2 KORINTO 11
1 Nalingi ete bokanga motema ma moke mpo na bozoba na ngai. Ya solo, bokanga motema mpo na ngai!
2 Nazali na zuwa mpo na bino, zuwa oyo ewuti na Nzambe. Pamba te, nazali kobalisa bino na mobali moko kaka, Kristo, mpo ete nalingi kolakisa bino epai na ye lokola elenge mwasi oyo ayebi naino mobali te, oyo azali peto penza.
3 Nzokande, nazali kobanga ete, na lolenge nyonso, makanisi na bino ebeba mpe etika komikitisa mpo na oyo etali Kristo, ndenge nyoka ekosaki Eya na mayele na yango ya mabe.
4 Pamba te, soki moto aye koteya bino Yesu mosusu, oyo biso toteyaki te, bondimaka ye. Bondimaka mpe kozwa molimo mosusu oyo ekeseni na Molimo oyo bozwaki, to mpe Sango Malamu oyo ekeseni na oyo bondimaki.
5 Kasi nakanisi te ete nazali na use ya bato oyo bazali "bapostolo ya minene"!
6 Pamba te, atako nazali moto oyo ayebi koloba malamu te, kasi nazali na boyebi; mpe, tolakisaki bino
yango polele na ndenge nyonso mpe na makambo nyonso.
7 Boni, nasalaki mabe mpo namikitisaki mpo ete bino bomata, na nzela ya koteya bino Sango Malamu ya ofele?
8 Nasilisaki bomengo ya mangomba mosusu na nzela ya kozwa lifuti mpo nakoka kosalisa bino.
9 Tango nazalaki epai na bino, natiaki mokumba na ngai likolo ya moto moko te, atako nazalaki kozanga. Pamba te, bandeko oyo bawutaki na Masedwane bapesaki ngai biloko nyonso oyo ekokaki na baposa na ngai. Mpe nazalaki komibatela malamu penza mpo ete nazala mokumba mpo na bino na likambo ata moko te; mpe, nakomibatela kaka mpo na likambo yango.
10 Lokola solo ya Kristo ezali kati na ngai, moto moko te na kati ya mokili ya Akayi akolongola ngai lokumu na ngai.
11 Mpo na nini? Mpo nalingaka bino te? Nzambe ayebi ete nalingaka bino!
12 Kasi oyo nazali kosala, nakosala yango lisusu, mpo na kokanga nzela ya bato oyo bazali koluka nzela ya kokokana na biso na makambo oyo bazali komikumisa na yango.
13 Pamba te, bato ya ndenge wana bazali bapostolo ya lokuta, basali oyo bakosaka bato, mpe bamibongolaka bapostolo ya Kristo.
14 Yango ezali likambo ya kokamwa te, pamba te Satana ye moko mpe amibongolaka anzelu ya pole.
15 Yango ezali mpe likambo ya kokamwa te soki basali na ye mpe bazali komibongola basali ya bosembo. Suka na bango ekozala ndenge moko na misala na bango.
16 Nazongeli yango lisusu, moto ata moko te amona ngai lokola moto ya liboma. To mpe, bondima ngai lokola moto ya liboma, mpo ete ngai mpe namikumisa mwa moke.
17 Makambo oyo nalingi koloba, nalingi koloba yango te ndenge Nkolo alingi, kasi lokola moto ya liboma, mpe nazali na elikya ete nakozwa likambo ya komikumisa na yango.
18 Lokola bato mingi bazali komikumisa mpo na makambo ya mosuni, ngai mpe nakomikumisa.
19 Pamba te, bondimaka na esengo nyonso bato ya maboma ata bozali bato ya bwanya.
20 Soki moto akomisi bino bawumbu, soki moto abotoli bozwi na bino, soki moto azwi biloko na bino, soki moto amimatisi, soki moto abeti bino na elongi, bondimaka ete asala bino bongo!
21 Nandimi yango na soni ete tozalaki bato ya bolembu mpo na kosala bongo. Nzokande, oyo bato mosusu balingi komikumisa na yango (nazali koloba lokola moto ya liboma) ngai mpe nakomikumisa na yango.
22 Bazali baebreo? Ngai mpe nazali moebreo. Bazali bato ya Isayele? Ngai mpe nazali moto ya Isayele! Bazali bato ya libota ya Abraham? Ngai mpe nazali moto ya libota ya Abraham.
23 Bazali basali ya Kristo? (Nazali koloba lokola moto ya liboma); naleki bango. Pamba te, nasalaki mosala ya makasi penza, nakotaki na boloko mbala mingi, babetaki ngai mingi penza, nakutanaki na makama ya liwa mbala mingi;
24 mbala mitano, bayuda babetaki ngai bafimbo ntuku misato na libwa;
25 babetaki ngai banzete mbala mitano, babambaki ngai mabanga mbala moko, nadindaki na mayi elongo na masuwa mbala misato, nasalaki mokolo moko mpe butu moko na kati ya ebale monene;
26 nazalaki kosala mibembo mbala na mbala; nakutanaki na makama na baebale, liboso ya miyibi, liboso ya bandeko na ngai ya ekolo moko, liboso ya bato oyo bazali bayuda te, na kati ya vile, na kati ya esobe, na ebale-monene, mpe liboso ya bandeko ya lokuta.
27 Nasalaki misala ya makasi-makasi mpe ya pasi mingi, mbala mingi nazalaki kolala pongi te, nazalaki na nzala mpe posa ya mayi, mbala mingi nazalaki koboya kolia mpo na mabondeli, nanyokwamaki na malili mpe nakozanga bilamba ya kolata.
28 Mpe kotanga makambo oyo mosusu te, namemaka mokumba na ngai ya mokolo na mokolo: komitungisa oyo namitungisaka mpo na mangomba nyonso.
29 Pamba te, nani akomaka bolembu, bongo ngai nakomaka bolembu te? Nani akweyaka na masumu, bongo ngai nayokaka pasi na motema te?
30 Soki esengeli namikumisa, nakomikumisa na makambo nyonso oyo elakisaka bolembu na ngai.
31 Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu, ye oyo azali ya kopambolama libela na libela, ayebi ete nazali kokosa te.
32 Na Damas, moyangeli ya mokonzi monene Aretas, atindaki ete bakengela vile ya bato ya Damas, mpo na kokanga ngai.
33 Kasi balekisaki ngai na kati ya kitunga na lidusu ya lopango ya vile, bongo nakimaki ye.