2 TIMOTE 2
1 Bongo yo mwana na ngai, zua makasi na yo kati na ngolu oyo ezali kati na Yesu Kristo.
2 Mpe makambo oyo oyokaki epai na ngai liboso ya batemwe ebele, pesa yango na bato oyo otielaka motema, baoyo bazali na makoki ya koteya yango na bato mosusu.
3 Mona pasi elongo na ngai, lokola soda ya malamu ya Yesu Kristo.
4 Soda moko te oyo azali kokende na etumba bongo amipesaka mobulu na makambo ya bomoi oyo; asalaka bongo mpo ete asepelisa mokonzi na ye ya mapinga.
5 Ndenge moko mpe, soki moto azali kokima mbangu lokola mosali ya masano, akoki kozwa ekoti ya lokumu te soki akimi mbangu te ndenge mibeko ezali kosenga.
6 Mpo ete moloni elanga asepela na mbuma, esengeli asala liboso musela makasi.
7 Kanisa malamu mpo na makambo oyo nazali koloba, pamba te Nkolo akopesa yo makoki mpo ososola makambo nyonso.
8 Kanisaka Yesu Kristo, ye oyo asekwaki kati na bakufi, ye oyo azalaki moto ya libota ya David. Tala Sango Malamu oyo nateyaka!
9 Nazali komona pasi mpo na Sango Malamu yango, kilo bakangi ngai na minyololo lokola mobomi. Kasi Liloba na Nzambe ezali ya kokangama na minyololo te.
10 Yango wana, nazali konkanga motema na bapasi wana nyonso, mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazua lobiko oyo ezali kati na Kristo Yesu, elongo na nkembo ya seko.
11 Pamba te maloba oyo ezali solo: Soki tokufi elongo na ye, tokozala mpe na bomoi elongo na ye;
12 soki tokangi mitema, tokozala mpe na bokonzi elongo na ye. Kasi soki towangani ye, ye mpe akowangana biso;
13 soki tozangi bosembo, ye akotikala kaka sembo, pamba te, akoki komiwangana te.
14 Kaniselaka bango makambo oyo. Kebisa bango liboso ya Nzambe ete batika kotiaka tempe mpo na oyo etali maloba; yango ezali na tomba moko te, kasi ebendaka kaka libebi ya baoyo bayokaka yango.
15 Sala nyonso oyo okoki kosala, mpo omilakisa liboso ya Nzambe lokola moto oyo basi'bameka ye, lokola mosali oyo akoyoka soni te mpo na mosala na ye, mpe oyo azali koteya Liloba ya solo na bosembo nyonso.
16 Boya masolo ya pamba-pamba mpe oyo etiolaka makambo ya Nzambe, pamba te bato oyo bamipesaka na yango, masolo yango ememaka bango kaka na nzela ya kozanga botosi na makambo ya Nzambe.
17 Mateya na bango eliaka nzoto lokola pota oyo ezali na tofina. Na kati na bango tozali na Imene mpe Filete:
18 Bango basi'batika nzela ya makambo ya solo, bazali koloba ete lisekwa esi'esalama, mpe bazali kokweyisa kondima ya bandimi mosusu.
19 Nzokande, fondasio ya makasi oyo Nzambe atia, ezali kaka kotelema ngwi; mpe maloba oyo ekomama likolo na yango: "Nkolo ayebi bato oyo bazali bato na ye, mpe moto nyonso oyo azali kondima kombo ya Nkolo esengeli aboya mabe."
20 Na kati ya ndako monene, tozalaka kaka na banzungu ya wolo mpe ya palata te, kasi tozalaka mpe na banzungu oyo basala na banzete mpe na mabele. Oyo ya liboso babombaka yango mpo na bafeti, mpe oyo mosusu basalelaka yango mokolo
na mokolo.
21 Soki moto amibateli peto na makambo oyo nawuti koloba, akozala nzungu oyo bakobanda kosalela na bafeti, oyo ekomi ya bosantu, oyo Mokonzi akobanda kosalela, mpe oyo ekozala ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.
22 Kima baposa ya mabe ya bolenge. Mpe luka na posa monene, bosembo, kondima, bolingo mpe kimia, elongo na baoyo babengaka Nkolo na motema ya peto.
23 Boya mituna ya bozoba mpe oyo ezangi tina, pamba te oyebi ete yango esukaka na koswana.
24 Mpe ezali malamu te ete mosali ya Nkolo azala moto oyo aswanaka na bato. Kasi esengeli azala moto ya boboto epai ya bato nyonso, moto oyo azali na makoki mpo na koteya, mpe kokanga motema.
25 Esengeli ateyaka na boboto nyonso bato oyo batiaka tembe epai na ye; mpe azala na elikya ete tango mosusu Nzambe akopesa bango tango mpo babongwana, mpo bayeba makambo ya solo.
26 Bongo bakozongela makanisi na bango ya malamu mpe bakomilongola na motambo ya zabolo, oyo akanga bango na boloko mpo basalaka mokano na ye.