Mapamboli na moto oyo aboyaka kolanda toli ya bato ya mabe, oyo atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka esika moko te na batioli. Kasi asepelaka na Mibeko na Yawe;
mpe akanisaka yango na nse ya motema na ye butu mpe moi. Moto yango azali lokola nzete oyo balona pene-pene ya mayi; oyo ebotaka mbuma na tango na yango; mpe makasa na yango ekawukaka te. Makambo nyoso oyo asalaka etambolaka malamu. Kasi ezali bongo te mpo na bato ya mabe; bango, bazali lokola matiti ya kokawuka, oyo mopepe epanzaka-panzaka.
Yango wana bato ya mabe bakotelema te na mokolo ya kosambisama, to mpe bato ya masumu kati na lisanga ya bato na sembo. Pamba te Yawe ayebi nzela ya bato na sembo; kasi nzela ya bato ya mabe ekobeba. Banzembo 1.