1 KORINTO 15
1 Sik'oyo, bandeko na ngai, nalingi kokanisela bino lisusu Sango Malamu oyo nateyaki bino, oyo boyambaki, oyo bokangami na yango,
2 oyo bobikaki na yango, soki bosimbi makasi Liloba oyo nateyaki bino. Soki bongo te bondimaki na bino kaka pamba.
3 Pamba te liboso ya makambo nyonso, nateyaki bino mateya oyo ngai moko nazwaki: ete Kristo akufaki mpo na masumu na biso, ndenge ekomama na Makomi,
4 ete bakundaki ye mpe asekwaki na mokolo ya misato, ndenge ekomama na Makomi.
5 Amonanaki na Piere, mpe na bapostolo zomi na mibale.
6 Sima na yango, amonanaki mpe na bandeko nkama mitano na mbala moko, mpe mingi kati na bango, bazali naino na bomoi kino tango oyo, kasi basusu basi'bakufa.
7 Bongo amonanaki na Zaki, mpe na bapostolo nyonso.
8 Sima na bango nyonso, amonanaki mpe na ngai, lokola mwana oyo akokisa tango ya kobotama te.
9 Pamba te, ngai nazali moke penza na kati ya bapostolo, mpe nakoki kutu te kobengama mopostolo, pamba te nanyokolaki Lingomba ya Nzambe.
10 Kasi mpo na ngolu ya Nzambe, yango wana nazali oyo nazali. Mpe ngolu na ye epai na ngai ezali ya pamba te, mpo nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso; te, ezali ngai te. kasi ngolu ya Nzambe oyo ezali elongo na ngai.
11 Ezala ngai, ezala bango, toteyaka ndenge wana, mpe bondimaki ndenge wana.
12 Kasi soki eteyamaka ete basekwisaki Kristo kati na bakufi, bongo ndenge nini bato mosusu kati na bino balobaka ete lisekwa ya bato bakufa ezali te?
13 Soki lisekwa ya bato bakufa ezali te, wana elingi koloba ete Kristo mpe asekwaki te.
14 Mpe soki Kristo asekwaki te, wana mateya na biso ezali na tina te, mpe kondima na bino mpe ezali na tina te.
15 Mpe, wana tomonani ete tozali batemwe ya lokuta ya Nzambe, pamba te totatolaki mpo na Nzambe ete asekwisaki Kristo, oyo ye asekwisaki te, soki ezali ya solo ete bato bakufa bakosekwa te.
16 Pamba te soki bato oyo bakufa bakosekwa te, wana Kristo mpe asekwaki te.
17 Mpe soki Kristo asekwaki te, wana kondima na bino ezali na ntina te, mpe bozali naino kati na masumu na bino.
18 Na bongo, baoyo mpe bakufa kati na Kristo babunga libela!
19 Soki totiaka elikya na Kristo, kaka mpo na bomoi oyo, wana tozali penza bato ya mawa koleka bato nyonso.
20 Kasi basekwisaki Kristo kati na bakufi, mpe ye azali moto ya liboso ya baoyo bakufa.
21 Pamba te, lokola liwa eyaki na nzela ya moto moko, ndenge moko mpe lisekwa eyaki na nzela ya moto moko.
22 Pamba te, lokola bato nyonso bazali kokufa kati na Adam, ndenge moko mpe bakozongisa bato nyonso na bomoi kati na Kristo.
23 Kasi moto na moto na tango na ye: Kristo moto ya liboso; bongo baoyo bazali kati na Kristo, na tango ye akoya.
24 Bongo suka ekoya, tango akozongisa bokonzi na maboko ya Nzambe Tata, sima ya koboma lokumu nyonso bokonzi nyonso, mpe nguya nyonso.
25 Pamba te, Kristo asengeli kozala na bokonzi kino tango Nzambe akotia banguna na ye nyonso na nse ya makolo na ye.
26 Monguna ya suka oyo bakoboma, ezali liwa.
27 Pamba te, Nzambe atiaki biloko nyonso na nse ya makolo na ye!"Nzokande tango Alakomi ezali koloba: "Biloko nyonso ezali na nse ya bokonzi na ye", yango ezali polele ete elobi mpo na Nzambe te, oyo atiaki biloko nyonso na nse ya bokonzi ya Kristo.
28 Kasi tango biloko nyonso ekotiama na nse ya bokonzi na ye, bongo AIwana ye moko mpe akotiama na nse ya bokonzi na Ye oyo atiaki biloko nyonso na nse ya bokonzi na ye, mpo ete Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso.
29 Soki lisekwa ekozala te, bongo baoyo bazwaka libatisi mpo na bato bakufa, bakosala nini? Soki bato bakufa bakosekwa te, bongo mpo na nini bazwaka libatisi mpo na bango?
30 Bongo biso mpe, mpo na nini bomoi na biso ekutanaka tango nyonso na likama ya liwa?
31 Bandeko na ngai, mokolo na mokolo liwa ezalaka liboso na ngai. Nalobi boye, mpo namipesaka lokumu mpo na bino kati na
Kristo Yesu Nkolo na biso.
32 Soki nabundaki na "banyama ya zamba", na Efezo kaka mpo nakozwa litomba ya bomoto, bongo yango ekosunga ngai na nini? Soki bato bakufa bakosekwa te, "Tolia mpe tomela, pamba te lobi tokokufa."
33 Bomikosa te: baninga ya mabe babebisaka bizaleli ya malamu!
34 Bozongela makanisi ya malamu na ndenge oyo ekoki, mpe botika kosala masumu; pampa te bato mosusu bayebi Nzambe te; nalobi yango mpo koyokisa bino soni.
35 Kasi moto akoki kotuna: Bato bakufa bakosekwa na nzoto ya ndenge nini? Bakozala na nzoto ya ndenge nini?
36 Ozali na mayele te! oyo olonaka, ekoki kozonga na bomoi te, soki yango ekufi te.
37 Mpe tango olonaka, olonaka te na mabele nzoto oyo nzete ekozala na yango na tango ekobima, kasi olonaka kaka mbuma, mbuma ya ble to mpe mosusu.
38 Kasi Nzambe ye moko apesaka yango nzoto oyo ye moko alingaka, mpe apesaka na mbuma na mbuma, nzoto na yango moko.
39 Bikelamo nyonso ya bomoi ezali na mosuni ya ndenge moko te: bato bazali na mosuni ya ndenge mosusu, banyama bazali na mosuni ya ndenge mosusu, bandeke bazali na mosuni ya ndenge mosusu, bambisi mpe bazali na mosuni ya ndenge mosusu.
40 Banzoto ya Likolo ezali, banzoto ya nse mpe ezali; kasi kitoko ya banzoto ya Likolo ezali ndenge mosusu, mpe kitoko ya banzoto ya nse ezali mpe ndenge mosusu.
41 Ndenge moko mpe, kitoko ya moi ezali ndenge mosusu, kitoko ya sanza ezali ndenge mosusu, kitoko mpe ya minzoto ezali ndenge mosusu; mpe monzoto moko ekeseni na monzoto mosusu na kitoko.
42 Ekozala mpe ndenge moko mpo na lisekwa ya bato bakufa, Elonami nzoto oyo epolaka, kasi ekosekwa nzoto oyo epolaka te;
43 elonami nzoto oyo ezangi lokumu, kasi ekosek'wa nzoto ya nkembo; elonami nzoto ya bolembu, kasi ekosekwa nzoto ya nguya;
44 elonami nzoto ya bomoto, kasi ekosekwa nzoto ya molimo. Soki nzoto ya bomoto ezali, nzoto ya molimo mpe ezali.
45 Yango wana ekomama:"Mobali ya liboso, Adam, ako maki elimo ya bomoi. Kasi Adam ya suka, akomaki Molimo oyo apesaka bomoi!"
46 oyo ezali ya molimo eyaki liboso te, kasi oyo ezali ya nzoto nde eyaki liboso; bongo na sima oyo ezali ya molimo.
47 Moto ya liboso asalamaki na putulu ya mabele, kasi moto ya
mibale awutaki na Likolo.
48 Ndenge moto ya mokili azalaki, ndenge wana mpe bato ya mokili bazali; ndenge moto oyo awutaki na Likolo azali, ndenge wana mpe bato ya Likolo bazali.
49 Lokola tomemaki elilingi ya moto oyo asalamaki na putulu, tokomema mpe elilingi ya moto oyo awutaki na Likolo.
50 Bandeko na ngai, nalobi na bino boye: nzoto ya mosuni na makila ekoki te kokota na Bokonzi ya Nzambe. Mpe oyo epolaka ekoki te kozwa oyo epolaka te.
51 Boyoka sekre oyo: biso nyonso tokokufa te, kasi biso nyonso tokobongwana,
52 na mbalakata, noki penza, tango kelelo ya suka ekobeta, mpe bato bakufa bakosekwa na nzoto oyo epolaka te, bongo biso, tokobongwana.
53 Pamba te, esengeli ete oyo epolaka elata oyo epolaka te, mpe oyo ekufaka elata oyo ekufaka te.
54 Bongo tango oyo epolaka ekolata oyo epolaka te, mpe oyo ekufaka ekolata oyo ekufaka te, na bongo nde Liloba oyo ekomama ekokokisama: "Elonga emeli liwa.
55 E e liwa, wapi elonga na yo? E e liwa, wapi nguya na yo ya kozokisa?"
56 Liwa ezwaka nguya ya kozokisa wuta na masumu, mpe masumu ezwaka nguya na yango wuta na Mibeko.
57 Kasi matondi na Nzambe! Ye oyo apesi biso elonga na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo.
58 Yango wana, bandeko balingami, bozala ngwi mpe eloko moko te eningisa bino. Bomipesa tango nyonso na mosala ya Nkolo, mpo boyebi ete mosala na bino oyo bozali kosala mpo na Nkolo ekoleka pamba te.