1 JEAN 2
1 Bana na ngai, nakomeli bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki moto moko asali masumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata, ye nde: Yesu Kristo moto na sembo.
2 Ye amikabaki lokola mbeka mpo na masumu na biso, kaka oyo ya biso te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.
3 Tokoki kotia elikya ete toyebi Nzambe, soki tozali kotosa Mibeko na ye.
4 Moto oyo alobaki: "Nayebi Nzambe", kasi asalaka te makambo oyo Nzambe atindaka, azali moto ya lokuta, mpe bosolo ezali kati na ye te.
5 Kasi soki moto azali kotosa Liloba na ye, wana bolingo ya Nzambe ezali penza ya kokoka kati na ye. Oyo ezali ndenge toyebaka ete tozali kati na ye.
6 Moto oyo alobaka ete azali kati na Nzambe, esengeli atambola ndenge Yesu atambolaki.
7 Balingami, nazali kokomela bino mobeko ya sika te, kasi mobeko ya kala, oyo bozwaki wuta na ebandeli. Mobeko yango ya kala, ezali Liloba oyo boyokaki.
8 Nakomeli bino lisusu mobeko ya sika; yango ezali solo oyo ezali komonana kati na ye mpe kati na bino, pamba te molili ezali koleka mpe pole ya solo ezali kongenga.
9 Moto oyo alobaka ete azali kati na pole, kasi ayinaka ndeko na ye, azali naino kati na molili.
10 Moto oyo alingaka ndeko na ye, azali kati na pole, mpe azali na eloko moko te kati na ye oyo ekoki kobetisa ye libaku.
11 Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye, azali kati na molili mpe azali kotambola kati na molili; ayebi te epai azali kokende, pamba te molili ebomi miso na ye.
12 Bana, nakomeli bino, mpo masumu na bino esi'elimbisama na kombo ya Kristo.
13 Batata, nakomeli bino mpo boyebi moto oyo azali wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo bosi'bolonga moto ya mabe.
14 Bana, nakomeli bino mpo boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo boyebi moto oyo azali wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo bozali makasi, mpe Liloba ya Nzambe ezali kati na bino, mpe bosi'bolonga molimo mabe.
15 Bolinga mokili te, ata biloko oyo ezali kati na mokili. Soki moto alingi mokili, bolingo ya Tata ezali kati na ye te.
16 Pamba te, biloko nyonso oyo ezali na mokili: baposa mabe ya mosuni, baposa mabe ya miso, na lofundu oyo tomipesaka mpo na biloko, nyonso wana ewutaka na Tata te, kasi ewutaka na mokili.
17 Nzokande mokili na baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe azali na bomoi libela na libela.
18 Bana na ngai, oyo ezali ngonga ya suka; ndenge boyokaki ete monguna ya Kristo azali koya, sik'oyo mpe banguna ya Kristo mingi basi'baye. Oyo ezali ndenge tozali koyeba ete yango ezali ngonga ya suka.
19 Babimaki wuta epai na biso, kasi bazalaki bato na biso te. Pamba te, soki bazalaki bato na biso, mbele balingaki kotikala elongo na biso; kasi kokende na bango, ezali kolakisa ete moko te na kati na bango azalaki moto na biso.
20 Kasi bino, bosi'bozwa Molimo Mosantu oyo Kristo apesa, mpe bino nyonso boyebi makambo ya solo.
21 Nakomeli bino te mpo boyebi makambo ya solo te, kasi mpo boyebi yango, mpe mpo lokuta moko te ebimaka na makambo ya solo.
22 Nani azali moto ya lokuta? Ezali moto oyo awanganaka ete Yesu azali Kristo te. Moto ya ndenge wana azali monguna ya Kristo, oyo awanganaka Tata mpe Mwana.
23 Moto nyonso oyo awanganaka Mwana, azali mpe na Tata te; moto oyo andimaka Mwana, azali mpe na Tata.
24 Mpo na bino, botala soki oyo boyokaki banda na ebandeli ezali kati na bino. Soki yango ezali kati na bino, bino mpe bokozala kati na Mwana mpe kati na Tata.
25 Oyo nde elaka apesaki biso: bomoi ya seko.
26 Nazali kokomela bino makambo oyo, mpo na baoyo bazali kobungisa bino nzela.
27 Mpo na bino, Molimo Mosantu oyo Kristo apesaki bino, azali kati na bino, mpe bozali na posa te ete moto ateya bino, pamba te Molimo oyo Kristo apesaki bino ateyaka bino makambo nyonso. Mpe makambo oyo ateyaka bino ezali ya solo, akosaka te. Yango wana bozala kati na Kristo, ndenge Molimo ateya bino yango.
28 Sik'oyo bana, bokoba kozala kati na ye, mpo ete tango akomonana, tokoka kozala na elikya mpe toyoka soni te na miso na ye mokolo akoya.
29 Soki boyebi ete Kristo azali sembo, boyeba mpe ete moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo, azali mwana na ye.