube eziki na moto; na kombo ya Yawe, napanzi bango.

13 Batindikaki ngai mpo ete nakweya; kasi Yawe asalisaki ngai.

14 Yawe azali makasi na ngai mpe nzembo na ngai; akoma lobiko na ngai.

15 Koganga ya esengo mpe ya elonga ezali koyokana na bandako ya kapo ya bato na sembo: "Loboko ya mobali ya Yawe, ezali kosala makambo ya nguya!

16 Loboko ya mobali ya Yawe etelemi likolo; loboko ya mobali ya Yawe, ezali kosala makambo ya nguya"

17 Nakokufa te, kasi nakozala na bomoi, mpe nakosakola oyo Yawe asalaki.

18 Yawe apesaki ngai etumbu na makasi penza, kasi akabaki ngai na liwa te.

19 Fungolela ngai ba-porte ya bosembo; nakokota mpe nakozongisa matondi na Yawe.

20 Yango oyo porte ya Yawe; na yango bato na sembo bokokota.

21 Nakozongisa matondi epai na yo, pamba te ozongiselaki ngai eyano, okomaki lobiko na ngai.

22 Libanga oyo batongi ndako babwakaki, ekoma libanga ya songe ya ndako;

23 Yawe asalaki likambo oyo; mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso.

24 0yo ezali mokolo Yawe asalaki; Tika biso tosepela mpe tozala na esengo na mokolo yango.

25 Yawe, bikisa biso; ee Yawe, pesa biso bokeyi liboso.

26 Mapamboli na ye oyo azali koya na kombo ya Yawe! Tozali kopambola bino wuta na ndako ya Yawe.

27 Yawe azali Nzambe, mpe angengiseli biso mwinda na ye. Na mandalala na maboko, bosangana na molongo ya kokende na maseke ya mesa oyo batumbaka mbeka.

28 Ozali Nzambe na ngai, mpe nakozongisa matondi epai na yo; ozali Nzambe na ngai mpe nakonetola yo.

29 Bozongisa matondi epai na Yawe, pampa te azali malamu; bolingo na ye ewumelaka libela na libela!

  

BANZEMBO 117

1 Bosanzola Yawe, bino bikolo nyonso; bonetola ye, bino bato
nyonso.

2 Pamba te bolingo na ye ezali monene epai na biso, mpe boyengebene ya Yawe ekowumela libela na libela. Bosanzola Yawe!


  

BANZEMBO 116

1 Nalingaka Yawe, pamba te ayokaka mongongo na ngai,
ayokaka konganga na ngai mpo na mawa.

2 Pamba te abalolaki litoyi na ye epai na ngai; nakobenga ye tango nyonso nakozala na bomoi.

3 Basinga ya liwa ezingaki ngai, somo ya lilita ekweyelaki ngai; minyoko mpe mitungisi elongaki ngai.

4 Bongo nabengaki kombo ya Yawe: "Yawe, bikisa ngai!"

5 Yawe atondi na ngolu mpe azali sembo; Nzambe na biso atondi na mawa.

6 Yawe abatelaka bato oyo bazali na mitema ya komikitisa; tango nazalaki kati na posa monene, ye abikisaki ngai.

7 Zala na bopemi, molimo na ngai pamba te Yawe azali malamu epai na yo.

8 Pamba te yo, Yawe, okangolaki molimo na ngai wuta na liwa, miso na ngai na mayi ya miso, mpe makolo na ngai na kobeta libaku;

9 ete nakoka kotambola liboso na Yawe, na mabele ya bato ya bomoi.

10 Nandimaki, yango wana nalobaki: "Nazali na pasi makasi!"

11 Kati na komitungisa na ngai, nalobaki: "Bato nyonso bazali bato ya lokuta!"

12 Ndenge nini nakoki kozongisela Yawe mpo na bolamu na ye nyonso epai na ngai?

13 Nakotombola kopo ya lobiko, mpe nakobenga kombo ya Yawe.

14 Nakokokisa bandayi na ngai epai ya Yawe, na miso ya bato na ye nyonso.

15 Liwa ya basantu ya Yawe ezali na motuya mingi na miso na Yawe.

16 Yawe, ya solo, nazali mosali na yo; nazali mosali na yo, mwana ya mosali na yo ya mwasi; opesi ngai bonsomi wuta na minyololo na ngai.

17 Nakopesa mbeka ya kozongisa matondi epai na yo mpe nakobenga kombo ya Yawe.

18 Nakokokisa bandayi na ngai epai ya Yawe, na miso ya bato na ye nyonso,

19 na lopango ya ndako ya Yawe, na kati na yo, e Yeruzalem! Bosanzola Yawe!

  

BANZEMBO 115

1 Na biso te, Yawe, na biso te, kasi nkembo ezala na kombo na yo mpo na bolingo na yo mpe mpo na boyengebene na yo.

2 Mpo na nini bikolo ezali koloba: "Nzambe na bango azali wapi?"

3 Kasi Nzambe na biso azali na Likolo; Ye asalaka nyonso oyo esepelisaka ye.

4 Kasi bikeko na bango ezali palata mpe wolo; esalama na maboko ya bato.

5 Ezali na minoko, kasi ekoki koloba te; miso, kasi ekoki komona te;

6 ezali na matoyi, kasi ekoki koyoka te; zolo, kasi ekoki koyoka solo te;

7 ezali na maboko, kasi ekoki kosimba te; makolo, kasi ekoki kotambola te; to ekoki kobimisa te makelele na mingongo na yango.

8 Baoyo basalaka yango, bakozala lokola yango mpe bongo ekozala baoyo nyonso batiaka mitema na yango.

9 E ndako ya Isayele, tia motema na yo na Yawe; azali lisalisi na bino mpe libende ya makasi oyo ebatelaka bino.

10 E ndako ya Aron, tia motema na Yawe; Ye azali lisalisi na yo mpe libende ya makasi oyo ebatelaka yo.

11 Bino baoyo bobangaka Ye, botia motema na Yawe, Ye azali lisalisi na bino mpe libende ya makasi oyo ebatelaka bino.

12 Yawe akanisi biso, mpe akopambola biso: akopambola ndako ya Isayele, akopambola ndako ya Aron;

13 akopambola baoyo babangaka Yawe, bato pamba mpe bato minene;

14 Tika ete Yawe akanisa bino ebele, bino mpe bana na bino!

15 Tika ete bopambolama epai na Yawe, Mozalisi ya likolo mpe nse!

16 Likolo oyo etombuana koleka ezali ya Yawe kasi nse, apesa epai ya moto.

17 Ezali te bato bakufa oyo basanzolaka Yawe, baoyo bakendeke na esika ya kimia;

18 ezali biso nde tonetolaka Yawe, sik'oyo mpe libela na libela. BosanzolaYawe!

  

BANZEMBO 114

1 Tango Isayele abimaki na Ezipito, ndako ya Zakob wuta na bato oyo ya monoko ya bapaya,

2 Yuda ekomaki esika ya bosantu ya Nzambe, mpe Isayele ekomaki mabele na ye.

3 Ebale monene emonaki mpe ekimaki; mai ya Yordani ezongaki na sima;

4 bangomba epumbwaki lokola bameme ya mibali; mpe bangomba ya mike lokola bana ya meme.

5 Nini esalemaki, e ebale monene mpo ete okima boye? e Yordani, mpo ete ozonga sima;

6 bino bangomba, mpo bopumbwa lokola bameme ya mibali; Bino bangomba ya mike lokola bana ya meme?

7 Lenga, mokili na miso ya Yawe; na miso ya Nzambe ya Zakob;

8 Ye oyo abongolaka libanga mpe akomisaka yango liziba ya mayi, mpe libanga ya makasi esika mayi ebimelaka.

  

BANZEMBO 113

1 Bosanzola Yawe. Bosanzola bino basali ya Yawe, bosanzola kombo ya Yawe.

2 Tika ete kombo ya Yawe esanzolama, wuta sik'oyo mpe libela na libela!

3 Wuta epai moi ebimaka kino na epai yango elalaka! kombo ya Yawe esanzolama,

4 Yawe anetolami likolo ya bikolo nyonso; nkembo na ye likolo ya lola.

5 Nani akokani na Yawe Nzambe na biso, oyo atia kiti na ye ya Bokonzi na likolo?

6 0yo agunzamaka mpo na kotala likolo mpe mokili?

7 Abimisaka mobola wuta na putulu mpe atombolaka mokeleli wuta na nse ya fulu ya matiti ya kopola,

8 ayandisaka bango elongo na bana ya bakonzi, elongo na bana ya bakonzi ya bato na bango.

9 Ye atiaka mwasi oyo abotaka te na ndako na ye; lokola mama ya bana oyo azali na esengo. Bosanzola Yawe.

  

BANZEMBO 112

1 Bosanzola Yawe! Mapamboli na moto oyo abangaka Yawe, azwaka esengo mingi na malako na ye.

2 Bana na ye bakozala bato ya nguya mingi na mabele; bato ya alima na tango na tango bakozala bato ya mapamboli.

3 Bomengo mpe bozwi ya ndenge na ndenge ezali na ndako na ye; mpe bosembo na ye ekowumela libela na libela.

4 Ata kati na molili, moi ebimaka mpo na moto ya alima, mpo na moto atondi na ngolu, mpo na moto atondi na mawa mpe mpo na moto na sembo.

5 Bolamu ekoyela moto ya boboto mpe oyo adefisaka na motema moko, oyo atambusaka misala na ye na bosembo nyonso!

6 Ya solo, ye akoki koningana ata moke te; moto na sembo bakobanda kokanisaka ye tango nyonso.

7 Akobanga basango ya mabe te; motema na ye etelema ngwi, na kotiaka elikya na ye na Yawe.

8 Motema na ye ezali na kimia akobanga te; na suka akotala na elonga bayini na ye.

9 Akabolaka bisika nyonso makabo mpo na babola; bosembo na ye ewumelaka libela na libela; liseke na ye ekotombwana na likolo mpo na lokumu.

10 Moto ya mabe akomona mpe akosilika, akolia mino mpe akolimwa; baposa ya moto ya mabe ekokoma eloko ya pamba.

  

BANZEMBO 111

1 Bosanzola Yawe! Nakonetola Yawe na motema na ngai mobimba, na kati ya bokutani ya bato na alima mpe na kati ya lisanga.

2 Misala ya Yawe ezali minene; baoyo nyonso balingaka yango, bakanisaka yango.

3 Mosala na ye ezali na nkembo mpe na lokumu; mpe bosembo na ye ewumelaka libela na libela.

4 Asalaki ete makambo ya kokamwa na ye bakanisaka yango; Yawe atondi na ngolu mpe na mawa.

5 Apesaka biloko ya kolia na baoyo babangaka ye; akanisaka lisusu Boyokani na ye tango nyonso.

6 Alakisaki bato na ye nguya na misala na ye, nakopesa bango mabele ya bato ya bikolo mosusu.

7 Misala ya maboko na ye ezali boyengebene mpe bosembo; makebisi na ye nyonso ebongi na kodela motema.

8 Epikama mpo na libela na libela, esalama kati na boyengebene mpe kati na bosembo.

9 Apesaki kokangolama na bato na ye; atindaki Boyokani na ye mpo na libela. Kombo na ye ezali bosantu mpe sukisa.

10 Kobanga Yawe ezali ebandeli ya bwanya; baoyo nyonso balandaka makebisi bazali na bososoli ya malamu. Masanzoli ya libela na libela ezali ya ye.



  

BANZEMBO 110

1 Yawe alobaki na Nkolo na ngai: "yanda na loboko na ngai ya mobali, kino nakomisa banguna na yo enyatelo ya makolo mpo na makolo na yo."

2 Yawe akosembola nzete na yo ya nguya ya Bokonzi wuta na Siona; okozala na Bokonzi na kati ya banguna na yo!

3 Mapinga na yo ekozala na mokano malamu na mokolo na yo ya etumba, elati lokumu ya bosantu; wuta na tongo-tongo, okozwa mamwe ya bolenge na yo.

4 Yawe alapaki, mpe akobongola makanisi na ye te: "Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela;  na molongo ya Melshisedeki!"

5 Yawe azali na loboko na yo ya mobali; akopanza bakonzi na mokolo ya kanda na ye ya makasi.

6 Akosambisa bikolo, akotondisa bibembe, mpe akopanza bakambi ya mokili mobimba.

7 Akomela mayi na mwa mayi oyo ezali pembeni ya nzela; yango wana akotombola motu na ye.




  

BANZEMBO 109

1 Nzambe oyo nazali kosanzola, kovanda nye te.

2 Pamba te bato ya mabe mpe bato ya lokuta bafungolaki minoko na bango mpo na ngai; balobaki na ngai na lolemo ya lokuta.

3 Na maloba ya koyina bazingi ngai; bazali kobundisa ngai kaka pamba.

4 Na bolingo na ngai epai ya baninga, bazali kofunda ngai kasi ngai nazali moto ya losambo.

5 Bazongiseli ngai mabe na malamu mpe bayini ngai mpo na bolingo na ngai epai ya baninga.

6 Mpo na moto moko ya mabe mpe azala monguna na ye, tika mofundi moko atelema na loboko na ye ya mobali.

7 Tango akosamba, tika amonana ete asali mabe mpe tika libondeli na ye ekatela ye etumbu.

8 Tika mikolo na ye ekoma moke; tika moto mosusu azwa esika na ye ya kotambwisa.

9 Tika bana na ye bakoma bitike; mpe mwasi na ye akoma mwasi oyo akufela mobali.

10 Tika bana na ye bakoma mitelengano mpe bisenga-senga; tika babengana bango na bandako na bango oyo esi'epanzani.

11 Tika moto oyo adefisa ye, abotola ye oyo nyonso azali na yango; tika bapaya babotola na makasi bambuma ya mosala na ye!

12 Tika moto ata moko te alakisa ye bolamu; to ayokela bitike na ye mawa.

13 Tika bana ya bana na ye basila, bakombo na bango elongwa na bato ya batango oyo ezali kolanda.

14 Tika mabe ya batata na ye ezongaka tango nyonso liboso na Yawe; tika lisumu ya mama na ye ebomama te;

15 Tika masumu na bango ezalaka tango nyonso liboso na Yawe; ete akoka kosilisa likaniseli na bango na mokili.

16 Pamba te akanisaki ata moke te kosala bolamu; kasi anyokolaki mobola kino na liwa, mpe moto akelela, mpe oyo azali na motema ya kotutama.

17 Alingaki kolakela mabe, tika yango eya likolo na ye; azalaki kosepela na lipamboli; tika yango ezala mosika na ye.

18 Alataki elakeli mabe lokola elamba na ye; ekotaki na nzoto na ye lokola mayi, na mikuwa na ye lokola mafuta.

19 Tika yango ezala lokola kazaka oyo akomizipa, lokola mokaba oyo akomilinga tango nyonso.

20 Tika oyo ezala lifuti ya Yawe epai ya bafundi na ngai, epai ya bato oyo balobaka maloba ya mabe mpo na ngai.

21 Kasi yo, Yawe oyo asalaka oyo alingi, salela ngai bolamu mpo na kombo na yo; atako bolamu ya bolingo na yo ezali, kangola ngai.

22 Pamba te nazali mobola mpe moto ya kokelela; mpe motema na ngai ezoki pota kati na ngai.

23 Nazali kolimwa lokola elilingi ya pokwa; bazali kobengana ngai lokola linkoko.

24 Mabolongo na ngai elembi mpo na komilalisaka nzala mpo na mabondeli; nzoto na ngai ezali moke mpe ekondi.

25 Nakomi eloko ya kotiola epai ya bafundi na ngai tango bamonaka ngai, baningisaka mitu.

26 Salisa ngai, Yawe Nzambe na ngai,; bikisa ngai ndenge bolingo na yo ezali.

27 Tika bayeba ete ezali loboko na yo; ete yo Yawe, osalaki bongo.

28 Bakoki kolakela ngai mabe, kasi yo okopambola; tango batelemi mpo na kobundisa, bakoyoka soni; kasi mosali na yo akosepela.

29 Bafundi na ngai bakolata lokumu te mpe bakozipama na soni lokola ya kazaka.

30 Na monoko na ngai, nakonetola makasi Yawe kati na ebele ya bato, nakosanzola ye.

31 Pamba te atelemaka na loboko ya mobali ya mobola, mpo na kobikisa bomoi na ye liboso ya baoyo bazali kokatela ye etumbu.

  

BANZEMBO 108

1 Motema na ngai ezali ngwi, Nzambe;   nakoyemba   mpe nakobeta miziki na molimo na ngai mobimba.

2 Bolamuka,   gitare   mpe   lindanda! Nakolamusa tongo.

3 Nakosanzola yo, Yawe, kati na bikolo; nakoyembela yo kati na bato.

4 Pamba te bolingo na yo ezali monene, enetolama koleka likolo; bolingo na yo ya makasi ekoma kino na mapata.

5 Netolama, Yawe, likolo ya lola; mpe tika ete nkembo na yo ezala likolo ya mokili mobimba!

6 Bikisa biso mpe salisa biso na loboko na yo ya mobali, mpo ete baoyo yo olingaka bakangolama.

7 Nzambe alobaki wuta na esika na ye ya bosantu, "Na elonga! Nakokabola Sikemi, mpe nakotanga molayi ya lobwaku ya Sukoti.

8 Galada ezali ya ngai, Manase ezali ya ngai; Efrayim ezali ekoti ya libende ya motu na ngai, Yuda ezali nzete na ngai ya bokonzi.

9 Mowabi ezali sani ya monene epai nasukolaka; likolo ya Edom, nabwaki sandale na ngai; likolo ya Filistiya nazali koganga mpo na elonga."

10 Nani akomema ngai na vile oyo etongama makasi? Nani akokamba ngai na Edom?

11 Ezali yo te, Nzambe, yo oyo obwaki biso, mpe obimaka lisusu na mapinga ya basoda na biso te?

12 Pesa biso lisalisi liboso ya monguna na biso; pamba te lisalisi ya moto ezali na tina te.

13 elongo na Nzambe, tokozwa elonga mpe akonyata banguna na biso.

  

BANZEMBO 107

1 Bopesa matondi na Yawe, pamba te ye azali malamu, bolingo na ye ewumelaka libela na libela.

2 Tika ete bato oyo bakangolama na Yawe baloba bongo, baoyo ye akangolaki na loboko ya moyini,

3 baoyo osangisaki wuta na mabele, wuta na Este mpe Weste, wuta na Nord mpe Sude.

4 Ndambu bazalaki koyenga-yenga na esobe, na esika ezanga bato; bazwaki nzela moko te ya vile epai bakokaki koyanda.

5 Bayokaki nzala mpe posa ya mayi; mpe bomoi na bango ekomaki pembeni ya kosuka.

6 Bongo, bagangaki epai na Yawe na kati na minyoko na bango mpe akangolaki bango na bapasi na bango.

7 Atambwisaki bango na nzela oyo etengama te, kino na vile esika bakokaki koyanda.

8 Tika bango bazongisa matondi na Yawe mpo na bolingo na ye ya makasi, mpe misala na ye ya kokamwa mpo na bato.

9 Pamba te asilisaki posa ya mayi; mpe atondisaki baoyo bazalaki na nzala na biloko ya malamu.

10 Basusu bayandaki na molili mpe na molili ya mozindo penza, bakangama na minyoko na minyololo ya ebende,

11 pamba te batombokelaki Maloba ya Nzambe, mpe batiolaki batoli ya Ye Oyo Aleki Likolo.

12 Bongo atiaki bango na nse ya misala ya makasi penza; babetaki libaku mpe ezalaki na moto ata moko te ya kosalisa bango.

13 Bongo, bagangaki epai ya Yawe na kati ya minyoko na bango, mpe ye abikisaki bango na bapasi na bango.

14 Abimisaki bango na molili mpe na molili ya mozindo penza mpe abukaki minyololo na bango.

15 Tika bango bazongisa matondi na Yawe mpo na bolingo na ye ya makasi, mpe mpo na misala na ye ya kokamwa mpo na bato.

16 Pamba te akweyisi ba-porte ya bibende oyo ya bronze, mpe akataki mabende oyo bakangelaka.

17 Basusu bakomi bazoba mpo na banzela na bango ya botomboki; mpe bayokaki pasi mpo na mabe na bango.

18 Bayinaki biloko nyonso ya kolia, mpe bakomaki pene-pene ya ba-porte ya liwa.

19 Bongo, bagangaki epai ya Yawe na kati ya minyoko na bango, mpe abikisaki bango na pasi na bango.

20 Atindaki Liloba na ye mpe abikisaki bango; mpe akangolaki bango na mboka ya bakufi.

21 Tika bango bazongisa matondi na Yawe mpo na bolingo na ye ya makasi, mpe mpo na misala na ye ya kokamwa mpo na bato.

22 Tika bango bapesa mbeka ya likabo ya matondi, mpe balobela misala na ye elongo na banzembo ya esengo.

23 Basusu bakendaki na ebale monene na masuwa, bazalaki bakomersa na bamayi ya minene.

24 Bamonaki misala ya Yawe, misala na ye ya kokamwa na mozindo.

25 Pamba te alobaki mpe aningisaki mopepe ya makasi, oyo etombolaki bambonge.

26 Bamataki na likolo mpe bakitaki kino na nse penza; na kobeba na bango molende elongwaki bango.

27 Bazalaki   na   kizungu-zungu   mpe bakomaki koningana-ningana lokola bato balangwe; bazalaki na suka na mayele na bango.

28 Bongo bagangaki epai na Yawe na pasi na bango, mpe ye abimisaki bango na pasi na bango.

29 Ayandisaki nye mopepe ya makasi na makelele ya nse-nse, bambonge ya ebale ya monene eyandaki nye.

30 Bazalaki na esengo tango ekomaki nye; mpe amemaka bango kino na libongo oyo balingaki.

31 Tika bango bozongisa matondi na Yawe mpo na bolingo na ye ya makasi, mpe mpo na misala na ye ya kokamwa mpo na bato.

32 Tika bango banetola ye na kati ya lisanga ya bato, mpe basanzola ye na kati ya bokutani ya bampaka.

33 Abongolaki ba-ebale na esobe; bisika mayi ebimaka na mabele ya kokawuka,

34 mabele ya malamu na mabele ya mungwa, mpo na mabe ya baoyo bayandaka wana.

35 Abongolaka esobe na biziba ya mayi; mpe mabele ya kokawuka na bisika oyo mayi ebimaka.

36 Kuna amemaki nzala mpo eyanda mpe batongaki vile esika bakokaki koyanda.

37 Basalaki bilanga mpe balonaki banzete ya vino, oyo epesaki bambuma malamu,

38 apambolaki bango mpe motuya na bango ekomaki monene mpe atikaki te bibwele na bango ekita.

39 Bongo motuya na bango ekitaki mpe basambwaki, mpo na minyoko, bapasi mpe mawa.

40 Ye oyo asambwisaka bato minene, asalaka bango batelengana na kati na esika ezanga bato, oyo ezanga nzela.

41 Kasi abimisaka bato bakelela wuta na bapasi na bango mpe akomisaka mabota na bango mingi, lokola etonga ya bameme.

42 Moto ya alima atali mpe asepeli kasi bato nyonso oyo ya mabe bakangald monoko na bango.

43 Moto oyo azali bwanya tika abatela malamu makambo oyo mpe asosola bolingo monene ya Yawe.

  

BANZEMBO 106

1 Bozongisa matondi na Yawe pamba te azali malamu; bolingo
na ye ezali kowumela libela na libela.

2 Nani akoki kosakola misala ya nguya ya Yawe, to kotatola masanzoli na ye?

3 Mapamboli ezali na baoyo babatelaka bosembo; baoyo tango nyonso basalaka oyo ezali alima.

4 Kanisa ngai, Yawe, tango okolakisa ngolu epai ya bato na yo, yaka mpo na kosalisa ngai tango okobikisa bango;

5 mpo nakoka kosepela na bolamu ya baponami na yo mpo nakoka kokabola esengo na ekolo na yo mpe nasangana na libula na yo na kopesaka masanzoli.

6 Tosalaki masumu ndenge moko lokola batata na biso basalaki; tosalaki mabe, mpe tosalaki misala ya mabe.

7 Tango batata na biso bazalaki na Ezipito, bazalaki na likanisi ata moko te na makamwisi na yo; bakanisaki te ebele ya bolamu na yo ya mingi kasi batombokaki pembeni ya ebale ya monene, ebale ya motane.

8 Kasi abikisaki bango mpo na kombo na ye, na kotalisa makasi ya nguya na ye.

9 Agangelaki ebale ya motane, mpe yango ekawukaki; atambusaki bango kati na mozindo lokola na esobe.

10 Abikisaki bango na loboko ya moyini, na loboko ya monguna, akangolaki bango.

11 Mayi ezipaki banguna na bango; moko te na bango atikalaki na bomoi.

12 Bongo bandimaki bilaka na ye, mpe bayembaki masanzoli na ye.

13 Kasi babosanaki noki oyo asalaki; mpe bazelaki te toli na ye.

14 Na esobe, bamipesaki na baposa na bango, na esika oyo ezangi batu, bamekaki Nzambe.

15 Na bongo apesaki bango oyo bazalaki kosenga; kasi atindelaki bango bapasi.

16 Na kam, bayokelaki Moyize zuwa, mpe Aron, moto oyo babulisaki epai na Yawe.

17 Mabele efungwamaki, mpe emelaki Datan ezipaki lisanga ya Abiram.

18 Moto epelaki na kati ya bato oyo bazalaki kolanda bango; moto etumbaki bato ya mabe.

19 Na Orebi, basalaki mwana-ngombe; mpe bakumbamelaki ekeko esalami na ebende oyo banyangwisa.

20 Babongolaki nkembo na bango na elilingi ya ngombe, oyo eliaka matiti.

21 Babosanaki Nzambe, oyo abikisaki bango. oyo asalaki makambo minene na Ezipito,

22 makamwisi na mabele ya Ham mpe misala ya somo na ebale ya motane.

23 Bongo alobaki alingaki kobebisa bango, soki Moyize te, moto na ye oyo apona, atelemaki liboso na ye, mpo na kokanga kanda na ye, mpo aboma bango te.

24 Bongo batiolaki mabele ya kitoko; bandimaki elaka na ye te.

25 Bakomaki koyima-yima na kati ya bandako na bango ya kapo; mpe batosaki Yawe te.

26 Bongo alapaki mpo na bango na kotombola loboko ete, alingaki kokweyisa bango na esobe;

27 alingaki kokweyisa bana na bango na kati-kati ya bikolo mpe akopanza bango bipai na bipai ya mabele.

28 Bamikangisaki epai ya Bale ya Peyor, mpe baliaki bambeka oyo bapesaki epai ya banzambe oyo bazanga bomoi;

29 batumbolaki Yawe mpo asilika na nzela ya misala na bango ya mabe, mpe motungisi eyaki kati na bango.

30 Kasi Pinasi atelemaki mpe akataki likambo, mpe motungisi yango esilaki.

31 Yango ebakisamaki epai na ye lokola bosembo mpo na bato ya batango nyonso oyo ezanga suka oyo ekoya.

32 Na bamayi ya Meriba bayokisaki Yawe kanda mpe minyoko eyaki epai ya Moyize mpo na bango;

33 pamba te batombokelaki Molimo na Nzambe, mpe maloba oyo ebongi te ebimaki na bambebo ya Moyize.

34 Babebisaki te bato lokola Yawe atindaki bango.

35 Kasi basanganaki na bikolo, mpe bayekolaki bokoko ya bikolo wana.

36 Bakumbamelaki banzambe na bango ya bikeko, yango ekomaki motambo mpo na bango.

37 Bapesaki bana na bango ya basi mpe ya mibali, mbeka epai ya milimo mabe.

38 Basopaki makila ya moto oyo ayebi likambo te, makila ya bana na bango ya mibali mpe ya basi, oyo bapesaki mbeka na banzambe ya bikeko ya Kanan; mpe mabele ekomaki mbindo mpo na makila na bango.

39 Bamikomisaki mbindo mpo na oyo basalaki; mpo na misala na bango, basalaki kindumba na kati na bango moko.

40 Bongo Yawe asilikaki na bato na ye mpe ayinaki libula na ye.

41 Akabaki bango na bikolo; mpe bayini na bango bakomaki na Bokonzi likolo na bango.

42 Banguna na bango banyokolaki bango, mpe batiaki bango na nse ya nguya na bango.

43 Tango mingi akangolaki bango; kasi bazalaki kaka na kotomboka, mpe bamipesaki na masumu na bango.

44 kasi amonaki pasi na bango, tango ayokaki koganga na bango.

45 Mpo na bango akanisaki lisusu Boyokani na ye mpe ayokelaki bango mawa mpo na bolingo monene na ye abongolaki mokano.

46 Asalaki ete bayokela bango mawa baoyo nyonso bamema na bowumbu.

47 Bikisa biso, Yawe Nzambe na biso, mpe sangisa biso wata na bikolo mpo tokoka kopesa matondi epai ya kombo na yo ya bosantu mpe nkembo kati na masanzoli na yo.

48 Masanzoli ezala epai ya Yawe, Nzambe ya Isayele libela na libela! Tika ete bato nyonso baloba: "Amen! bosanzola Yawe!"
  

BANZEMBO 105

1 Bozongisa matondi na Yawe, bobenga kombo na ye; boyebisa na kati na bikolo oyo ye asalaki.

2 Boyembela ye, boyemba masanzoli epai na ye; bolobela misala na ye nyonso ya kokamwa.

3 Nkembo kati na kombo na ye ya bosantu; tika ete mitema ya baoyo balukaka Yawe esepela.

4 Botala epai ya Yawe mpe epai na makasi na ye; boluka tango nyonso elongi na ye.

5 Bokanisa misala ya kokamwa oyo ye asalaki, makamwisi na ye, mpe kosambisa oyo alobaki.

6 E bana ya bana ya Abraham, mosali na ye; e bana ya Zakob, bato oyo ye apona.

7 Ye azali Yawe Nzambe na biso; kosambisa na ye ezali na mokili mobimba.

8 Akanisaka tango ya Boyokani na ye; libela na libela; liloba oyo apesaki mitindo mpo na bato ya batango nkoto;

9 Boyokani oyo asalaki na Abraham, ndayi oyo alapaki na Izaki.

10 Alendisaki yango epayi ya Zakob lokola ekateli, mpo na Isayele lokola Boyokani ya libela:

11 "na yo nakopesa mabele ya Kanana; lokola ndambo ya libula oyo okozwa!"

12 Tango bazalaki motuya moke, moke penza, mpe bapaya na mokili yango;

13 bazalaki koyenga-yenga na ekolo na ekolo wuta na Bokonzi moko na oyo mosusu.

14 Apesaki nzela na moto ata moko te mpo anyokola bango; mpo na bango apamelaki bakonzi:

15 Bosimba te bapakolami na ngai, bosala baprofeta na ngai mabe te!"

16 Abengisaki nzala monene na mabele, mpe abebisaki biloko na bango nyonso ya kolia oyo babombaki.

17 Mpe atindaki moto moko liboso na bango, Zozefi oyo batekaki lokola mowumbu.

18 Bakangaki makolo na ye na minyololo kingo na ye batiaki na bibende,

19 kino tango makambo oyo ye alobaki ekokaki; kino tango maloba ya Yawe emonisaki polele ete Zozefi alobaki solo.

20 Mokonzi atindaki mpe bafungolaki ye, mokambi atikaki ye na bonsomi.

21 Atiaki ye mokonzi ya ndako na ye, mokambi likolo ya nyonso oyo azalaki na yango;

22 mpo alakisa bana ya bakonzi na ye ndenge ye moko alingi; mpe ateya bampaka na ye bwanya.

23 Bongo Isayele akotaki na Ezipito; Zakob ayandaki lokola mopaya na mabele ya Sham.

24 Yawe asalaki ete bato na ye babotama mingi, akomisaki bango mingi koleka bayini na bango.

25 0yo mitema abalusaki mpo bayina bato na ye; mpo na kosalela basait na ye likita.

26 Atindaki Moyize, mosali na ye, mpe Aron oyo ye apona.

27 Basalaki bilembo ya kokamwa na kati na bango, makambo ya kokamwa na ye na mabele ya Sham.

28 Atindaki molili, mpe akomisaki mabele molili; mpo batombokelaki maloba na ye te?

29 Abongolaki mayi na bango na makila, abomaki bambisi na bango.

30 Mabele na bango etondaki na magorodo, oyo ekotaki kino na bashambre ya bakambi na bango.

31 Alobaki, mpe banzinzi oyo ezali na puazo eyaki, mpe bangungi na mboka mobimba.

32 Abalusaki mbula na bango na mbula ya mabanga na kake na mabele na bango;

33 Akweyisaki banzete na bango ya vino mpe banzete na bango ya figi; mpe abukaki banzete ya mboka na bango.

34 Alobaki, mpe mankonko eyaki, oyo bakoki kotanga te.

35 Eliaki matiti nyonso ya mobesu ya mokili na bango, eliaki bambuma ya mabele na bango.

36 Bongo abomaki bana nyonso ya liboso na mokili na bango, bambuma ya liboso ya makasi na bango.

37 Abimisaki Isayele, na mokumba ya bapalata mpe ya wolo; mpe wuta na mabota na bango moko te atiaki tembe.

38 Ezipito ezalaki na esengo tango babimaki; pamba te bazalaki na somo mingi mpo na Isayele.

39 Atandaki lipata mpo na kozipa bango, mpe moto mpo na kotia mwinda na butu.

40 Basengaki, mpe amemelaki bango bandeke "Kayi" mpe atondisaki bango na mapa ya Likolo.

41 Afangolaki libanga, mpe mayi ebimaki; lokola ebale yango etiolaki kati na esobe.

42 Pamba te akanisaki elaka na ye ya bosantu, oyo apesaki na mosali na ye Abraham.

43 Abimisaki bato na ye, na esengo nyonso; bato na ye apona, na makelele ya esengo;

44 Apesaki bango mabele ya bikolo; mpe bazwaki libula bamisusu basalaki;

45 mpo ete bakokaki kobatela makebisi na ye, mpe kotosa Mibeko na ye. Sanzola Yawe!

BANZEMBO 104

1 Sanzola Yawe, molimo na ngai! E Yawe Nzambe na ngai, ozali monene penza; olataki kongenga mpe lokumu.

2 Amizipaka na moi lokola kazaka; atanda likolo lokola ndako ya kapo.

3 Apikaka makonzi ya shambre na ye ya likolo likolo ya bamayi na bango; akomisaka mapata motuka na ye ya bitumba; mpe atambolaka likolo ya mapapu ya mopepe.

4 Akomisaka mopepe bantoma na ye mpe lolemo ya moto basali na ye.

5 Apika mokili likolo ya bafondasio na yango; yango ekoki koningana ata moke te.

6 Ozipaki yango na mozindo lokola na elamba; bamayi etelamaki likolo ya bangomba.

7 Kasi na pamela na yo bamayi ekimaki na makelele ya kake ekimaki;

8 elekaki likolo ya bangomba, ekitaki na nse ya balobwaku, na esika oyo obongisaki mpo na yango.

9 Otiaki ndelo oyo ekokaki koleka te; lisusu te ekozipa mokili.

10 Abimisaki mayi na balobwaku; abongisaki bisika ebimisaka mayi na balobwaku; ezalaki koleka na kati-kati ya bangomba.

11 Ezali kopesa mayi na banyama nyonso ya bilanga; bampunda ya zamba esilisaka posa na yango.

12 Bandeke ya likolo basalaka bazala na ngambo-ngambo ya bamayi; eyembaka kati na bitape.

13 Azali kosopela bangomba mayi wuta na bashambre na ye ya likolo, mokili etondi na mbuma ya misala na ye.

14 Akolisaka matiti mpo na banyama mpe milona mpo bato balona yango, na kobimisa biloko ya kolia wuta na mokili.

15 na vino oyo esepelisaka motema ya moto, mafuta oyo engengisaka elongi na ye, mpe lipa oyo elendisaka motema na ye.

16 Banzete ya Yawe basopeli yango mayi malamu, sedre ya Liban, oyo ye alona.

17 Bandeke basalaki bazala na bango kuna; bandeke ya minene ezali na bandako na yango na banzete ya mongufu.

18 Bangomba ya milayi ezali ya bantaba ya zamba,   madusu  na mabanga  ezali ebombamelo ya balapin.

19 Sanza ezali kolakisa batango; mpe moi eyebi tango ekendeke kolala.

20 Omemaka molili, butu ekomaka; mpe banyama nyonso ya zamba etambolaka-tambolaka.

21 Bantambwe egangaka mpo na nyama oyo bakangi; mpe elukaka bilei na yango epai na Nzambe.

22 Moi ebimi, mpe bantambwe elongwaka, ezongaka mpe elalaka na bisika na yango

23 Bongo moto akendeke na mosala na ye kino na pokwa.

24Tala ndenge misala na yo ezali mingi, e Yawe! Na bwanya osala yango nyonso; Mokili etondi na bikelamo na yo.

25 Ezali na ebale monene, molayi mpe epanzana! etonda na bikelamo oyo tokoki kotanga te, biloko ya bomoi oyo ya minene
mpe ya mike.

26 Kuna nde bamasuwa ekendaka mpe ezongaka, mpe leviatan oyo yo osala, esakanaka kuna.

27 Yango nyonso etalelaka yo, mpo opesa yango biloko ya kolia na tango oyo ekoki.

28 Tango opesaka yango bilei, ezwaka yango; tango omngolelaka yango loboko na yo etondaka na biloko ya malamu.

29 Tango obombi elongi na yo, yango ebangaka na somo; tango obendi pema na yango, ekufaka, mpe ezongaka na putulu.

30 Tango otindi Molimo na yo, ekelamaka, mpe obimisaka ya sika elongi ya mokili,

31 Tika nkembo ya Yawe ewumela libela na libela; tika Yawe asepela na misala na ye!

32 Ye oyo atalaka mokili, mpe yango elengaka; ye oyo asimbaka bangomba, mpe ebimisaka milinga.

33 Nakoyembela Yawe na bomoi na ngai mobimba; nakoyemba masanzoli epai ya Nzambe na ngai, tango nyonso oyo nazali na bomoi.

34 Tika makambo oyo nazali kokanisa esepelisa ye, lokola nasepelaka kati na Yawe.

35 Kasi bato ya masumu basila na mokili, mpe bato ya mabe bazala lisusu te! sanzola Yawe, e molimo na ngai. Sanzola Yawe!
  

BANZEMBO 103

1 Sanzola Yawe, e molimo na ngai; na kati na ngai nyonso sanzola kombo na ye ya bosantu!

2 Sanzola Yawe, molimo na ngai, mpe kobosana ata moke te makambo na ye nyonso ya malamu oyo asala,

3 ye oyo alimbisaka masumu na yo nyonso, mpe abikisaka bapasi na yo nyonso.

4 Ye oyo akangolaka bomoi na yo wuta na libulu; mpe alatisaka yo na bolingo mpe mawa;

5 Ye oyo atondisaka baposa na yo na biloko ya malamu; na bongo bolenge na yo ezali kozonga lisusu lokola ya egle.

6 Yawe asalaka bosembo, mpe bolamu mpo na bato nyonso bazali konyokwama.

7 Alakisaki banzela na ye na Moyize, misala na ye na bato ya Isayele.

8 Yawe atondi na mawa mpe na ngolu, asilikaka noki te, atondi na bolingo.

9 Akofunda te mikolo nyonso, to akobomba  kanda na ye mpo na libela te.

10 Asalelaka biso te na ndenge oyo ekoki na masumu na biso; to azongiselaka biso te na ndenge oyo ekoki na mabe na biso.

11 Pamba te ndenge likolo ezali likolo ya mokili; bongo bolingo na ye ezali monene mpo na baoyo babangaka ye;

12 ndenge este ezali mosika na weste, ndenge abwakaka masumu na biso mosika na biso.

13 Ndenge tata ayokelaka bana na ye mawa. bongo Yawe ayokaka mawa mpo na baoyo bazali kobanga ye.

14 Pamba te ayebi ndenge nini tosalamaki; azali kokanisa lisusu ete tozali putulu.

15 Mpo na moto, mikolo na ye ezali lokola matin, abongaka lokola fololo ya bilanga;

16 Mopepe eleki likolo na yango, mpe yango eleki; mpe esika na yango ekokanisa yango lisusu te.

17 Kasi wuta libela na libela bolingo na Yawe ezali na baoyo babangaka ye mpe bosembo na ye na bana ya bana na bango;

18 na baoyo batalelaka Boyokani na ye mpe bakanisaka kotosa makebisi na ye.

19 Yawe atiaki kiti na ye ya Bokonzi na likolo; mpe Bokonzi na ye ezali likolo na nyonso.

20 Bokumisa Yawe, bino baanzelu na ye; bino bato na nguya baoyo basalelaka mitindo na ye, baoyo botosaka maloba na ye.

21 Bosanzola Yawe, bino mampinga na ye nyonso na likolo, bino basali na ye, oyo bosalaka mokano na ye.

22 Bosanzola Yawe, misala na ye nyonso bisika nyonso ya Bokonzi na ye. Sanzola Yawe, e molimo na ngai.

  

BANZEMBO 102

1 Yoka libondeli na ngai, Yawe, tika ete koganga na ngai mpo na lisalisi ekoma epai na yo.

2 Kobombela ngai elongi na yo te tango nazali na pasi, balusa litoyi na yo epai na ngai; tango nabengi yo, zongisela ngai eyano noki-noki.

3 Pamba te mikolo na ngai ezali kolimwa lokola molinga; mikuwa na ngai ezali kozika lokola makala ya moto.

4 Motema na ngai ezali komitungisa mpe ekawuki lokola matiti; nabosani kutu kolia bilei na ngai.

5 Mpo na kolela na nse-nse na ngai, natikali poso na mikuwa.

6 Nazali lokola "Ibu" ya esobe, lokola "Ibu" na bisika oyo ebebi.

7 Pongi ekimi ngai, nakomi lokola ndeke yango moko likolo ya ndako.

8 Mokolo mobimba banguna na ngai bazali kofinga ngai; baoyo batombokeli ngai, bazali kosalela kombo na ngai lokola elakeli mabe.

9 Pamba te nazali kolia putulu lokola biloko na ngai mpe nazali kosangisa mayi na ngai ya komela na mayi ya miso,

10 mpo na kanda na yo ya monene, pamba te otombolaki ngai mpe obwakaki ngai pembeni.

11 Mikolo na ngai ezali lokola elilingi ya pokwa, nakawuki lokola matiti.

12 Kasi yo Yawe, ozali na kiti ya Bokonzi libela na libela; sango na yo ezali kowumela na bato ya batango nyonso.

13 akotelema mpe okoyokela Siona mawa, pamba te ezali tango ya kolakisa ngolu epai na ye; tango oyo ebongisama ekomi.

14 Pamba te mabanga na yango elingami epai ya basali na yo; putulu na ye ememi bango na mawa.

15 Bikolo ekobanga kombo ya Yawe; bakonzi nyonso ya mokili bakokumisa nkembo na yo.

16 Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona, mpe akomonana kati na nkembo na ye.

17 Akopesa eyano na libondeli ya baoyo bagangaka; akomona pamba te bileli na bango.

18 Tika ete yango ekomama mpo na bato ya batango oyo ekoya; mpo ete bato oyo nano basalami te bakoka kosanzola Yawe:

19 Yawe atalaki na nse wuta na Esika na ye ya bosantu kuna na likolo, wuta likolo, azali kotala mokili,

20 mpo na koyoka kolela na nse-nse ya bato oyo bazali na boloko, mpe mpo na kokangola baoyo bazwaki etumbu ya liwa.

21 Bongo kombo ya Yawe ekosakolama na Siona, mpe masanzoli na ye na Yeruzalem,

22 tango bato mpe bokonzi bakosangana mpo na kokumbamela Yawe.

23 Na bomoi na ngai asilisaki makasi na ngai; akomisi mikolo na ngai mokuse.

24 Bongo nalobaki: kolongola ngai te "Nzambe na ngai", na kati-kati ya mikolo nangai; bambula na yo ekowumela na bato ya batango nyonso.

25 Na ebandeli, otiaki bafondasio ya mokili; mpe likolo ezali mosala ya maboko na yo.

26 Ekopanzana kasi yo okotikala; nyonso ekonzuluka lokola elamba; okobongola yango lokola molato mpe ekotiama pembeni.

27 Kasi yo, okotikala kaka ndenge moko, mpe bambula na yo ekosuka te.

28 Bana ya basali na yo bakoyanda na miso na yo; bana ya bana na bango bakozala liboso na yo.

BANZEMBO 101

1 Nakoyemba bolingo na yo mpe bosembo na yo; epai na yo, Yawe, na koyemba masanzoli.

2 Nakozala na bokebi mpo na tambola na bomoi ezangi pamela; tango nini okoya epai na ngai? nakotambola na kati ya ndako na ngai, na motema oyo ezangi pamela.

3 Nakotia liboso ya miso na ngai eloko ya mabe te; nayinaka misala ya bato oyo bazangi boyengebene; ekokangama na ngai te.

4 Bato ya motema ya mabe bakozala mosika na ngai; nakozala na likambo moko te ya kosala na mabe.

5 Moto oyo atongaka na sekre moto oyo azali pembeni na ye; ye nde nakoyandisa nye, moto oyo azali na miso ya lolendo mpe motema ya lofundu, nalingi komana ye te.

6 Miso na ngai ekozala likolo ya bandimi kati na mabele, mpo bakoka koyanda na ngai; ye oyo atambolaka na kozanga pamela akosalela ngai.

7 Moto moko te oso akosaka akoyanda na ndako na ngai; moto moko te alobaka makambo ya lokuta akotelema liboso na ngai.

8 Tongo nyonso, nakokanga minoko ya bato nyonso ya mabe ya mokili, nakolongola moto nyonso azalaka mabe na vile ya Yawe.

  

Mapamboli.com 2010. Nioso esalami mpo na lokumu ya Nzambe. Motuna to lisalisi, komela biso mokanda. Mokambi ya misala oyo : Jupé Bongolo