[creation site web] [creation site internet] [logiciel creation site] [Banzembo]
[Banzembo-c]
[Ebandeli]
[Lisanga]
[Mabondeli]
[Matatoli]
[Mateya]
[Mandanda]
[mayebisi]
[Mindule]
[Matie]
[Marko]
[Luka]
[Jean]
[Misala]
[Roma]
[1Korinto]
[2Korinto]
[Galatia]
[Efezo]
[Filipi]
[Kolosai]
[1Tesalonika]
[2Tesalonika]
[1Timote]
[2Timote]
[Tito]
[Filemo]
[Ba-ebreo]
[Zaki]
[1Piere]
[2Piere]
[1Jean]
[2Jean]
[3Jean]
[Yude]
[Emoniseli]
[Banzembo]

BOYOKANI YA SIKA MPE BANZEMBO
BANZEMBO

BANZEMBO 100

1 Boganga na esengo epai na Yawe mokili mobimba,!

2 Bokumbamela Yawe na esengo nyonso, mpe boya liboso na ye na banzembo ya esengo!

3 Boyeba ete Yawe azali Nzambe. Ye moto asalaki biso, mpe biso tozali bato na ye; tozali bato na ye, mpe bameme oyo ye aleyisaka.

4 Bokota na baporte na ye na kozongisa matondi; mpe na lopango na ye na masanzoli. Bopesa ye matondi mpe bosanzola kombo na ye.

5 Pamba te Yawe azali malamu; mpe bolingo na ye ezali kowumela tango nyonso, mpe boyengebene na ye ezali kokoba na batango nyonso.
  

BANZEMBO 99

1 Yawe azali na bokonzi, tika ete bikolo elenga; atie kiti na ye ya Bokonzi kati-kati ya basheriben tika ete mokili eningana.

2 Yawe azali monene na Siona; anetolama likolo penza ya bikolo nyonso.

3 Tika ete basanzola kombo na yo ya monene mpe ya somo; ye azali Mosantu!

4 Mokonzi azali na nguya, alingaka bosembo! Otiaki makambo oyo ekoki; na Zakob osalaki oyo ezali sembo mpe alima.

5 Bonetola Yawe Nzambe na biso; mpe bokumbamela esika oyo atiaka makolo na ye; pamba te azali Mosantu!

6 Moyize mpe Aron bazalaki na kati ya banganga-Nzambe na ye, Samuel azalaki moko na kati ya baoyo bazalaki kobenga na kombo na ye; babengaki Yawe, mpe ye azongiselaki bango eyano.

7 Azalaki kolobela bango na likonzi ya lipata; babatelaki bikateli na ye mpe mitindo oyo apesaki bango.

8 Yawe Nzambe na biso, yo ozongiselaki bango biyano, ozalaki mpo na Isayele Nzambe oyo azalaki kolimbisa, atako opesa bango bitumbu na misala na bango ya mabe.

9 Bonetola Yawe Nzambe na biso, mpe bokumbamela na ngomba na ye ya bosantu; pamba te Yawe Nzambe na biso, azali
Mosantu!

  

BANZEMBO 98

1 Boyembela Yawe nzembo ya sika, pamba te asalaki makambo ya kokamwa; loboko na ye ya mobali mpe loboko na ye ya bosantu esalaki lobiko mpo na ye.

2 Yawe alakisaki lobiko na ye; mpe amonisaki bosembo na ye epai ya bikolo.

3 Akanisaki   bolingo   na   ye   mpe boyengebene na ye epai ya ndako ya Isayele; basuka nyonso ya mokili emonaki lobiko ya Nzambe na biso.

4 Boganga na esengo epai ya Yawe, mokili mobimba; bolela na nzembo ya esengo elongo na miziki!

5 Bobeta miziki epai ya Yawe, na lindanda mpe na makelele ya moyembi.

6 Na bakelelo mpe lokito ya liseke ya meme boganga na esengo nyonso liboso na Yawe Mokonzi.

7 Tika ete ebale monene eyokisa lokito mpe eloko nyonso oyo ezali na kati na yango, mokili na baoyo nyonso bavandi kati na yango.

8 Tika ete ba-ebale ebeta maboko na bango; tika ete bangomba eyemba lisanga mpo na esengo;

9 tika yango eyemba liboso na Yawe, pamba te azali koya kosambisa mokili. Akosambisa mokili na bosembo nyonso, mpe akosambisa bato na ndenge oyo ekoki.
  

BANZEMBO 97

1 Yawe azali na bokonzi, tika ete mokili mobimba ezala na esengo; tika bisanga ya mosika esepela!

2 Mapata mpe molili ya makasi ezingi ye; bosembo mpe kosala malamu ezali fondasio ya Kiti na ye ya Bokonzi.

3 Moto ezali kotambola liboso na ye mpe ezali kotumba bayini na ye na bisika nyonso.

4 Kongenga na ye ya kake ezali kongengisa mokili; mabele emoni mpe elengi.

5 Bangomba ezali konyangwama lokola mafuta, liboso ya Yawe, ya mokili mobimba.

6 Likolo ezali kopanza sango ya bosembo na ye; mpe bato nyonso bazali komona nkembo na ye.

7 Baoyo nyonso bakumbamela bililingi bazala na soni, baoyo bamikumisaka na bikeko; bokumbamela ye bino banzambe nyonso.

8 Siona ayoki mpe asepeli; mpe bamboka ya Yuda ezala na esengo mpo na ndenge okokata makambo, Yawe.

9 Pamba te yo Yawe, ozali ye Oyo Aleki Likolo na mokili mobimba; oleki na konetolama likolo penza ya banzambe nyonso.

10 Tika ete baoyo bolingaka Yawe, boyina mabe; pamba te ye abatelaka bomoi ya bandimi na ye, mpe akangolaka bango na maboko ya bato ya mabe.

11 Moi engengelaka bato na sembo; mpe esengo ezali mpo na bato oyo bazali alima na mitema.

12 Bosepela kati na Yawe, bino oyo bozali sembo; mpe bosanzola kombo na ye ya bosantu.

  

BANZEMBO 96

1 Boyembela Yawe nzembo ya sika; Boyembela Yawe, mokili mobimba!

2 Boyembela Yawe, bosanzola kombo na ye; bosakola lobiko na ye mokolo na mokolo.

3 Botatola nkembo na ye na kati ya bikolo; misala na ye ya kokamwa na kati ya bato nyonso.

4 Pamba te Yawe azali monene, mpe aleki mpo na kozwa masanzoli; ye azali sukisa likolo ya banzambe nyonso.

5 Pamba te banzambe ya bikolo ezali bikeko, kasi Yawe asalaki likolo.

6 Kongenga mpe lokumu ezali liboso na ye, makasi mpe nkembo ezali na kati ya Esika na ye ya bosantu.

7 Bopesa Yawe, mabota ya bikolo, bopesa Yawe nkembo mpe makasi!

8 Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na kombo na ye; bomema likabo mpe bokota na balopango na ye!

9 Bokumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na ye; lenga liboso na ye, mokili mobimba.

10 Boloba na kati ya bikolo: "Yawe azali Mokonzi!" Mokili etelema ngwi, ekoki koningana te; akosambisa bato na alima.

11 Tika ete likolo esepela, tika mokili ezala na esengo; tika ete ebale eyokisa lokito mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Tika ete bilanga ezala na esengo, mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango!

12 Bongo banzete nyonso ya zamba ekoyemba na esengo,

13 ekoyemba nzembo liboso ya Yawe, pamba te azali koya, azali koya kosambisa mokili. Akosambisa mokili na bosembo mpe bato na solo na ye.

BANZEMBO 95

1 Boya, tika toyemba na esengo epai na Yawe; tika toganga epai ya libanga ya lobiko na biso!

2 Tika toya liboso na ye na matondi; tonetola ye na miziki mpe nzembo.

3 Pamba te Yawe azali nzambe monene, mokonzi monene likolo ya banzambe nyonso.

4 Na loboko na ye bisika ya mozindo ya mokili ezali; mpe basonge ya bangomba ezali ya ye.

5 Ebale monene ezali ya ye, mpo asala yango; mpe maboko na ye esala mabele ya kokawuka.

6 Boya, tika togumbama na kokumbamela, tika tofukama liboso ya Yawe mokeli na biso.

7 Pamba te azali Nzambe na biso, mpe tozali bato ya lopango na ye, bameme na nse ya kobatela na ye. Leio, soki boyold mongongo na ye.

8 boyeisa mitema na bino makasi te lokola bosalaki na Meriba, lokola bosalaki mokolo wana na Masa na esobe;

9 epai batata na bino bamekaki ngai mpe batalaki motema na ngai, atako bamonaki oyo nasalaki.

10 Na bambula ntuku minei, nazalaki na kanda na bato ya tango wana; nalobaki: "Bazali bato oyo mitema na bango ebunga nzela; mpe bayebaki banzela na ngai te."

11 Yango wana nalapaki ndayi na kati ya kanda na ngai ete: "Bakokota te na kopema na ngai!"

  

BANZEMBO 94

1 Yawe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, omimonisa.

2 Telema, yo Zuzi ya mokili; zongisela bato ya lolendo oyo basengeli kozwa.

3 Kino tango nini bato ya mabe, Yawe, kino tango nini bato ya mabe bakosepela?

4 Bazali kopanza maloba ya lomndu; bato nyonso oyo basalaka mabe batondi na lolendo.

5 Bazali konyata bato na yo, Yawe, bazali konyokola libula na yo.

6 Bazali koboma mwasi oyo akufela mobali mpe mopaya; bazali koboma mpe bana oyo bazanga baboti.

7 Bazali koloba: "Yawe azali komona te; Nzambe ya Zakob azali kolanda yango te."

8 Bokeba, bino bato bozangi mayele kati na bato; bino bazoba bokokoma na bwanya tango nini?

9 Boni, ye oyo adaki litoyi, azali koyoka te? Ye oyo asalald liso, azali komona te?

10 Ye oyo apesaka bitumbu na bikolo, akopesa etumbu te? Ye oyo ateyaka moto oyo azangi boyebi?

11 Yawe ayebi makanisi ya moto; ayebi ete makanisi yango ezali na tina te.

12 Mapamboli na moto oyo yo opesi etumbu, Yawe, moto oyo oteyi na Mibeko na yo,

13 opesaka ye lisungi na mikolo ya minyoko, kino bakosilisa kotimola libulu mpo na bato ya mabe.

14 Pamba te Yawe abwakaka bato na ye te, akobosana ata moke te libula na ye.

15 Kosambisama ekofanda lisusu likolo ya bosembo; mpe baoyo nyonso bazali na mitema alima bakolanda yango.

16 Nani akotelema mpo na ngai liboso ya bato ya mabe? Nani akokotela ngai liboso ya bato oyo basalaka mabe?

17 Soki Yawe apesaki ngai lisalisi te mbele noki nalingaki koyanda nye na liwa.

18 Tango nalobaki: "Nalingi kokweya," bolingo na yo, Yawe, esimbaki ngai.

19 Tango motungisi ezalaki monene kati na ngai, libondisi na yo ememaki esengo na molimo na ngai.

20 Boni, Bokonzi ya mabe ekoki kozala na boyokani na yo, oyo ezali komema bapasi na nzela ya bikateli na yango?

21 Bazali kosangana mpo na kobundisa bato ya sembo; mpe kokatela moto oyo asali likambo te liwa.

22 Kasi Yawe akoma ndako na ngai ya makasi; mpe Nzambe na ngai, libanga epai nakendaka kobombana.

23 Ye akozongisela bango mpo na masumu na bango; mpe akobebisa bango mpo na mabe na bango; Yawe Nzambe na biso akobebisa bango.

BANZEMBO 93

1 Yawe azali na bokonzi, alati lokumu; Yawe alati lokumu, mpe alati makasi. Mokili etelemi ngwi, mpe ekoki koningana te.

2 kiti na yo ya Bokonzi etiama wuta kala; ozali na tango nyonso.

3 Ba-ebale minene etomboli, Yawe, ba-ebale minene etomboli mingongo na yango; ba-ebale minene etomboli bambonge na yango oyo ezali kotiola.

4 Nguya koleka lokito ya mayi ya minene nguya koleka baoyo basalaka Baebale ya minene, Yawe na likolo azali na nguya.

5 Bikateli na yo etelema ngwi; bosantu ezali kobongisa ndako na yo mpo na mikolo oyo ezanga suka, Yawe.
  

BANZEMBO 92

1 Ezali malamu kosanzola Yawe; mpe kobeta miziki na kombo na ye Oyo Aleki Likolo,

2 mpo na kosakola bolingo na yo na tongo; mpe boyengebene na yo na butu,

3 na miziki ya bansinga zomi, na gitare, mpe na mongongo ya lindanda.

4 Pamba te osepelisaka ngai na misala na yo, Yawe; nazali koyemba na esengo mpo na misala ya maboko na yo.

5 Tala ndenge nini misala na yo ezali minene, Yawe, ndenge ezali mozindo makanisi na yo.

6 Moto oyo azanga mayele ayebi te, oyo azangi mayele akoki kososola te, zoba akososola te,

7 mpo ete ata bato ya mabe bazali kokola lokola matin; mpe baoyo nyonso basalaka mabe bazali komona bolamu bakobebisama libela na libela.

8 Kasi yo Yawe, onetolama libela na libela.

9 Ya solo banguna na yo, Yawe, ya solo banguna na yo bakopanzana; baoyo nyonso basalaka mabe bakopalangana.

10 Onetoli maseke na ngai lokola oyo ya mpakasa; mafuta ya kitoko ekosopanela ngai.

11 Miso na ngai emonaki kokweya ya bato oyo bayinaka ngai; matoyi na ngai eyokaki lisanga ya bayini na ngai ya mabe.

12 Bato na sembo bakomona bolamu lokola nzete ya mbila; bakokola lokola Sedre ya Liban;

13 balonama na kati ya ndako ya Yawe, bakomona bolamu na kati ya lopango ya Nzambe na biso.

14 Bakobota mbuma ata na kimobange; bakotikala mobesu mpe na makasa:

15 nakosakola: "Yawe azali alima; Ye azali libanga na ngai, mpe mabe ata moke te ezali kati na ye.

  

BANZEMBO 91

1 Moto oyo ayandaka na esika ya kobombana ya Ye Oyo Aleki Likolo akopema na nse ya elilingi ya Nzambe ya nguya nyonso.

2 Nakoloba boye mpo na Yawe: "Ye azali ebombamelo na ngai mpe ndako na ngai ya makasi; Nzambe na ngai, kati na ye natiaka motema".

3 Ya solo, akobikisa yo na motambo ya moto oyo akangaka bandeke, mpe na maladi oyo ebomaka..

4 Akozipa yo na bansala na ye, mpe na nse ya mapapu na ye okozwa esika ya kobombana; boyengebene na ye ekozala ebende na yo ya makasi oyo ebatelaka mpe lopango na yo ya malasi.

5 Okobanga te somo ya butu, to mpe likonga oyo epumbwaka na moi,

6 to mpe maladi ya mabe oyo etambolaka na molili, to mpe pasi oyo ebebisaka na midi.

7 Nkoto moko ekoki kokweya pembeni na yo, mpe nkoto zomi na loboko na yo ya mobali, kasi ekoya pembeni na yo te.

8 kotala kaka na miso na yo mpe okomona etumbu ya bato ya mabe.

9 Soki okomisi Oyo Aleki Likolo eyandelo na yo, ndenge moko Yawe, oyo azali ebombamelo na ngai.

10 Bongo mabe ata moko te ekokweyela yo; to mpe pasi ata moko te ekoya pembeni ya ndako na yo ya kapo.

11 Pamba te akopesa mitindo na baanzelu na ye mpo na yo, mpo babatela yo na banzela na yo nyonso.

12 Bakotombola yo na maboko na bango, mpo ete obeta te likolo na yo na libanga.

13 Okotambola likolo ya ntambwe mpe likolo ya kobra; okonyata ntambwe oyo akomeli mpe nyoka.

14 "Mpo  alingi  ngai"   elobi   Yawe, "nakokangola ye, nakobatela ye, pamba te ayebi kombo na ngai.

15 Akobenga ngai mpe nakozongisela ye eyano; nakozala elongo na ye na tango ya minyoko, nakokangola ye mpe nakokumisa ye.

16 Nakotondisa ye na ya molayi; mpe nakolakisa ye lobiko na ngai."
  

BANZEMBO 90

1 Yawe, yo ozali esika na biso ya koyanda na batango nyonso.

2 Liboso ete bangomba ebotama, yo osalaki mabele mpe mokili, wuta seko na seko ozali Nzambe.

3 Yo ozongisaka bato na putulu; na koloba: "zonga na putulu bana ya bato."

4 Pamba te bambula nkoto na miso na yo ezali lokola mokolo oyo ewuti koleka, to lokola ngonga moko na butu.

5 Olongolaka bato na pongi ya liwa; bazali lokola matin ya sika na tongo,

6 na tongo mpe ebimisaka ya sika; na pokwa elembaka mpe ekawukaka.

7 Tosilaka na kanda na yo; mpe toyokaka somo na kotomboka na yo.

8 Otiaka mabe na biso liboso na yo; masumu na biso oyo ebombana, na mwinda ya miso na yo.

9 Mikolo na biso nyonso ezali kolimwa limwa na nse ya kanda na yo; tosilisaka bambula na biso na kolela na pasi.

10 Molayi ya mikolo na biso ezali ya bambula ntuku sambo, to bambula ntuku mwambe, soki tozali na makasi; yango wana, tango na bango ezali kaka pasi mpe minyoko pamba te tozali koleka noki mpe tozali kopumbuaka.

11 Nani ayebi nguya ya kanda na yo? Pamba te kanda na yo ezali monene lokola kobanga oyo ekoki na yo.

12 Teya biso kotanga mikolo na biso malamu, ete tokoka kozwa motema moko ya bwanya.

13 Bongwana, Yawe! Kino tango nini ekozala? Yokela basali na yo mawa!

14 Tondisaka biso na tongo na bolingo na yo ya makasi, ete tokoka koyemba na esengo, mpe tokosepela mikolo nyonso.

15 Sepelisa biso lokola mikolo mingi oyo yo omonisaki biso pasi, lokola bambula mingi oyo tomonaki minyoko.

16 Tika ete misala na yo balakisa yango epai ya basali na yo; kongenga na yo epai ya bana na bango.

17 Tika ete ngolu ya Yawe Nzambe na biso ezala likolo na biso; lendisa misala ya maboko na biso mpo na biso; ee, lendisa misala ya maboko na biso.

  

BANZEMBO 89

1 Nakoyemba bolingo ya monene ya Yawe libela na libela; na monoko na ngai na koyebisa boyengebene na yo na batu ya tango nyonso.

2 Nakosakola ete bolingo na yo etelemi ngwi libela na libela, ete etiaki boyengebene na yo na likolo.

3 Olobaki: "Natiaki boyokani na moto na ngai napona; nalapaki ndayi na David, mosali na ngai:

4 Nakotia libota na yo libela na libela; mpe nakokomisa ngwi kiti na yo ya Bokonzi na tango ya mabota nyonso.

5 Likolo ekosanzola makambo na yo ya kokamwa, Yawe, boyengebene na yo na lisanga ya basantu.

6 Tamba te nani, kuna na mapata, akoki kokokana na Yawe? Nani azali lokola Yawe kati na bikelamu ya likolo?

7 Kati na lisanga ya basantu, babangi Nzambe mingi; azali somo koleka bango nyonso bazingi ye.

8 Ee Yawe, Nzambe na Nguya nyonso, nani azali lokola yo? Yo ozali na nguya, Yawe, mpe boyengebene na yo ezingi yo.

9 Yo ozali na Bokonzi likolo ya ebale monene oyo etomboki, bambonge na yango soki etelemi okotisaka yango.

10 Onyataki Rahab lokola moto baboma; na makasi ya loboko na yo, opanzaki banguna na yo.

11 Likolo ezali ya yo, mpe mokili ezali ya yo; Yo moto osalaki mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango.

12 Yo moto osalaki Sude mpe Nord; Tabor mpe Ermo ezali koyemba na esengo mpo na kombo na yo.

13 Loboko na yo ezali na nguya; loboko na yo etondi makasi; loboko na yo ya mobali enetolami.

14 Bosembo mpe kosala malamu yango nde ezali fondasio ya kiti na yo ya Bokonzi; bolingo mpe boyengebene ezali kotambola liboso na yo.

15 Mapamboli na bato oyo bazali koyekola kobetela yo maboko, baoyo batambolaka liboso na moi ya miso na yo.

16 Bazali kosepela mokolo mobimba kati na kombo na yo; bazali na esengo kati na bosembo na yo.

17 Pamba te, yo ozali nkembo mpe makasi na bango; mpe na ngolu na yo onetolaka maseke na biso.

18 Ya solo ebende ya makasi oyo ebatelaka biso ezali Yawe; mokonzi na biso azali Mosantu ya Isayele.

19 Mokolo moko, na emoniseli, olobaki; epai ya bandimi na yo oyebisaki: "Napesaki makasi na elombe moko; nanetolaki elenge mobali moko na kati ya bato.

20 Namonaki David mosali na ngai; mafuta na ngai ya bosantu, napakolaki ye...

21 Loboko na ngai ekosimba ye; ya solo loboko na ngai ekopesa ye makasi.

22 Monguna ata moko te akotia ye na se ya Bokonzi na ye mpo afuta mpako; ata moto mabe moko te akonyokola ye.

23 Nakonyata banguna na ye liboso na ye; mpe nakokweyisa bayini na ye.

24 Bolingo na ngai ya boyengebene ekozala na ye mpe na nzela ya kombo na ngai maseke na ye ekonetolama.

25 Nakotia loboko na ye likolo ya ebale monene; mpe loboko na ye ya mobali likolo ya bamayi.

26 Akobenga ngai: "Yo ozali Tata na ngai, Nzambe na ngai, libanga ya lobiko na ngai!"

27 Nakopona ye mwana na ngai ya liboso; na Bokonzi ya mokili oyo aleki konetolama.

28 Nakowumisa bolingo na ngai epai na ye libela na libela, na ngai na ye ekobeba soki moke te.

29 Nakotelemisa ngwi libota na ye libela na libela; kiti na ye ya Bokonzi ewumela lokola likolo ekowumela.

30 Soki bana na ye babwaki Mibeko na ngai, mpe balandi bikateli na ngai te,

31 soki babuki bikateli na ngai, mpe babebisi kobatela malako na ngai,

32 nakopesa etumbu na masumu na bango na nzete, mabe na bango na fimbo,

33 kasi nakolongola te bolingo na ngai epai na ye; mpe nakowangana te boyengebene na ngai.

34 Nakobebisa boyokani na ngai te; to nakobongola ata moke te oyo bambebo na ngai ebimisaki.

35 Mbala moko mpo na libela, nalapaki na bosantu na ngai; mpe nakokosa David te,

36 ete libota na ye ekowumela libela; mpe kiti na ye ya Bokonzi ekowumela liboso na ngai lokola moi.

37 Ekozala ya kotelema ngwi libela lokola sanza, temwe ya boyengebene kuna na mapata.

38 Kasi obwakaki ye, otiolaki ye; ozalaki na kanda penza na mopakolami na yo.

39 Oboyaki Boyokani na mosali na yo; mpe olongolaki lokumu ya Bokonzi na ye, kino obwakaki yango na putulu.

40 Obukaki bamur na ye nyonso; mpe okitisaki bandako na ye ya makasi na libebi.

41 Baoyo nyonso balekaka wana bazalaki kobotola ye biloko; akomaki eloko ya litioli epai ya baoyo bayandaka pembeni na ye.

42 Onetolaki loboko ya mobali ya bayini na ye; osalaki esengo na banguna na ye nyonso.

43 Obalusaki mino ya mopanga na ye; mpe osungaki ye te na bitumba.

44 Otiaki suka na kongenga na ye mpe obwakaki kiti na ye ya Bokonzi na mabele.

45 Okataki na mokuse mikolo ya bolenge na ye; ozipaki ye na kazaka ya soni.

46 Kino tango nini, Yawe, okobombana libela na libela? Kino tango nini kanda na yo ekongala lokola moto?

47 Kanisa ndenge bomoi na ngai ezali ya tango mokuse; mpo na pamba osalaki bato nyonso!

48 Moto nini akoki kozala na bomoi, mpe amona liwa te, to amibikisa na nguya ya mboka ya bakufi?

49 Yawe, esika nini ezali bolingo ya makasi na yo ya kala, oyo kati na boyengebene na yo olapaki epai na David?

50 Kanisa,  Yawe,  ndenge  bazalaki kosakana na mosali na yo; ndenge namemi na motema na ngai kofinga ya bikolo nyonso,

51 nakofinga oyo banguna na yo bazalaki kosakana, Yawe, na oyo bazalaki kosakana na makolo ya mopakolami na yo.

52 Masanzoli ezala epai na Yawe libela na libela. Amen! Amen!

BANZEMBO 88

1 Ee Yawe, Nzambe oyo abikisaka ngai, butu mpe moi nazali koganga liboso na yo.

2 Tika ete libondeli na ngai ekoma liboso na yo; balola litoyi na yo na koganga na ngai.

3 Pamba te molimo na ngai etondi na minyoko; mpe bomoi na ngai ekomi pene-pene ya mboka ya bakufi.

4 Natangami kati na baoyo bazali kokita na libulu; nakomi lokola moto oyo azanga makasi.

5 Nazali na ngambo ya liwa, esika moko na bato bakufa, lokola bato oyo basi'babomi mpe bazali kolala na mboka ya bakufi, baoyo okokanisa lisusu te, baoyo bakabwani na lisalisi na yo.

6 Otie ngai na libulu ya mozindo, kati na mozindo ya molili.

7 Kanda na yo ekweyi na kilo likolo na ngai; yo ozindisi ngai na bambonge na yo nyonso.

8 kabolaki ngai na baninga na ngai ya motema; mpe okomisi ngai eloko ya nkele epai na bango; nazali ya kokangama mpe nakoki kokoka kokima te.

9 Miso na ngai ezali kobeba mpo na pasi; Nazali kobenga yo, Yawe, mokolo m mokolo; natomboli maboko na ngai epai na yo.

10 Boni, olakisaka bato bakufa makambo na yo ya kokamwa? Boni, bakufi bakoki kotelema mpo na kokumisa yo?

11 Bolingo na yo ekosakolama na mboka ya bakufi? Boyengebene na yo na libebi?

12 Makamwisi na yo ekoki koyebana na esika ya molili, to misala na yo ya bosembo na mabele ya bato oyo babosana nyonso.

13 Kasi ngai, nazali konganga epai na yo mpo na lisalisi, Yawe; na tongo libondeli na ngai ekomaka liboso na yo.

14 Mpo na nini, Yawe, obwaki ngai? Mpe obombeli ngai elongi na yo?

15 Wuta bolenge na ngai, nazali na pasi mpe liwa ekanga ngai; nazali komona pasi mpo na somo na yo, mpe elikya esili ngai.

16 Kanda na yo ya makasi ezali koleka likolo na ngai, somo na yo ebebisi ngai.

16 Mokolo mobimba yango ezingi ngai lokola mayi; ezindisi ngai mobimba.

17 Okabolaki ngai na baoyo batambolaka na ngai mpe balingami na ngai; molili nde ezali moninga na ngai ya motema.
  

BANZEMBO 87

1 Atia fondasio na ye likolo ya ngomba ya bosantu.

2 Yawe alingaka baporte ya Siona koleka bisika nyonso Zakob ayandaka.

3 Makambo ya nkembo ezali kolobama mpo na yo, vile ya Nzambe.

4 Nakoloba mpo na Rahab mpe mpo na Babilona na kati ya bato oyo bayebi ngai; Filistiya, Tir mpe Kush mpe nakoloba: "Moto oyo abotama na Siona."

5 Bongo bakoloba boye mpo na Siona : "Moto oyo mpe oyo wana abotama kati na ye; mpe Ye Oyo Aleki Likolo akotia ye."

6 Yawe akokoma boye na buku ya bato: "Moto oyo abotama na Siona!"

7 Lokola bazali kobeta miziki, bakoyemba "Maziba na ngai nyonso ezali kati na yo."

  

BANZEMBO 86

1 Tia litoyi mpe zongisela ngai eyano; pamba te nazali mobola mpe mokeleli.

2 Batela bomoi na ngai, pamba te namipesa epai na yo; yo ozali Nzambe na ngai! Bikisa mosali na yo oyo adaka motema epai na yo.

3 Yokela ngai mawa, Yawe, pamba te nazali kobenga yo mokolo mobimba.

4 Mema esengo epai ya mosali na yo; epai na yo, Yawe, natomboli molimo na ngai.

5 Yo ozali malamu mpe olimbisaka, Yawe; otondi na bolingo epai ya baoyo nyonso babengaka yo.

6 Tia litoyi na libondeli na ngai, Yawe ; yoka koganga na ngai mpo na mawa.

7 Na mokolo ya minyoko na ngai, nakobenga yo, pamba te okopesa ngai eyano.

8 Na kati ya banzambe ezali na moko te lokola yo, Yawe, mpe misala ata moke te ekokani na oyo ya yo.

9 Ee Nkolo, bikolo nyonso oyo osala, ekoya mpe ekokumbama liboso na yo, Yawe, ekomema nkembo na kombo na yo.

10 Pamba te ozali monene, mpe osalaka misala ya kokamwa; kaka yo nde ozali Nzambe.

11 Teya ngai nzela na yo, Yawe, mpe nakotambola kati na solo na yo; pesa ngai motema oyo ekabwana te, mpo ete nakoka kobanga kombo na yo.

12 Nakosanzola yo, Yawe Nzambe na ngai, na motema na ngai mobimba; nakokumisa kombo na yo libela na libela.

13 Pamba te bolingo na yo ezali monene epai na ngai; mpe okangolaki ngai wuta na mozindo na mboka ya bakufi.

14 Bato ya lofundu bazali kobundisa ngai, Nzambe; ebele ya bato ya mobulu bazali koluka bomoi na ngai; mpe bakanisaka yo te.

15 Kasi yo, Yawe, ozali Nzambe oyo otonda na mawa mpe na ngolu, osilikaka noki te, otonda na bolingo mpe na boyengebene.

16 Baluka epai na ngai mpe yokela ngai mawa; pesa makasi na yo na mosali na yo, mpe bikisa mwana ya mosali na yo ya mwasi.

17 Pesa ngai elembo ya bolamu na yo, mpo ete banguna na ngai bamona yango mpe bayoka soni; pamba te, yo Yawe, osalisaki ngai mpe olongolaka ngai mawa na motema.
  

BANZEMBO 85

1 Olakisaki ngolu na yo na mabele na yo Yawe,; ozongisaki bozui ya Zakob.

2 Olimbisaki bomengo mabe ya bato na yo; mpe ozipaki masumu na bango nyonso.

3 Otiaki pembeni kanda na yo nyonso; mpe obalukaki wuta na kosilika na yo ya makasi.

4 Zongisa biso ndenge tozalaki Nzambe Mobikisi na biso,

5 Okozala na kanda epai na biso libela? okowumisa kanda na yo na mabota nyonso?

6 Okozongisela biso lisusu bomoi te, mpo ete bato na yo basepela kati na yo?

7 Lakisa biso bolingo na yo ya makasi, Yawe; mpe pesa biso lobiko na yo.

8 Nakoyoka oyo Yawe Nzambe akoloba; alaki kimia epai ya bato na ye, basantu na ye; kasi tika bango babaluka lisusu te na liboma.

9 Ya solo, lobiko na ye ezali pene-pene ya baoyo babangaka ye; mpo ete nkembo na ye eyanda na mabele na biso.

10 Bolingo mpe boyengebene ekutani elongo; bosembo mpe kimia eyambani noki na mosusu.

11 Boyengebene ebimi na mokili; mpe bosembo na nse wuta na likolo.

12 Yawe akopesa oyo ezali malamu; mpe mabele na biso ekobota bambuma na yango.

13 Bosembo ekotambola liboso na ye; mpe ekobongisa nzela mpo na makolo na ye.

  

BANZEMBO 84

1 Tala ndenge kitoko ezali na esika na yo oyandaka, Yawe ya Nguya nyonso!

2 Molimo na ngai elingi mpe ezali na posa mpo na lopango ya Yawe; motema na ngai mpe mosuni ya nzoto na ngai ezali koganga mpo na Nzambe ya bomoi.

3 Ata ndeke ya moke ezwaka ndako, mpe ndeke oyo babengaka Irondele ezwaka zaĂŻa na yango, epai etiaka bana na yango; pene-pene ya mesa oyo batumbelaka yo mbeka, Yawe ya nguya nyonso, Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai.

4 Mapamboli ezali na baoyo bayandaka na ndako na yo; bango basanzolaka yo tango nyonso!

5 Mapamboli ezali na baoyo makasi na bango ezali kati na yo; baoyo babongisa mitema na bango mpo na kokende kosambela na esika ya bosantu.

6 Lokola balekaka na nse ya ngomba ya Baka, bakomisaka esika yango esika ebimisaka mayi; mbula mpe ezipaka yango na liziba ya mayi.

7 Bokasi na bango ebakisamaka kino moko na moko amonana liboso ya Nzambe na Siona.

8 Tia litoyi na mabondeli na ngai, Yawe, Nzambe ya nguya nyonso, yoka ngai, Nzambe ya Zakob.

9 Tala epai ya ebende na biso ya makasi oyo ebatelaka Nzambe; tala na ngolu epai ya mopakolami na yo.

10 Mokolo moko na lopango na yo eleki malamu koleka mikolo nkoto epai mosusu. Nakolinga kutu kozala mokengeli ya porte na ndako ya Nzambe na ngai, na esika ya kovanda na bandako ya kapo ya bato ya mabe.

11 Pamba te, Yawe Nzambe azali moi mpe ebende ya makasi oyo ebatelaka; Yawe apesaka ngolu mpe lokumu; ezali na eloko moko te ya malamu akoki kopimela baoyo batambolaka na pamela moko te.

12 Yawe ya nguya nyonso, mapamboli epai na moto oyo atiaka motema na ye epai na yo!
  

BANZEMBO 83

1 Ee Nzambe, koyanda nye te; kokanga monoko te, Nzambe kotikala kimia te.

2 tala ndenge banguna na yo bazali kotomboka; ndenge bayini na yo bazali kotombola mitu na bango.

3 Na mayele mabe bazali kosala likita mpo na bato na yo; bazali kokanela bato oyo yo olengelaka.

4 Bazali koloba: "Boya mpe tosilisa bango lokola ekolo! Mpo ete kombo ya Isayele bakanisa yango lisusu te".

5 Na likanisi moko, bakaneli na lisanga; basali boyokani mpo na kobundisa yo:

6 Bandako ya kapo ya Edom mpe bato ya Ismayele, ya Mowabi mpe ya Agar,

7 Gebal, Amoni mpe Amaleki, Filistiya, elongo na bato ya Tir.

8 Ata bato ya Asiria, bango mpe basangani na bango; mpo na kobakisa libota ya Loti makasi.

9 Sala bango ndenge osalaki Madian; ndenge osalaki Sisera, mpe Zabini, na mayi ya Kisona,

10 baoyo bapanzanaki na Endori, mpe bakomaki lokola matiti ya kopola na mabele.

11 Sala bato na bango ya lokumu lokola Orebi mpe Zebi; bango nyonso bana ya bakonzi lokola Zeba mpe Salmuna.

12 Baoyo balobaki: "Tobotola mabele ya Nzambe bisika baliesaka bibwele!"

13 komisa bango lokola mopepe ya kayina, Nzambe na ngai, lokola matiti liboso ya mopepe.

14 lokola moto oyo ezikisaka zamba; to lokola moto ya makasi oyo ezikisaka bangomba.

15 Bongo landa bango na mopepe na yo ya makasi, mpe bangisa bango na mopepe na yo ya makasi:

16 Zipa bilongi na bango na soni mpo ete bakoluka kombo na yo, Yawe.

17 Tika ete bayoka soni mpe somo ya libela; tika ete bapanzana na lokumu te.

18 Tika bayeba ete yo moko kaka, kombo ezali Yawe; ete yo kaka ozali Ye Oyo Aleki Likolo, likolo ya mokili mobimba.

  

BANZEMBO 82

1 Nzambe atelemi na kati ya lisanga ya monene; azali kokata makambo na kati ya "banzambe"

2 Kino tango nini bokolobela moto oyo azangi sembo, mpe kokotela bato ya mabe?

3 lobela moto azanga makasi mpe mwana oyo akufela baboti; bolakisa alima epai ya mobola mpe epai ya moto oyo bazali konyokola.

4 Bokangola moto oyo azangi makasi mpe mobola; bolongola bango na maboko ya bato ya mabe.

5 Bayebi eloko moko te mpe basosolaka eloko moko te; bazali koyenga-yenga na molili; bafondasio nyonso ya mokili ezali koningana.

6 Nalobaki: "Bozali banzambe; bino nyonso bozali bana na ye Oyo Aleki Likolo."

7 Kasi bokokufa lokola bato pamba; bokokweya lokola bakambi nyonso.

8 Telema Nzambe! Sambisa mokili! Pamba te bikolo nyonso ezali libula na yo.

BANZEMBO 81

1 Boyemba na esengo epai na Nzambe makasi na biso; bonganga epai ya Nzambe ya Zakob.

2 Bobanda miziki, bobeta bambonda ya mike, bobeta miziki ya lindanda mpe gitare.

3 Bobeta liseke ya meme tango sanza ekobima sika, mpe tango ekobima mobimba na mokolo ya feti na biso!

4 oyo ezali ekateli mpo na Isayele; mpe etinda ya Nzambe ya Zakob.

5 Atiaki yango lokola likebisi mpo na Zozefi tango abundisaki Ezipito, epai toyokaki monoko oyo tososolaki te.

6 Alobi: "Nalongolaki mokumba oyo ezalaki na mapeka na ye; maboko na bango elongwaki na bowumbu ya kitunga."

7 Na kati na pasi na yo obengaki mpe nakangolaki yo; napesaki yo eyano na kati ya mapata na kake; namekaki yo na mayi ya Meriba.

8 Botia litoyi bato na ngai, mpe nakokebisa bino; Ee Isayele, soki bolingaki kotia matoyi epai na ngai!

9 Okoki kozala na nzambe ya mopaya te kati na yo; okoki kokumbamela nzambe ya bapaya te.

10 Ngai nazali Yawe Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ezipito; mngola malamu monoko na yo mpe nakotondisa yango.

11 Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te, mpe Isayele atosaki ngai te.

12 Bongo natikaki bango na mitema na bango makasi; balandaki mokano na bango moko.

13 Soki bato na ngai bayokelaki ngai. Soki Isayele alandaki banzela na ngai,

14 mbele na mbangu nalingaki kotia na nse na bango banguna na bango; mpe nalingaki kobalusa loboko na ngai liboso ya bayini na bango.

15 Baoyo bayinaka Yawe balingaki komikitisa liboso na ye, mpe etumbu na bango elingaki kowumela libela na libela.

16 Kasi yo olingaki kolia ble ya kitoko; na mafuta ya nzoyi oyo ebimaka na libanga nalingaki kotondisa yo.

  

BANZEMBO 80

1 yoka biso, Mobateli ya Isayele, yo moto okambaka Zozefi lokola etonga ya bameme; yo moto oyandi na kiti ya Bokonzi na kati-kati ya baseriben, ngenga!

2 liboso ya Efrayim, Benzame mpe Manase olamusaki nguya na yo; yaka mpe bikisa biso!

3 Zongisa biso ndenge tozalaki, Nzambe, ngengisela biso elongi na yo, mpe tokobika.

4 Ee Yawe, Nzambe na nguya nyonso, kino tango nini kanda ekongala mpo na losambo ya bato na yo?

5 Oleyisaki bango lipa ya mayi ya miso; omelisaki bango mayi ya miso na kopo etonda.

6 Okomisaki biso esika ebimisaka koswana ya baoyo bazali pembeni na biso; mpe banguna na biso bakomi kosakana na biso.

7 Zongisa biso ndenge tozalaki, Nzambe na Nguya nyonso; tika ete elongi na yo engengisa biso mpe tokobika.

8 0pikolaki nzete moko ya vino wuta na Ezipito; obenganaki bikolo, mpe olonaki yango.

9 Obongiselaki  yango   mabele;   mpe ebimisaki misisa, mpe etondisaki mokili.

10 Bangomba ezalaki ya kozipama na elili na yango, Sedele ya nguya na bitape na yango.

11 Ebimisaki bitape na yango kino na ebale monene, mpe mwa banzete na yango kino na ebale.

12 Mpo na nini opanzi bamur na yango na bongo mpo ete baoyo nyonso bakoleka wana babuka bambuma na yango?

13 Ngulu ya zamba ezali kobebisa yango; mpe bikelamu ya bilanga ezali kolia yango.

14 Zongela biso, Nzambe ya nguya nyonso,! wuta na likolo, tala na nse mpe mona! nzete ya vino oyo;

15 mosisa oyo loboko na yo ya mobali elonaki, mwana oyo obokolaki mpo na yo moko.

16 Bakataki vino na yo, mpe batumbaki yango na moto; na pamela na yo bato na yo bazali kobeba.

17 Tika ete loboko na yo ezala likolo ya moto oyo avandi na loboko na yo ya mobali, mwana ya moto oyo obokolaki mpo na yo moko.

18 Bongo tokozala lisusu mosika na yo te; zongisela biso lisusu bomoi, mpe tokobenga kombo na yo.

19 Zongisa biso ndenge tozalaki, Yawe Nzambe ya nguya nyonso, Tika ete elongi na yo engengisa biso mpe tokobika!
  

BANZEMBO 79

1 Nzambe, bikolo bikoti na makasi na libula na yo; ebebisaki ndako na yo ya bosantu, mpe bamemaki Yeruzalem na mabanga.

2 Bapesi banzoto ya bibembe ya basali na yo lokola biloko ya kolia na bandeke ya likolo, mpe banzoto ya basantu epai ya banyama ya mokili.

3 Basopaki makila lokola mayi, nzinga-nzinga nyonso ya Yeruzalem; mpe moto ya kokunda azali te.

4 Tokomi litioli epai ya bato oyo bazali pembeni na biso, mpe eloko ya koseka epai ya bikolo oyo ezingi biso.

5 kino tango nini Yawe? Okozala kaka na kanda tango nyonso? Kino tango nini zuwa na yo ekopela lokola moto?

6 Sopa kanda na yo ya makasi likolo ya bikolo oyo eyebi yo te, mpe likolo ya Bokonzi oyo ebengaka kombo na yo te.

7 Pamba te baliaki Zakob, mpe bapanzaki mokili na ye.

8 Kotangela biso te masumu ya batata; tika ete mawa na yo ekomela biso noki penza, pamba te tokomi na pasi oyo ezangi elikya.

9 Salisa biso, Nzambe Mobikisi na biso, mpo na nkembo ya kombo na yo; kangola biso mpe limbisa masumu na biso, mpo na kombo na yo.

10 Mpo na nini bikolo ezali koloba: "Nzambe na bango azali wapi?" Liboso ya miso na biso Iakisa kati na bikolo ete yo ozongisaka mabe mpo na makila ya basait na yo oyo esopanaki.

11 Tika ete kolela na nse-nse ya bato ya boloko ekoma liboso na yo; na makasi ya loboko na yo, batela baoyo bakatela etumbu ya liwa.

12 Zongisela baoyo bazali pembeni-pembeni na biso kofinga, mbala sambo, pamela oyo bawololaki yo, Yawe.

13 Bongo biso, bato na yo, bameme oyo oliesaka, tokosanzola yo tango nyonso; na mabota na mabota, tokoloba masanzoli na yo.

  

BANZEMBO 78

1 Bato na ngai, boyoka malakisi na ngai; botia matoyi na maloba ya monoko na ngai!

2 Nakomngola monoko na ngai mpo na koloba na masapo; nakosakola makambo oyo ebombana makambo ya kala.

3 Makambo oyo toyokaki mpe oyo toyebaki; makambo oyo batata na biso bayebisaki biso.

4 Tokobombela yango bana na bango te; tokoyebisa na baoyo bakoya sima misala ya Yawe oyo ebongi na masanzoli, nguya na ye mpe makambo ya kokamwa oyo ye asalaki.

5 Atiaki mitindo na ye mpo na Zakob; abongisaki mibeko kati na Isayele, atindaki batata na biso bateya yango na bana na bango,

6 Na bongo bato oyo bakoya sima bakoyeba yango, mpe bana oyo bakobotama bayeba yango na bana oyo babotami naino te; mpe na tango na bango, bakolobela bana na bango,

7 mpo ete batia motema na bango na Nzambe, mpe bakoka kobosana misala na ye te, kasi babatela malako na ye;

8 bakozala lokola batata na bango te, bato oyo bazalaki batomboki mpe bazangaki botosi, baoyo mitema ezalaki sembo te epai na Nzambe, mpe milimo na bango ezalaki boyengebene te liboso na ye.

9 Bato ya Efrayim, atako bazalaki na tolo-tolo, kasi bazongaki sima na mokolo ya etumba.

10 Babatelaki Boyokani ya Nzambe te; mpe baboyaki kowumela na mibeko na ye.

11 Babosanaki oyo ye asalaki; makambo ya kokamwa oyo alakisaki bango.

12 Asalaki makamwisi na miso ya batata na bango na mokili ya Ezipito, na mokili ya Sowani.

13 Akabolaki ebale monene mpe alekisaki bango kati na yango; atelemisaki mayi ngwi lokola mur.

14 Azalaki kotambolisa bango na lipata na moi, mpe na kongenga ya moto butu mobimba.

15 Apasolaki mabanga na esobe, mpe ape saki bango mayi mingi lokola bibale minene;

16 abimisaki mayi wuta na libanga; mpe atiolisaki mayi lokola ba-ebale.

17 Kasi bakobaki kosala masumu liboso na ye; kotombokela na esobe ye oyo Aleki Likolo.

18 Bamekaki Nzambe na mokano na bango, na kosengaka biloko ya kolia na molende.

19 Balobaki mabe mpo na Nzambe; balobaki: "Boni, Nzambe akoki kobongisa mesa kati na esobe?

20 Tango, abetaki libanga, mayi ebimaki, mayi etondaki mingi. Kasi akoki kopesa biso biloko ya kolia? Akoki kopesa bato na ye mosuni?"

21 Tango Yawe ayokaki bango, asilikaki mingi penza; moto na ye ezikisaki Zakob, mpe kanda na ye ya makasi ekweyelaki Isayele.

22 Pamba te, bandimelaki Nzambe te, to batiaki mitema na bango na kokangola na ye te.

23 Nzokande apesaki malako na mapata, mpe afungolaki baporte ya likolo;

24 anokiselaki bango "mana" mpo balia; apesaki bango mbuma ya likolo.

25 Bato baliaki lipa ya baanzelu; adndelaki bango biloko nyonso oyo bakokaki kolia.

26 Wuta na likolo, adndaki mopepe ya Este, mpe akambaki mopepe ya Sude na nguya na

27 Anokiselaki bango misuni lokola putulu, bandeke lokola zelo ya ebale.

28 Akweyiselaki bango yango, pembeni-pembeni ya bandako na bango nyonso ya kapo.

29 Baliaki kino batondaki penza; pamba te apesaki bango nyonso oyo basengaki na molende.

30 Liboso ete bapesa mokongo na bileyi oyo basengaki na molende mpe ezalaki naino na monoko na bango;

31 kanda ya Nzambe ekweyelaki bango; abomaki bilombe kati na bango, mpe abomaki bilenge mibali ya Isayele.

32 Kasi na nyonso oyo, bakobaki kosala masumu; atako misala na ye ya kokamwa, bandimaki te.

33 Bongo asilisaki mikolo na bango na pamba, mpe bambula na bango kati na somo.

34 Tango nyonso oyo azalaki koboma bango, babandaki koluka ye; bazalaki kobaluka noki-noki lisusu epai na ye.

35 Bongo bakanisaki lisusu ete, Nzambe nde azali libanga na bango; ete Nzambe Oyo Aleki Likolo azalaki mokangoli na bango.

36 Bongo bazalaki kokosa ye na maloba sukali; bazalaki kokosa ye na lolemo na bango.

37 Mitema na bango ezalaki sembo te epai na ye; bazalaki bayengebene na Boyokani na ye te.

38 Nzokande azalaki moto na mawa, alimbisaki mabe na bango mpe abebisaki bango te; mbala mingi azalaki kokanga motema tango na tango azalaki kokitisa kanda na ye mpe azalaki kolakisa kanda makasi na ye nyonso te.

39 Akanisaki lisusu ete bazalaki kaka mosuni, mopepe oyo elekaka oyo ekoki kozonga te.

40 Mbala mingi batombokelaki ye na esobe, mpe batumbolaki ye na esika oyo bato bayandaka te.

41 Mbala na mbala bazalaki komeka Nzambe; koyokisa Mosantu ya Isayele kanda.

42 Bakanisaki lisusu te nguya na ye, mokolo akangolaki bango na monyokoli.

43 mokolo amonisaki bilembo ya makamwisi na ye na Ezipito, makambo na ye ya kokamwa na mokili ya Sowani.

44 Abongolaki ba-ebale na bango na makila; bakokaki te komela na bamayi na bango.

45 Atindaki liboke ya banzinzi oyo eliaki bango, mpe magorodo oyo ebebisaki bango.

46 Apesaki bambuma ya bilanga na bango na mabanki, mosala ya maboko na bango na mankonko.

47 Abebisaki bilanga na bango ya vino na mbula ya mabanga; mpe banzete na bango ya Sikomoro na mpio ya makasi.

48 Akabaki etonga ya bameme na bango na mbula ya mabanga, mpe bameme na bango na kongenga ya kake.

49 Atindelaki bango kanda na ye ya moto, kanda na ye ya makasi, koyinana, nkele mpe mampinga ya baanzelu oyo babetaka

50 Abongisaki nzela mpo na kanda na ye; abatelaki bango na liwa te, kasi akabaki bango na maladi ya mabe.

51 Abomaki bana mibali nyonso ya liboso ya Ezipito, mbuma ya liboso ya makasi na bandako ya kapo ya Nam.

52 Abimisaki bato na ye lokola bameme; akambaki bango lokola meme na kati ya esobe.

53 Akambaki bango na kimia nyonso, na bongo bazalaki kobanga te; kasi ebale monene emelaki banguna na bango.

54 Bongo akotisaki bango na bandelo ya mabele na ye ya bosantu, ngomba oyo loboko na ye ya nguya ezwaki.

55 Abenganaki bikolo liboso na bango; akabolaki mabele na bango epai na bango lokola libula; ayandisaki mabota ya Isayele na bandako na bango.

56 Kasi   bamekaki   Nzambe    mpe batombokelaki Oyo Aleki Likolo; babatelaki bikateli na ye te.

57 Lokola batata na bango bazalaki sembo te mpe bazalaki na kondima te; bakokaki kotiela bango motema te lokola tolo-tolo oyo etengama.

58 Bayokisaki ye kanda na bisika na bango oyo etombwana; mpe bapelisaki zuwa na ye mpo na bikeko na bango.

59 Tango Nzambe ayokaki bango, asilikaki mingi penza, asundolaki Isayele mobimba.

60 Asundolaki ndako ya kapo ya bokutani ya Silo; ndako ya kapo esika ayandaki kati na bato.

61 Atindaki sanduku ya makasi na ye na bowumbu, kongenga na ye na maboko ya monguna.

62 Akabaki bato na ye na mopanga, mpe asilikelaki makasi libula na ye.

63 Moto ezikisaki bilenge mibali na bango, mpe bilenge basi na bango bazalaki lisusu te koyemba banzembo ya libala.

64 Babomaki banganga Nzambe na bango na mopanga; mpe basi oyo bakufela mibali bakokaki kolela te.

65 Bongo Nkolo alamukaki lokola moto awuti na pongi, lokola moto alamuki na kwiti ya vino.

66 Azongisaki banguna na ye sima; ayokisaki bango soni ya seko.

67 Bongo asundolaki ndako ya kapo ya Zozefi, mpe aponaki te libota ya Efrayim.

68 Kasi aponaki libota ya Yudea, ngomba ya Siona oyo alingaki.

69 Atongaki esika na ye ya bosantu lokola esika etombwama, lokola mokili oyo asalaki mpo na libela.

70 Aponaki David, mosali na ye, mpe azwaki ye wuta na lopango ya bameme.

71 Azuaki ye na esika azalaki kobokola bameme, mpo azala mobateli ya bato na ye, Zakob, Isayele libula na ye.

72 Bongo David abatelaki bango na boyengebene na motema; mpe akambaki bango na maboko ya mayele.

BANZEMBO 77

1 Nazali kobenga epai ya Nzambe, mpo na lisalisi nazalaki koganga epai ya Nzambe, mpo oyoka ngai.

2 Tango nazalaki na kati ya minyoko, nalukaki Yawe; na butu na tombolald maboko, elembaki mpe molimo na ngai eboyaki kobondisama.

3 Nakanisaki yo, Nzambe, mpe nalelaki na nse-nse; nazalaki kokanisa na mozindo, mpe molimo na ngai ezalaki kolemba..

4 Obatelaki miso na ngai na kokangama; nazalaki lisusu na pasi mpo na koloba.

5 Nazalaki kokanisa mikolo ya kala, bambula nyonso ya kala.

6 Nazalaki kokanisa banzembo na ngai na butu; motema na ngai, ezalaki kokanisa na mozindo mpe molimo na ngai ezalaki komituna:

7 "Yawe akobwaka biso libela? Boni, akolakisa lisusu te bolamu na ye?

8 Bolingo na ye ya makasi esilaki libela? bilaka na ye ekomi ya pamba mpo na batango nyonso?

9 Nzambe abosanaki kozala na mawa? apekisaki mawa na ye na kanda?"

10 Bongo nakanisaki: "na likambo oyo nakozwa makasi: bambula ya loboko ya mobali ya Ye Oyo Aleki Likolo"

11 Nakokanisa misala ya yawe; ya solo,nakokanisa makamwisi na yo ya tango nyonso ya kala.

12 Nakokanisa na mozindo misala na yo nyonso; mpe tala misala na yo nyonso ya nguya..

13 Banzela na yo, Nzambe, ezali ya bosantu; nzambe nini azali monene lokola Nzambe na biso?

14 Yo ozali Nzambe oyo osalaka makamwisi; olakisi nguya na yo na kati ya bato.

15 Na loboko na yo ya nguya, okangolaki bato na yo mabota ya Zakob mpe ya Zozefi.

16 Bamayi emonaki yo, Nzambe, bamayi emonaki yo mpe elengaki, enyolisami; bisika ya mozindo eninganaki.

17 Mapata esopaki mayi, likolo ebimisaki lokito, makonga na yo epelaki sima mpe liboso.

18 Lokito na yo eyokanaki na kati ya mopepe ya kaina; kongenga ya kake engengisaki mokili; mokili eninganaki mpe elengaki.

19 Nzela na yo ya moke elekaki na kati ya ebale monene, nzela na yo ya moke na kati ya bamayi ya makasi; matambe na yo emonanaki te,

20 Otambwisaki bato na yo lokola etonga ya bameme, na loboko ya Moyize mpe Aron.

BANZEMBO 76

1 Na Yudea Nzambe ayebani; kombo na ye ezali monene na Isayele.

2 Ndako na ye ya kapo ezali na Salem; mpe eyandelo na ye ezali na Siona.

3 Kuna nde abukaki makonga oyo ezali kopela, ebende ya makasi oyo ebatelaka mpe mopanga, bibundeli ya bitumba.

4 Ozali kongenga na mwinda, na lokoum koleka bangomba etonda na nyama.

5 Bilombe mibali babotoli bango biloko balali pongi na bango ya suka; moko te na babundi akokaki kotombola maboko na ye.

6Na pamela na yo, Nzambe ya Zakob, mpe mituka ya bitumba, bampunda, elalaki pongi ya makasi.

7 Yo moko ozali kobangisa, nani akoki kotelema liboso na yo, tango osiliki?

8 Wuta na Likolo, olobaka kosambisa, mpe mokili ebangaki mpe eyandaki nye,

9 Tango otelemaki, mpo na kosambisa, Nzambe, mpo na kobildsa bato nyonso ya pasi ya mokili.

10 Ya solo kanda na yo ya makasi liboso ya bato ememeli yo masanzoli; mpe baoyo babikaka na kanda na yo ya makasi basimbami.

11 Bolapa bandayi epai na Yawe Nzambe na bino, mpe bokokisa yango; tika ete baoyo nyonso ya nzinga-nzinga ya mabele bamema makabo epai ya moto abongi na kobangama.

12 Ye abukaka molimo ya bakambi; abangisaka bakonzi ya mokili.
  

BANZEMBO 75

1 Tozali kopesa yo, matondi, Nzambe, tozali kopesa matondi pamba te kombo na yo ezali pene-pene; bato bazali kolobela misala na yo ya kokamwa.

2 Yo Olobi, "naponi tango oyo ebongisami; ezali ngai moto nazali kosambisa na alima."

3 Tango mokili eninganaka elongo na bato na ye nyonso ezali ngai moto nasimbaka makasi makonzi na yango.

4 Epai ya moto ya lofundu, nalobi 'bomikumisaka mingi te'. Mpe na bato ya mabe: 'Botika kotombola maseke na bino'

5 Botika kotombola maseke na bino liboso na likolo; mpe botika koloba na lofundu nyonso."

6 Moko te, wuta na Este to na Weste, to na esobe, akoki konetola moto.

7 Pamba te Nzambe nde asambisaka; akitisaka moto mosusu, mpe anetolaka moto mosusu.

8 Na loboko ya Yawe ezali na kopo moko; etondi na vino ya makasi mpe oyo basangisa na biloko mosusu asopi yango, mpe bato nyonso ya mabe ya moldli bameli yango, kino na mbindo oyo etikalaka na nse na yango.

9 Kasi ngai, nakosakola yango tango nyonso; nakoyemba masanzoli mpo na Nzambe ya Zakob.

10 Nakokata maseke ya bato ya mabe nyonso; kasi maseke ya bato ya sembo ekotombwana.


  

BANZEMBO 74

1 mpo na nini osundoli biso libela, Nzambe, ? Mpo na nini kanda na yo ezali kongala likolo ya bameme ya lopango na yo?

2 Kanisa bato na yo oyo ozwaki wuta kala; libota ya libula na yo oyo olongolaki na bowumbu ngomba ya Siona, esika ozalaki koyanda.

3 Balusa makolo na yo na bisika ebebi libela; libebi nyonso oyo monguna amemaki na Esika ya bosantu.

4 Bayini na yo bazali konguluma na kati ya esika oyo okutanaka na biso; batie bendele na bango lokola bilembo.

5 Bazali lokola bato oyo basimbi epasola mpo na kokata banzete na zamba.

6 Bapanzi mabaya ya porte oyo bakoma-koma, na bipasola mpe bamarto na bango.

7 Batumbi Esika na yo ya bosantu nyonso; babebisi esika kombo na yo evandaka.

8 Balobaki na nse ya mitema na bango "Tokopanza bango mobimba!" Batumbi bisika nyonso oyo bakumbamelaka Nzambe na mokili.

9 Bapesi biso ata elembo moko ya kokamwisa te baprofeta bazali lisusu te; mpe moko te na kati na biso ayebi kino tango nini oyo!

10 kino tango nini monguna akosakana na yo, Nzambe? akotiola kombo na yo libela?

11 Mpo na nini akangi loboko na yo, loboko na yo ya mobali? Zua yango na masusa ya elamba na yo mpe bebisa bango.

12 Kasi yo Nzambe, ozali mokonzi na ngai wuta kala; Omemaka lobiko na mokili.

13 ozalaki yo nde opasolaki ebale na nguya na yo; opanzaki mitu ya bilima kati na mayi.

14 Ezalaki yo nde opanzaki mitu ya Leviatani; mpe opesaki ye na banyama ya esobe mpo balia ye
15 Ezalaki yo moto ofungolaki esika mayi ebandaka mpe mayi oyo etiolaka makasi; okawusaki ba-ebale oyo etiolaka mpo na libela.

16 Moi ezali ya yo, butu mpe ezali ya yo; Yo moto osalaki sanza mpe moi.

17 Ezalaki yo nde moto otiaki bandelo nyonso ya mokili; yo moto osalaki tango ya malili makasi mpe ya moi makasi.

18 Kanisa ndenge monguna asakanaki na yo, Yawe, kanisa ndenge bazoba batiolaki kombo

19 Kokaba bomoi ya pijon na yo te na maboko ya banyama ya mabe; kobosana mpo na libela te, bomoi ya bato na yo oyo bazali na pasi

20 Tala Boyokani oyo! Pamba te, banganda ya mobulu etondi na bisika ya molili na mokili.

21 Kotika te ete moto oyo bazali konyokola asila lokumu; tika ete moto ya mobola mpe mokeleli bakumisa kombo na yo.

22 Telema, Nzambe mpe omilongisa! Kanisa ndenge nini bazoba bazali kosakana na yo mokolo mobimba bazali kofinga yo mikolo nyonso!

23 kobosana kowelela ya bayini na yo te; makelele ya banguna na yo ezali kaka kobakisama!

BANZEMBO 73

1 Ya solo, Nzambe azali malamu mpo na Isayele, mpo na baoyo bazali mitema peto.

2 Kasi mpo na ngai, etikalaki moke mpo ete makolo na ngai ekende na moselu; etikalaki moke nabungisa esika na kotelemisa likolo ngwi.

3 Pamba te nalulaki bato ya lofundu tango nazalaki komona bolamu ya bato ya mabe.

4 amonaka pasi te; nzoto na bango ezali malamu mpe makasi.

5 Bamonaka pasi te ndenge bato mosusu bamonaka; banyokwamaka te na maladi oyo ezwaka bato.

6 Yango wana lolendo ezali mayaka na bango na kingo; bamilatisi na mobulu.

7 Wuta na mitema na bango ya mabanga mabe ezali kobima; mabongisi ya mabe ya makanisi na bango ezali na ndelo te.

8 Batiolaka mpe balobaka na ndenge ya mabe penza; kati na lofundo na bango, bazali kobongisa minyoko.

9 Minoko na bango elobaka mpo na kosenga likolo; mpe lolemo na bango ezali kozwa mokili.

10 Yango wana, bato na bango babaluki epai na bango, mpe bazali komela mayi ebele penza.

11 Balobaka "Nzambe akoyeba ndenge nini? Ye Oyo Aleki Likolo azali na boyebi?"

12 Tala ndenge bato na mabe bazalaka; tango nyonso bazangi kotungisama mpe bazali kobakisa bomengo.

13 Ya solo, kaka pamba nabatelaki motema na ngai peto; kaka pamba nasukolaki maboko na ngai mpo na kolakisa ete nayebi likambo te.

14 Mokolo mobimba, bazalaki kobeta ngai bazalaki kopesa ngai etumbu tongo nyonso.

15 Soki nalobaki:Nakoloba lokola bango mbele nalingaki koteka bana na yo.

16 Tango nalingaki kososola oyo nyonso, ekomaki minyoko mpo na ngai.

17 Kino nakotaki na Esika ya bosantu ya Nzambe, bongo nde nayaki kososola ndenge nini bango bakosuka.

18 Ya solo, otiaka bango na mabele ya moselu; okweyisaka bango na libebi.

19 Tala ndenge babebi na mbalakata; balimwe mobimba mpo na somo.

20 Lokola ndoto tango moto alamukaka ndenge wana ekolamuka, Yawe okomona bango pamba lokola eloko pamba.

21 Tango motema na ngai ezalaki koyoka mawa, mpe molimo ezalaki komitungisa,

22 nakomaki zoba mpe mayele esilaki ngai; nazalaki lokola nyama ya zamba liboso na yo.

23 Nzokande nazali tango nyonso elongo na yo, osimbaki ngai na loboko na ngai ya mobali.

24 Okotambwisa ngai na toli na yo, mpe sima na yango akozwa ngai na nkembo.

25 Nani mosusu nazali na ye kuna na Likolo, soki yo te? mokili ezali na eloko mosusu te, oyo na lingaka soki yo te.

26 Mosuni na ngai mpe motema na ngai ekoki kolemba; kasi Nzambe azali makasi ya motema na ngai mpe eteni na ngai mpo na libela.

27 Pamba te, baoyo bazali mosika na yo bapanzanaki; mpe obebisaki baoyo nyonso batosaka yo te.

28 Kasi mpo na ngai, ezali malamu kozala pene-pene na Nzambe; nakomisaki Yawe, oyo asalaka oyo ye alingi, ebombamelo na ngai; nakolobela misala na yo nyonso.
  

BANZEMBO 72

1 Pesa mokonzi boyengebene na yo, Nzambe, epai ya mwana ya mokonzi bosembo na yo!

2 Akosambisa bato na yo na bosembo nyonso, mpe bato na yo ya pasi na boyengebene.

3 Bangomba ya minene ekomemela bato bolamu, oyo ya mike bambuma ya bosembo.

4 Akolobela bato ya pasi oyo bazali na kati na bato; mpe akobikisa bana ya mokeleli; akopanza moto oyo anyokolaka bato.

5 Akokanga motema tango nyonso oyo moi ekozala, tango nyonso oyo sanza ekozala, mikolo nyonso oyo moi mpe sanza ekozala na mabota nyonso.

6Akozala lokola mbula oyo enokaka na bilanga oyo balongola matiti; akozala lokola mwa mbula ya mike-mike oyo epolisaka mokili.

7Na mikolo na ye, bato na sembo bakozala na bomoi ya malamu penza; bolamu ekozala ya mingi penza kino sanza ekongenga lisusu te.

8 Akozala na Bokonzi longwa na ebale oyo kino ebale mosusu, mpe longwa na ebale kino na basuka ya mokili.

9 Mabota ya esobe bakomkama liboso na ye; mpe banguna na ye bakolembola putulu.

10 Bakonzi ya Tarsis na oyo ya bisanga ya mosika bakomema mpaku epai na ye; bakonzi ya Sheba mpe ya Seba bakopesa ye makabo.

11 Bakonzi nyonso bakomkama liboso na ye; mpe bikolo nyonso ekosalela ye.

12 Pamba te, akokangola mokeleli oyo azali koganga, moto ya pasi oyo azangi moto ya kosalisa.

13 Akoyokela mawa moto oyo azangi makasi mpe mokeleli; mpe akobikisa bato bakelela wuta na liwa.

14 Akokangola bango na minyoko mpe mobulu; pamba te, makila na bango ezali na motuya mingi na miso na ye.

15 Tika ete azala na bomoi ya molayi! Tika ete bapesa ye wolo ya sheba; Tika bato babondela mpo na ye tango nyonso, mpe bapambola ye mokolo mobimba.

16 Tika ete mbuma etonda na mokili kino na basonge ya bangomba; Tika ete bambuma na yango ebima malamu lokola Liban; Tika ete yango ezala malamu lokola matiti ya elanga.

17 Tika kombo na ye ewumela libela na libela, tika ewounela kino moi ekozala; bikolo ekopambolama na nzela na ye; mpe bakobenga ye moto apambolama.

18 Masanzoli ezala epai ya Yawe Nzambe, Nzambe ya Isayele; ye moko kaka moto asalaka misala ya kokamwa.

19 Masanzoli ezala epai ya kombo na ye ya nkembo libela na libela; tika ete mokili mobimba etonda na nkembo na ye! Amen mpe Amen!

20 Oyo ezali suka ya mabondeli ya David mwana ya Yese.

  

BANZEMBO 71

1 Kati na yo, Yawe, nabombanaki; kotika ngai nayoka soni te ata moke te.

2 Kangola ngai mpe bikisa ngai kati na bosembo na yo; balusa litoyi na yo epai na ngai mpe bikisa ngai.

3 Zala libanga oyo ebombaka ngai, esika nakoki kokende tango nyonso. Pesa mitindo mpo na kobikisa ngai; pamba te, yo ozali libanga na ngai mpe ndako makasi na ngai

4 Kangola ngai, Nzambe na ngai, na loboko ya moto ya mabe, na maboko ya bato oyo basalaka mabe mpe ya bato ya kanda.

5 Pamba te, ozalaki elikya na ngai, Yawe, ye oyo asalaka oyo alingi, elikya na ngai banda bolenge na ngai

6 Wuta na mbotama nadaka motema na ngai epai na yo; obimisaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai; nakosanzola yo tango nyonso.

7 Nakomi lokola eloko ya pamba epai ya bato ebele; kasi yo ozali ebombelo na ngai ya makasi.

8 Monoko na ngai etondi na masanzoli na yo, kosakola kongenga na yo mokolo mobimba.

9 Kobwaka ngai te tango nakomi mobange kotika ngai te tango makasi na ngai ebandi kosila,

10 Pamba te banguna na ngai bazali koloba mabe mpo na ngai; baoyo bazali koluka koboma ngai, elongo bazali kosala likita.

11 Bazali koloba: "Nzambe atiki ye; bolanda ye mpe bokanga ye, pamba te moto ya kokangola ye azali te!"

12 kozala mosika na ngai te, Nzambe; yaka noki Nzambe na ngai, kosalisa ngai!

13 Tika ete baoyo bazali komnda ngai, babeba na soni; tika ete baoyo bazali koluka ete namona pasi, basambwa mpe lokumu na
bango esila.

14 Kasi ngai, nakotia elikya tango nyonso; na kosanzola yo mbala na mbala.

15 monoko na ngai ekolobela bosembo na yo lobiko na yo mokolo mobimba; pamba te, nakoki kotanga yango te.

16 Nkolo Yawe, nakoya mpe nakosakola misala na yo ya nguya, Yawe, yo osalaka oyo yo olingi; nakosakola bosembo na yo, ya yo moko kaka.

17 wuta bolenge na ngai, Nzambe, oteyaki ngai; mpe kino lelo oyo, nazali kosakola misala na yo ya kokamwa.

18 Ata tango, nakomi mobange mpe suki na ngai ekomi pembe, kotika ngai te, Nzambe, mpo nakoka koyebisa nguya na yo na bato ya tango ekoya, makasi na yo na bato nyonso oyo bakoya sima.

19 Bosembo na yo ekoma kino na likolo, Nzambe, yo moto osala makambo ya minene penza. Nani Nzambe, akokani na yo?

20 Ata olakisaki ngai minyoko mingi mpe ya bololo, okozongisela ngai bomoi lisusu; wuta na nse penza ya mabele yo okobimisa ngai lisusu.

21 Okobakisa lokumu na ngai, mpe okolendisa ngai lisusu.

22 Nakosanzola yo na gitare mpo na boyengebene na yo, Nzambe na ngai; nakoyemba masanzoli mpo na yo na lindanda, Mosantu ya Isayele,

23 Bambebo na ngai ekoganga na esengo tango nakoyembela yo masanzoli; ngai oyo okangola.

24 Lolemo na ngai ekosakola misala na yo ya bosembo mokolo mobimba; pamba te, baoyo bazali koluka ete namona pasi, bakoyoka soni mpe bakosambwa.
  

BANZEMBO 70

1 Yaka noki, Nzambe, kobikisa ngai! Yawe, yaka noki kosalisa ngai!

2 Tika ete baoyo balukaka bomoi na ngai, bayoka soni mpe basambwa; tika ete baoyo basepelaka na libebi na ngai, bazonga sima mpe lokumu na bango esila.

3 Tika ete baoyo balobaka epai na ngai: "Aa; aa" bazonga sima mpo na soni na bango.

4 Tika ete baoyo nyonso balukaka yo batonda na esengo mpe basepela kati na yo; tika ete baoyo balingaka lobiko na yo tango nyonso, baloba: "Tika Nzambe anetolama!"

5 Nzokande nazali mobola mpe moto akelela; yaka noki epai na ngai! Nzambe, Yo ozali mosalisi na ngai mpe mokangoli na ngai; Yawe, kowumela te!

  

BANZEMBO 69

1 Bikisa ngai, Nzambe,! pamba te, mayi ekomi kino na kingo na ngai.

2 Nazindi na poto-poto na mozindo penza, esika ya kotia lokolo ezali te; nakoti na mayi ya mozindo, bambonge emeli ngai mpe mayi edindisi ngai.

3 Nalembi mpo na kobenga lisalisi; mongongo na ngai ekawuki. Miso na ngai elembi mpo na kotalela Nzambe na ngai.

4 Baoyo bayinaka ngai kaka pamba, bazali mingi penza koleka kutu suki ya motu na ngai; mingi bazali banguna na ngai kaka pamba, baoyo balukaka kobebisa ngai. Bazali kosenga ngai na makasi ete nazongisa eloko oyo nayibaki te.

5 Oyebi bozoba na ngai, Nzambe, mpe mabe na ngai ezali ya kobombana te epai na yo.

6 Tika ete baoyo batiaka elikya epai na yo, basila lokumu te mpo na ngai, Yawe, Yawe ya nguya nyonso; tika ete baoyo balukaka yo basila lokumu te mpo na ngai, Nzambe ya Isayele.

7 Pamba te, nazali kosambwa mpo na yo, mpe soni ezipi elongi na ngai.

8 Nakomi mopaya epai ya bandeko na ngai; mpe moleki nzela epai ya bana ya mama na ngai moko,

9 Pamba te posa ya ndako na yo yango nde ezali kozikisa ngai; mpe kofinga ya baoyo bazali kofinga yo ezali kokweya likolo na ngai.

10 Tango nalelaka mpe namilalisaka nzala mpo na mabondeli; esengeli nasambwa.

11 Tango nalataka saki, bakomisaka ngai lisano.

12 Baoyo bavandi na porte bazali kosakana na ngai; mpe nazali nzembo ya bato ya milangwa.

13 Kasi ngai nazali kobondela yo, Yawe, na tango ya ngolu na yo, na bolingo na yo ya monene, Nzambe, zongisela ngai eyano na lobiko na yo ya solo.

14 Bimisa ngai na kati ya poto-poto, kotika te ete nadinda. kangola ngai na baoyo bayinaka ngai, wuta na mayi ya mozindo.

15 Kotika te ete mbonge ya mayi emela ngai; to esika ya mozindo emema ngai, to mpe libulu ekanga monoko na yango likolo na ngai.

16 Zongisela ngai eyano, Yawe, na bolamu ya bolingo na yo; na mawa na yo ya monene, baluka epai na ngai.

17 Kobombela mosali na yo elongi na yo te; zongisela ngai eyano noki, pamba te nazali na minyoko;

18 Pusana pene-pene, mpe kangola ngai; kangola ngai mpo na bayini na ngai.

19 Oyebi ndenge nazali kosambwa, ndenge nazali koyoka soni, mpe ndenge lokumu na ngai esili; mpe banguna na ngai nyonso bazali liboso na yo.

20 Kosambwa epanzaki motema na ngai mpe etikaki ngai ata na lisungi te. Nalukaki boyokela ngai mawa, kasi moto amonanaki te; mpo na bato ya kobondisa, namonaki moto te.

21 Batiaki pwazo na bilei na ngai mpe bapesaki ngai vino ya ngayi na posa oyo nazalaki na yango.

22 Tika ete mesa batiaki liboso na bango ekoma monyama, ekoma lifuti mpe motambo

23 Tika ete miso na bango ekoma molili mpe bamona lisusu te; mpe mokongo na bango egumbama libela.

24 Sopela bango kanda na yo; mpe tika ete kanda na yo ya somo ekanga bango.

25 Tika ete bisika na bango ekoma esobe, tika ete moto ata moko te ayanda lisusu na bandako na bango ya kapo.

26 Pamba te, bazali konyokola bato oyo yo ozokisaki; mpe bazali koloba-loba mpo na bapasi ya bato oyo yo oyokisaki pasi.

27 Bakisela bango mabe likolo ya mabe na bango; kotika te bazwa ndambo na lobiko na yo.

28 Tika ete balongola bakombo na bango na Buku ya bomoi; mpe kotanga bango te elongo na bato na sembo!

29 Nazali kati na pasi mpe na minyoko, ta ete lobiko na yo, Yawe, ebatela ngai.

30 Nakosanzola kombo ya Nzambe na nzembo; mpe nakokumisa ye na matondi.

31 Yango ekosepelisa Yawe mingi penza koleka ngombe ya mobali, koleka ngombe oyo ezali na maseke mpe oyo makolo na yango ekabwana.

32 Mobola akomona mpe akosepela; bino baoyo bolukaka Nzambe, tika ete mitema na bino ezala na bomoi.

33 Yawe ayokelaka moto akelela mpe atiolaka bato na ye te oyo bakangama na bowumbu.

34 Tika ete likolo mpe nse esanzola ye, ba-ebale minene mpe biloko nyonso oyo etambolaka na kati na yango.

35 Pamba te Nzambe akobikisa Siona, mpe akotonga lisusu ba-vile ya Yudea; bato bakoyanda kuna mpe bakozwa yango.

36 Bana ya basali na ye bakozwa yango lokola libula mpe baoyo balingaka kombo na ye bakoyanda kuna.

BANZEMBO 68

1 Tika ete Nzambe atelema; tika ete banguna na ye bapalangana; mpe tika ete baoyo bayinaka ye bakima liboso na ye.

2 Ndenge milinga elimwaka, tika olimwisa bango; ndenge mamta enyangwamaka na moto. Tika bato mabe babeba liboso ya Nzambe

3 Kasi tika ete bato na sembo basepela; mpe batonda na esengo liboso ya Nzambe; tika ete basepela mingi penza.

4 Boyembela Nzambe, bayemba masanzoli epai ya kombo na ye, bonetola ye oyo azali kotambola likolo ya mapata, kombo na ye ezali Yawe; mpe bosepela liboso na ye!

5 Tata ya bana oyo bakufela baboti, molobeli ya basi oyo bakufela mibali, ezali Nzambe kati na ndako na ye ya bosantu.

6 Nzambe apesaka libota na bato oyo batikala bango moko; akambaka bakangami na koyemba; kasi batomboki bayandaka na mabele ya kokawuka.

7 Tango abimaki liboso ya bato na ye, Nzambe, tango atambolaki na esobe,

8 mokili eninganaki; likolo esopaki mbula na nse, liboso ya Nzambe, moto moko ya Sinayi liboso ya Nzambe ya Isayele!

9 Opesaki mbula ya mike-mike ebele, Nzambe, olendisaki bomengo na yo.

10 Bato na yo bayandaki kuna; Nzambe, na bolamu na yo, obongisaka biloko mpo na mobola.

11 Yawe alobaki liloba; mpe baoyo bapanzaki sango yango bazalaki ebele penza.

12 Bakonzi mpe mapinga ya basoda ekimaki na lombangu; basi oyo batikalaki bakabolaki biloko oyo bazwaki na etumba;

13 Bolali na bango na pokwa, bolali kati na bisika banyama baliaka, mapapu ya pijon na ngai bapakola yango palata, basala na yango na wolo oyo ezali kongenga.

14 Tango ya nguya nyonso apanzaki bakonzi na mabele, ezalaki lokola mbula ya mabanga ya pembe konoka na ZaĂŻmon.

15 Bangomba ya Basan ezali bangomba ya lokumu; bangomba ya Basan ezali basonge-songe!

16 Mpo na nini ozali koyoka zua, bangomba ya basonge-songe, na ngomba oyo Nzambe apona mpo na kozala mokonzi kunaYawe ye moko akoyanda libela na libela.

17 Mituka ya Nzambe ezali bazomi ya bankoto, mpe bankoto na bankoto; Yawe azali koya kati na Sinayi na Esika na ye ya bosantu

18 Tango omataki na likolo, omemaki baoyo bazalaki bakangami na molongo na yo; ozwaki makabo epai ya bato, ata epai ya batomboki, mpo ete yo, Yawe Nzambe okoka koyanda kuna.

19 Masanzoli ezala na Yawe, na Nzambe Mobikisi na biso, ye oyo amemaka mikumba na biso mokolo na mokolo.

20 Nzambe na biso, azali Nzambe oyo abikisaka; Yawe, ye oyo asalaka oyo alingi, abikisaka na liwa.

21 Ya solo, Nzambe akopanza mitu ya banguna na ye, mitu ya suki ya baoyo bazali kotambola kati na masumu na bango.

22 Nkolo alobi: "Nakomema bango wuta na Basan; nakomema bango wuta na nse ya ebale

23 mpo ete azindisa makolo na yo na makila ya bayini na yo; mpo ete lolemo ya bambwa na yo ezwa ndambo na yango.

24 Kotambola na yo emonanaki, Nzambe kotambola ya Nzambe na ngai, mpe Mokonzi na ngai, kati na Esika ya bosantu.

25 Bayembi bazalaki na liboso, sima na bango bato oyo babetaka bagitare, elongo na bilenge basi oyo babetaka bambonda ya mike.

26 Bosanzola Nzambe kati na mayangani ya monene; bosanzola Yawe, lisanga ya Isayele!

27 Kuna nde ezala libota ya moke ya Benzame, oyo ezalaki kotambolisa bango; kuna nde ezalaki bana ya bakonzi ya Yudea bana ya bakonzi ya Zabuloni mpe bana ya bakonzi ya Nefitali.

28 Nzambe, benga nguya na yo; Iakisa biso makasi na yo, Nzambe, ndenge osalaki liboso.

29 Mpo na ndako na yo ya Yerusalem, bakonzi bakomemela yo makabo

30 Pamela nyama na kati ya matin ya ebale, bangombe ya mibali, kati ya bana ya ngombe ya bikolo; amikitisaki, akoki komema biteni ya palata. Panza bikolo oyo basepelaka na bitumba.

31 Batindami bakoya wuta na Ezipito; Kush akomitia ye moko na nse ya Bokonzi ya Nzambe

32 Boyembela Nzambe, Bokonzi ya mokili; boyemba masanzoli mpo na Yawe;

33 epai ya moto oyo azali kotambola likolo ya mpunda na likolo, na likolo ya kala. Oyo ayokisi lokito na mongongo ya nguya.

34 Bosakola nguya ya Nzambe; oyo lokomu na ye ezali likolo ya Isayele, nguya na ye ezali na kati ya mapata.

35 yo ozali sukisa, Nzambe, kati na Esika na yo ya bosantu: Nzambe ya Isayele ye nde apesaka makasi mpe nguya na bato na ye. Masanzoli ezali epai ya Nzambe!


BANZEMBO 67

1 Tika ete Nzambe amonisa ngolu na ye epai na biso mpe apambola biso, mpe elongi na ye engengela biso;

2 Tika ete banzela na yo eyebana na mokili, lobiko na yo kati na bikolo nyonso.

3 Tika ete bato basanzola yo, Nzambe; tika ete bato nyonso basanzola yo!

4 Tika ete bikolo esepela, mpe eyemba na esengo, pamba te okambaka bato na bosembo nyonso, mpe otambwisaka bikolo oyo ezali na mokili.

5 Tika ete bato basanzola yo, Nzambe; tika ete bato nyonso basanzola yo!

6 Bongo mabele ekobota bambuma na yango; mpe Nzambe, Nzambe na biso akopambola biso.

7 Nzambe akopambola biso; mpe basuka nyonso ya mokili mobimba bakobanga ye.
  

BANZEMBO 66

1 Ganga na esengo epai ya Nzambe, mokili mobimba!

2 koyemba nkembo mpo na kombo na ye; bopesa ye nkembo mpe masanzoli.

3 Boloba na Nzambe: Misala na yo ezali ya kokamwa! Ndenge nguya na yo ezali monene banguna na yo bazali kongunzama liboso na yo.

4 Mokili mobimba ekokumbamela yo, bakoyemba masanzoli epai na yo; bakoyemba masanzoli epai na kombo na yo.

5 Boya mpe botala oyo Nzambe asala, ndenge lolenge ya somo ezali na misala na ye kati na bato.

6 Akomisaki ebale monene mabele ya kokawuka, bongo bato bakatisaki mayi na makolo; boya tosepela kati na ye.

7 Na nguya na ye, azali kokamba mpo na libela na libela; miso na ye etalaka bikolo; tika ete batomboki batombokela ye te.

8 Bosanzola Nzambe na biso, bato; Tika ete makelele ya masanzoli na ye eyokana.

9 Ye moto abatelaki bomoi na biso; mpe atikaki te ete makolo na biso ekende na moselu.

10 Pamba te yo, Nzambe, omekaki biso; opetolaki biso lokola palata.

11 0kotisaki biso na boloko, mpe omemisaki biso mikumba ya kilo penza na loketo.

12 Otikaki ete bato bamatela biso na mitu; tolekaki na kati ya moto mpe na kati ya mayi; kasi omemaki biso na esika oyo etondi na biloko ebele.

13 Nayaki na ndako na yo na makabo ya kotumba; mpe nakokokisa bandayi na ngai epai na yo;

14 bandayi oyo bambebo na ngai elakaki mpe oyo monoko na ngai elobaki na tango nazalaki na minyoko.

15 Nakopesa yo mbeka ya banyama ya mafuta, mpe makabo ya bameme ya mibali; nakopesa yo makabo ya bangombe ya mibali mpe bantaba ya mibali.

16 Boya mpe boyoka, bino nyonso oyo bobangaka Nzambe; tika ete nayebisa bino makambo oyo asalaki mpo na ngai.

17 Nabelelaki epai na ye na monoko na ngai; masanzoli na ye ezalaki na lolemo na ngai

18 Soki nalengelaki lisumu na motema na ngai, Yawe alingaki te koyoka.

19 Kasi ya solo Nzambe ayoka; mpe ayokaki mongongo na ngai na libondeli.

20 Masanzoli ezala epai na Nzambe, oyo abwakaki libondeli na ngai te; to alongolaki bolingo na ye te epai na ngai.
  

BANZEMBO 65

1 Nzambe, masanzoli ezali kozela yo kati na Siona; epai na yo bandayi na biso,.

2 Yo oyokaka mabondeli; bato nyonso bakoya epai na yo.

3 Tango masumu efinaki biso yo olimbisaki mabe na biso.

4 Mapamboli na bato oyo yo opona mpe omemi bango pene-pene, mpo bayanda na lopango na yo! Tokotonda na biloko ya kitoko ya ndako na yo, ndako na yo ya bosantu.

5 Ozongiseli biso eyano na lolenge ya kobanga na misala ya bosembo, Nzambe, Mobikisi na biso, elikya ya basuka nyonso ya mokili, mpe ya bibale minene ya mosika penza.

6 0yo asala bangomba na nguya na yo, omilatisa yo moko na makasi,

7 olembisaka makelele ya ba-ebale minene, makelele ya bambonge na yango, mpe mobulu ya bikolo.

8 Baoyo bayandaka mosika bakobanga makamwisi na yo; bisika tongo etanaka mpe butu elalaka obengaka liboso banzembo ya esengo.

9 Oyaka kotala mokili, osopelaka yango mayi, mpe otondisaka yango na biloko ebele. Ebale ya Nzambe etondi na mayi, obongisaka bambuma mpo na bato. Pamba te, yo nde opesaki mitindo.

10 Otiaka mayi na mikala na yango, olalisaka mwa bangomba na yango, okomisaka yango pete na mbula mike, mpe opambolaka bambuma na yango.

11 0silisaka mobu na bolamu na yo; mpe biloko mingi elekaka na motuka na yo.

12 Bisika matiti ebimaka na esobe ekomi mingi penza; bangomba etondi na esengo.

13 bisika matiti ebimaka na esobe etondi na bameme, mpe lubuaku etondi na bambuma; ezali koganga na esengo mpe koyemba
  

BANZEMBO 64

1 Yoka ngai, Nzambe, ndenge nazali kobimisa bileli na ngai; batela bomoi na ngai liboso ya monguna oyo nazali kobanga!

2 Bomba ngai liboso ya likita ya bato ya mabe, mpe liboso ya ebele ya bato oyo basalaka mabe, oyo ya mobulu.

3 Baoyo bapelisaka lolemo na bango lokola mopanga; mpe babimisaka maloba na bango lokola likonga oyo ebomaka,

4 wuta na esika oyo ya kobombana moto ayebi likambo te; babwakelaka ye yango na mbalakata, mpe babangaka te.

5 Bapesanaka molende kati na mabongisi ya mabe; balobaka mpo na kotia mitambo; mpe balobaka: "Nani akomona yango?"

6 Nakanisaka kaka oyo ezangi sembo mpe balobaka: "Tobongisi" mabongisi ya kitoko penza!" Ya solo, makanisi ya moto mpe motema ya moto ezali mozindo mingi.

7 Kasi Nzambe akobwakela bango makonga na ye; na mbalakata bakokufa.

8 Akobalusa lolemo na bango etelemela bango moko mpe emema bango na libebi; Bato  nyonso  oyo  bakomona  bango bakoningisa mitu na litioli.

9 Bato nyonso bakobanga, mpe bakosakola misala ya Nzambe, mpe bakososola oyo ye akosala.

10 Tika ete moto na sembo asepela kati na Yawe, mpe aluka ebombamelo epai na ye; tika ete bato nyonso oyo bazali alima na mitema basanzola ye.

  

BANZEMBO 63

1 Nzambe, yo ozali Nzambe na ngai, na solo solo nazali koluka yo; molimo na ngai ezali na posa na yo; nzoto na ngai ezali na posa monene mpo na yo, na kati ya mabele ekawuka, mpe ebeba oyo ezanga mayi.

2 Namonaki yo na Esika ya bosantu, mpe namonaki nguya na yo mpe nkembo na yo.

3 Pamba te, bolingo na yo eleki bomoi; bambebo na ngai ekokumisa yo.

4 Nakosanzola yo na tango nyonso nakozala na bomoi; mpe na kombo na yo nakotombola maboko na ngai.

5 Molimo na ngai ekotonda lokola mafuta oyo ya kati na bozui mingi ya biloko ya koliya. na banzembo, bambebo ya monoko na ngai ekosanzola yo.

6 Na mbeto na ngai, nakanisaka lisusu yo; nakanisaka yo butu mobimba;

7 pamba te yo ozali lisalisi na ngai; nazali koyemba na nse ya elilingi ya mapapu na yo.

8 Molimo na ngai ezali ya kokangama na yo; mpe loboko na yo ya mobali esimbi ngai makasi.

9 Baoyo bazali koluka bomoi na ngai bakobebisama; bakokita na nse penza ya mabele;

10 bakokufa na mopanga, mpe bakokoma biloko y a koliya ya bambwa ya zamba.

11 Kasi mokonzi akosepela kati na Nzambe; moto nyonso oyo alapaka ndayi na kombo ya Nzambe, bakosanzola ye; pamba te minoko ya bato ya lokuta ekokangama.

  

BANZEMBO 62

1 Molimo na ngai ezali kozwa kimia kati na Nzambe ye moko kaka, lobiko na ngai ewutaka epai na ye.

2 Ye moko kaka azali libanga na ngai, mpe lobiko na ngai; ye azali ndako na ngai ya makasi, nakoningana ata moke te.

3 Kino tango nini bokobundisa moto bino nyonso oyo bolukaki kokweyisa ye oyo mir oyo etengama, lopango oyo elingi kokweya?

4 Batonda na makanisi ya kokweyisa ye na esika na ye ya likolo; basepelaka na lokuta. Na minoko na bango, bapambolaka, kasi na kati na mitema na bango balakelaka mabe.

5 Zwa kimia, molimo na ngai, na kati na Nzambe ye moko kaka. elikya na ngai ewutaka epai na ye.

6 Ye moko kaka nde azali libanga na ngai, mpe lobiko na ngai; ye azali ndako na ngai ya makasi; na koningana te

7 Lobiko na ngai mpe lokumu na ngai ezali kowuta epai na Nzambe; ye azali libanga na ngai ya makasi, ebombamelo na ngai.

8 Botia motema kati na ye tango nyonso, o bato; bosopa mitema na bino epai na ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo na biso.

9 Bato pamba bazali kaka pema, bato minene bazali kaka lokuta; soki batie na emekeli, bazali eloko te; bango nyonso elongo, bazali kaka pema.

10 Botia mitema te na kobotola biloko ya bato, na moyibi te; to kotia lolendo na biloko ya moyibi; ata soki bozuwi na yo ezali komata, kotia motema te likolo na yango.

11 Mbala moko Nzambe alobaki; mbala mibale nayokaki: ete yo, O Nzambe, ozali makasi,

12 mpe yo, Yawe, ozali bolingo. Ya solo, okopesa lifĂąti na moto nyonso ndenge oyo asalaki

  

BANZEMBO 61

1 Yoka koganga na ngai, Nzambe, tia litoyi na libondeli na ngai. wuta na suka ya mokili nazali kobenga yo; nazali kobenga ndenge motema na ngai elembi koleka; mema ngai na likolo ya libanga oyo ezali likolo mingi koleka ngai.

3 Pamba te, yo ozalaki ebombamelo na ngai, ndako ya molayi mpe ya makasi, liboso ya moyini.

4 Nakowumela koyanda na ndako na yo ya kapo libela; mpe nakobombana na nse ya mapapu na yo.

5 Pamba te oyokaka bandayi na ngai; opesaka ngai bomengo ya bato oyo babangaka kombo na yo.

6 Bakisa mikolo ya bomoi ya mokonzi, bambula na ye mpo na ebele ya bato bakobotama.

7 Tika azala na Bokonzi liboso ya Nzambe libela; tika bolingo na yo mpe boyengebene na yo ebatela ye

8 bongo  nakoyemba  tango  nyonso masanzoli mpo na kombo na yo mpe nakokokisa bandayi na ngai mokolo na mokolo.
  

BANZEMBO 60

1 Obwakaki biso, Nzambe, opanzaki biso, mpe osilikaki; kasi sik'oyo bongisa biso lisusu!

2 Yo oningisaki mokili, mpe opasolaki yango; bongisa bisika na yango oyo epasukaki, pamba te ezali koningana!

3 Yo olakisi bato na yo batango oyo bazangaki elikya; opesaki biso vino oyo elangwisaka.

4 Kasi mpo na bato oyo babangaka yo, otomboli bendele, mpo bakima liboso ya batolo-tolo

5 Bikisa biso mpe salisa biso na loboko na yo ya mobali, mpo ete bato oyo yo olingaka bakoka kokangolama.

6 Nzambe alobaki wuta na esika na ye ya bosantu: "Na elonga; nakokabola Sikemi, mpe nakotanga molayi ya lobwako ya Sukoti;

7 Galada ezali ya ngai, Manase ezali ya ngai; Efrayimi ezali ekoti ya libende ya motu na ngai, mpe Yudea ezali nzete na ngai ya bokonzi.

8 Mowabi ezali sani na ngai nasukolaka; likolo ya Edomi nabwakaki sandale na ngai; likolo ya bato ya Filisda." nakoganga mpo na elonga

9 Nani akomema ngai na vile oyo etongama makasi? Nani akokamba ngai na Edomi?

10 Ezali yo te, Nzambe, yo oyo obwakaki biso, mpe obimaka lisusu na mapinga ya basoda na biso te?

11 Pesa biso lisalisi liboso ya monguna; pamba te lisalisi oyo ewutaka na moto ezali na tina te.

12 Elongo na Nzambe, tokozwa elonga mpe akonyata banguna na biso.

  


BANZEMBO 59

1 kangola ngai na banguna na ngai, Nzambe; batela ngai liboso ya bato oyo batelemeli ngai.

2 Kangola ngai na baoyo basalaka mabe; mpe bikisa ngai liboso ya bato oyo basopaka makila ya bato.

3 Tala ndenge balali-lali mpo na kozela ngai; bato ya makasi basaleli ngai likita, mpo na mabe na ngai te, to mpe mpo na lisumu na ngai te, Yawe.

4 Nasalaki mabe ata moko te, nzokande bamibongisi mpo na kobundisa ngai; lamuka mpo na kosalisa ngai, tala ndenge nakomi.

5 Yawe, Nzambe ya nguya nyonso mpe Nzambe ya Isayele; telema yo moko mpo opesa bikolo nyonso etumbu; mpe koyokela bato oyo basalaka mabe mawa te.

6 Bazongaka na pokwa, bagangaka lokola bambwa, mpe batambolaka-tambolaka na kati ya vile.

7 Tala, oyo bazali kosanza na minoko na bango; mipanga ezali na bambebo na bango; mpe bazali koloba: "Nani akoki koyoka biso?"

8 Kasi yo, Yawe, ozali koseka bango; ozali koseka bikolo oyo nyonso!

9 makasi na ngai, nazali kotala epai na yo; yo, Nzambe, ozali ndako ya makasi na ngai.

10 Nzambe na ngai ya bolingo. Nzambe akozala liboso na ngai; mpe akotika ngai na sepela likolo ya baoyo batongaka ngai.

11 Kasi koboma bango te, Yawe ebende ya makasi oyo ebatelaka biso soki te bato na ngai bakobosana; na nguya na yo, komisa bango mitelengano mpe kweyisa bango.

12 Mpo na masumu ya minoko na bango, mpo na maloba ya bambebo na bango, tika ete bakangama na lolendo na bango. Mpo na elakeli ya mabe mpe mpo na lokuta oyo babimisaka,

13 silisa bango na kanda na yo, silisa bango kino basila nye; Bongo ekoyebana kino na basuka ya mokili ete Nzambe azali na Bokonzi likolo ya Isayele.

14 Bazongaka na pokwa, bagangaka lokola bambwa, mpe batambolaka nzinga-nzinga ya vile.

15 Bazali kotelengana mpo na biloko ya kolia; mpe bagangaka soki batondi te.

16 Kasi nakoyemba mpo na makasi na yo; na tongo nakoyembela bolingo na yo; pamba te, yo ozali ekimelo mpe ndako ya makasi na ngai na tango ya pasi.

17 makasi na ngai, nakoyemba masanzoli mpo na yo; yo, Nzambe, ozali ndako na ngai ya makasi, Nzambe na ngai ya bolingo.
  

BANZEMBO 58

1 Boni, bino bakonzi, bolobaka penza na ndenge ya bosembo? Boni, bosambisaka bato na alima nyonso?

2 Ezali bongo te! Na mitema na bino bokanisaka oyo ezali sembo te; mpe maboko na bino epanzaka mobulu na mokili.

3 Wuta na mbotama ya bato ya mabe babungaka nzela; wuta na libumu, bazali motu makasi mpe balobaka lokuta.

4 Pwazo na bango ezali lokola ya nyoka; bakanga matoyi na bango lokola nyoka oyo babengaka kobra, oyo akangi matoyi na ye,

5 oyo eyokaka te mingongo ya bato oyo basakanaka na banyoka, mingongo ya bato oyo basalaka mazi, oyo bayebana mingi penza.

6 Buka mino na kati na minoko na bango, Nzambe; pikola, Yawe, mino ya ntambwe!

7 Balimwa lokola mayi oyo ezali kotiola; soki babwaki makonga na bango, tango bakosimba tolo-tolo, tika makonga na bango ezanga songe.

8 Lokola mbembe oyo ezali konyangwama na tango ezali kotambola; lokola zemi oyo esopani, tika bamona moi te.

9 Liboso banzungu na bino eyoka moto ya ba nzube, ezala ya mobesu to ekawuka, bato ya mabe bakolongola bango.

10 Bato na sembo bakotonda na esengo tango bakomona kozongisama ya mabe na mabe tango bakosukola makolo na bango na makila ya bato ya mabe.

11 Bongo bato bakoloba: "Ya solo, bato na sembo bazwaka lifuti na bango; ya solo, ezali na Nzambe oyo asambisaka mokili.

  

BANZEMBO 57

1 Yokela ngai mawa, Nzambe, yokela ngai mawa; pamba te molimo na ngai ebombanaka epai na yo; nakobombana na nse ya elilingi ya mapapu na yo, kino tango bapasi ekoleka.

2 Nakoganga epai ya Nzambe Oyo Aleki Likolo, epai ya Nzambe oyo akokisaka mikano na ye mpo na ngai.

3 Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai, akopamela bato oyo bazali kolanda ngai na makasi penza; Nzambe akotindela ngai bolingo na ye mpe boyengebene na ye.

4 Nazali na katikati ya bantambwe; nalali na kati ya banyama oyo eliaka misuni, bato oyo mino na bango ezali lokola makonga mpe batolo-tolo, baoyo lolemo na bango ezali mopanga ya mino makasi.

5 Netolama, Nzambe, kuna na likolo; tika ete nkembo na yo ezala likolo ya mokili mobimba!

6 Batiaki monyama mpo na makolo na ngai; nagumbamaki na kati ya bapasi. Batimolaki libulu na nzela na ngai, kasi bango moko nde bakweyaki na libulu yango.

7 Motema na ngai elendisami, Nzambe, motema na ngai elendisami; nakoyemba mpe nakobetela yo miziki.

8 Lamuka molimo na ngai,! Lamuka lindanda mpe gitare! Nakolamusa tongo.

9 Nakokumisa yo, Yawe, kati ya bikolo; nakoyembela yo na kati ya bato.

10 Pamba te bolingo na yo ezali monene penza, ekomaka kino na likolo; boyengebene na yo ekoma kino na mapata.

11 Netolama, Nzambe, kuna na likolo tika ete nkembo na yo ezala likolo ya mokili mobimba!
  

BANZEMBO 56

1 Yokela ngai mawa, Nzambe, pampa te bato bazali kolanda ngai na makasi penza; mokolo mobimba, bazali kobakisa bitumba na bango.

2 Bato batongaka ngai bazali kolanda ngai mokolo mobimba; bazali ebele penza baoyo bazali kobundisa ngai na lofundu

3 Tango nazali kobanga, nakotia motema na ngai epai na yo.

4 Na Nzambe, Nkolo ya maloba oyo nazali kosanzola, na Nzambe nakotia motema; nakobanga te; moto oyo akufaka akosala ngai nini?

5 Mokolo mobimba bazali kobongola maloba na ngai; bakanisaka tango nyonso makambo ya mabe mpo na ngai.

6 Bazali kosala likita, bazali kobombana, bazali kolandela makolo na ngai, bazali na posa ya kozwa bomoi na ngai.

7 Bakoki ata na ndimbola moko te ya bango; Na kanda na yo, Nzambe, kweyisa bikolo!

8 Boma bileli na ngai; bomba mayi na ngai ya miso na eluku na yo; naino ekomami na buku na yo te?

9 Bongo banguna na ngai bakozonga sima tango nakobelela Nzambe mpo na lisalisi; na oyo nde nayebi, ete Nzambe azali mpo na ngai.

10 Na Nzambe, Nkolo ya maloba oyo nazali kosanzola.

11 Na Nzambe natiaka motema na ngai; nakobanga te; moto akosala ngai nini?

12 Nzambe, nazali na nse ya bandayi na yo; nakopesa yo makabo ya matondi.

13 Pamba te, okangolaki ngai wuta na liwa, mpe makolo na ngai mpo ebeta libaku te, mpo nakoka kotambola liboso ya Nzambe, na moi ya bomoi.

  

BANZEMBO 55

1 Tia litoyi na libondeli na ngai, Nzambe, mpe kobosana likambo na ngai te.

2 Yoka ngai mpe zongisela ngai eyano; makanisi na ngai ezali konyokola ngai

3 mpo na mongongo ya monguna; mpo na minyoko ya moto ya mabe; pamba te bazali kokweyisela ngai bapasi, mpe bazali kofinga ngai na kanda penza.

4 Motema na ngai etungisami kati na ngai; mpe somo ya liwa ekangi ngai.

5 Kobanga mpe kolenga ekoteli ngai; mpe somo monene ezwi ngai.

6 Nalobaki: "Soki nazalaki na mapapu ya pijon, mbele nalingaki kopumbwa mpe kopema;

7 mbele nalingaki kokima mosika penza, mpe kokende koyanda na esobe;

8 mbele nalingaki kokima mbangu penza mpo na koluka esika ya kobombana liboso ya mopepe ya makasi, mosika na mopepe oyo ekumbaka biloko nyonso."

9 Tia bokabwani na kati ya bato ya mabe, Yawe, mpe tia bokabwani na maloba na bango; pamba te nazali komona mobulu, mpe koswana na kati ya vile.

10 Butu mpe moi yango ezali kotobola na balopango na yango; mayele mabe mpe kozanga kokokisa mikano ezali na kati ya vile

11 Libebi akomi mosala kati na vile; minyoko mpe lokuta ezali kolongwa te na banzela na yango.

12 Soki monguna afingaki ngai mbele nalingaki kokanga motema; soki moyini na ngai atelemelaki ngai na lofundu, mbele nalingaki kobombana ye.

13 Kasi ezali yo, moto lokola ngai, oyo otambolaka na ngai, moninga na ngai ya motema,

14 oyo nazalaki kosepela na ye malamu tozalaki kotambola elongo na bato ebele, na ndako ya Nzambe.

15 Tika ete liwa ekanga bango na balabala; bakita ya bomoi na mboka ya bakufi. Pamba te mabe ezwaki esika na kati na bango,

16 Kasi ngai nabengaki Nzambe, mpe Yawe abikisi ngai.

17 Tongo, midi, mpe pokwa nazali koganga makasi na kati na komitungisa; mpe akoyokaka mongongo na ngai.

18 Akokangola ngai mobimba ata likama te na bitumba oyo bazali kobundisa ngai; atako baoyo batelemeli ngai bazali ebele.

19 Nzambe oyo ayandi na kiti ya Bokonzi libela na libela, akoyoka bango mpe akoyokisa bango pasi; bato oyo bakoki kobongola banzela na bango te, mpe babangaka Nzambe te.

20 Oyo atambolaka na ngai azali kobundisa baninga na ye; mpe abebisi boyokani na ye;

21 Maloba na ye ezali moselu lokola mateka, kasi bitumba ezali na motema na ye; maloba na ye ezali pete koleka mafuta, nzokande ezali mopanga mpo na koboma.

22 Pesa mokumba na yo epai na Yawe, mpe ye akosimba yo; atikaka te moto na sembo akweya.

23 Kasi yo Nzambe, okokitisa bato ya mabe na libulu ya libebi; bato oyo basopaka makila ya bato mpe bato ya lokuta bakokoka te komona ndambo ya mikolo na bango; kasi ngai, natiaka motema na ngai epai na yo.

BANZEMBO 54

1 Bikisa ngai, Nzambe, na kombo na yo; mpe longisa ngai na nguya na yo.

2 Yoka libondeli na ngai, Nzambe, tia litoyi na maloba ya monoko na ngai.

3 Bapaya bazali kobundisa ngai, bato ya mobulu bazali koluka bomoi na ngai; batiaka makanisi na bango na Nzambe te.

4 Ya solo, Nzambe azali mosalisi na ngai; Yawe azali oyo asimbaka ngai.

5 Tika mabe ezongela baoyo bazali kotonga ngai, kati na boyengebene na yo, bebisa bango.

6 Nakopesa yo makabo na motema moko; nakosanzola kombo na yo, Yawe, pamba te yango ezali malamu.

7 Pamba te akangolaki ngai na bapasi na ngai nyonso; mpe miso na ngai emonaki esengo likolo ya bayini na ngai.

  


BANZEMBO 53

1 Zoba alobaka na kati ya motema na ye "Nzambe azali te"; bamibebisa penza, mpe banzela na bango ezali mabe. moto ata moko te azali oyo azali kosala malamu.

2 Nzambe azali kotala wuta na Likolo, bana na bato; mpo amona soki bato oyo bazali kososola bazali, oyo balukaka Nzambe.

3 Bango nyonso babunga nzela, babeba elongo; ezali ata na moko te oyo azali kosala malamu, ata moko te.

4 Bato oyo basalaka mabe basosolaka te? Baoyo bazali kolia bato na ngai ndenge bato baliaka lipa; mpe babengaka Nzambe te.

5 Tala, balengaki mpo na somo, kasi likambo ya kolengisa bango ezalaki te; Nzambe akopanza mikuwa ya baoyo bazalaki kobundisa yo; okoyokisa bango soni, pamba te Nzambe amonaki bango pamba.

6 O! soki lobiko ya Isayele ekowutaka na Siona! Tango Nzambe akozongisa bozwi ya bato na ye, dka ete Zakob asepela, mpe Isayele azala na esengo.

  

BANZEMBO 52

1 Mpo na nini ozali komikumisa mpo na mabe, yo elombe mobali? Mpo na nini ozali komikumisa mokolo mobimba? Yo oyo ozangi lokumu na miso ya Nzambe?

2 Lolemo na yo ebongisaka makambo ya kobebisa, ezali lokola zileti ya mino makasi; yo moto osalelaka lokuta.

3 lingaka makambo ya mabe koleka makambo ya malamu; lokuta koleka maloba ya solo.

4 Olingaka maloba nyonso oyo ebebisaka; yo lolemo ya lokuta!

5 Ya solo Nzambe akokweyisa yo na libebi ya libela; akozwa yo mpe akopasola yo wuta na ndako na yo ya kapo, mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.

6 Bongo bato na sembo bakomona, mpe bakobanga; mpe bakoseka ye na koloba:

7 Tala ye, oyo azalaki te komona Nzambe lokola ndako na ye ya makasi, kasi azalaki kota motema na ye na bomengo na ye ya monene, mpe akomaki moto ya makasi na nzela ya kobebisa bato mosusu."

8 Kasi ngai nazali lokola nzete ya oliye, oyo etondi na makasa ya mobesu na kati ya ndako ya Nzambe. Natiaka motema na ngai na bolingo makasi ya Nzambe, mpo na libela na libela.

9 Nakosanzola yo tango nyonso mpo na oyo osalaki; kati na kombo na yo, nakotia elikya pamba te kombo na yo ezali malamu. Nakosanzola yo na miso ya basantu na yo.
  

BANZEMBO 51

1 Yokela ngai mawa, Nzambe, ndenge bolingo na yo ya makasi ezali; ndenge mawa na yo ya monene ezali, longola mabe na ngai

2 Sukola mabe na ngai nyonso; petola ngai na lisumu na ngai

3 Pamba te nayebi mabe na ngai, mpe lisumu na ngai ezali tango nyonso liboso na ngai.

4 Epai na yo, epai na yo kaka; mpe nasalaki oyo ezali mabe na miso na yo; mpo ete omonana alima tango okoloba mpe omonana na mabe te tango okosambisa.

5 Ya solo, nazalaki moto ya masumu, wuta na mbotama na ngai; nazali moto ya masumu wuta tango mama na ngai azwaki zemi na ngai.

6 Ya solo, olingaka solo kati na nzoto; oteyaka ngai bwanya na kati na bisika ya mozindo.

7 Komisa ngai peto na nzete ya Izope, mpe nakokoma peto; sukola ngai; mpe nakokoma pembe koleka mbula ya mabanga.

8 Tika ngai na yoka esengo mpe nasepela, tika ete mikuwa oyo obukaki esepela.

9 Bomba elongi na yo liboso ya masumu na ngai, mpe longola mabe na ngai nyonso.

10 Kela kati na ngai motema ya pete, Nzambe; mpe komisa kati na ngai molimo ya sika mpe oyo ezali ngwi.

11 Kobengana ngai te liboso ya elongi na yo; mpe kolongola Molimo Mosantu na yo te kati na ngai.

12 Zongisela ngai esengo ya lobiko na yo; mpe pesa ngai molimo oyo ezali na mikano ya malamu, mpo esimba ngai!

13 Bongo nakoteya babuki ya mibeko na yo banzela na yo; mpe bato ya masumu bakozonga epai na yo!

14 Bikisa ngai na mabe ya makila, Nzambe, Nzambe oyo abikisaka ngai, mpe lolemo na ngai ekokumisa bosembo na yo na banzembo.

15 Yawe, fungola bambebo na ngai, mpe monoko na ngai ekopanza masanzoli na yo.

16 Pamba te olingaka mbeka te, soki bongo te, mbele nalingaki komemela yo yango; osepelaka mpe na likabo ya kotumba te.

17 Mbeka ya Nzambe ezali molimo oyo ebukani; motema oyo ebukani mpe etutami. Nzambe, otalaka yango pamba te.

18 Kati na bolamu na yo, salela Siona makambo ya malamu; mpe tonga lisusu lopango ya Yeruzalem!

19 Bongo kuna ekozala mbeka ya bosembo, makabo ya kotumba ya mobimba oyo ekosepelisa yo; bongo bakotumbela yo bangombe ya mibali, likolo ya mesa na yo ya makabo.

Mapamboli.com 2010. Nioso esalami mpo na lokumu ya Nzambe. Motuna to lisalisi, komela biso mokanda. Mokambi ya misala oyo : Jupé Bongolo